Baroma 16:1-27

16  Nazali kolakisa bino Foebe ndeko na biso ya mwasi, mosaleli+ ya lisangá oyo ezali na Kenkrea,+  mpo bóyamba+ ye na kati ya Nkolo na ndenge oyo ebongi na basantu, mpe mpo bósalisa ye na likambo nyonso oyo akozala na mposa ya lisalisi na bino,+ mpo ye moko mpe asungaki bato mingi, ɛɛ, ngai moko mpe.  Bópesa mbote na Priska ná Akila+ baninga na ngai ya mosala+ na kati ya Kristo Yesu,  oyo batyaki bomoi na bango na likama+ mpo na molimo na ngai, kaka ngai moko te kasi mpe masangá nyonso ya bikólo mosusu tozali kotɔnda bango;+  mpe bópesa mbote na lisangá oyo ezali na ndako na bango.+ Bópesa mbote na ndeko na ngai ya bolingo Epenete, oyo azali mbuma ya liboso+ ya Azia mpo na Kristo.  Bópesa mbote na Maria, oyo asalelaki bino misala ya makasi mingi.  Bópesa mbote na Andronikusi mpe Yuniasi bandeko ya libota na ngai+ mpe bakangami lokola ngai,+ oyo bazali bato minene na kati ya bantoma mpe baumeli mingi na bomoko+ na Kristo koleka ngai.  Bópesa mbote+ na Ampliatusi ndeko na ngai ya bolingo na kati ya Nkolo.  Bópesa mbote na Urbano moninga na biso ya mosala na kati ya Kristo, mpe na ndeko na ngai ya bolingo Stakisi. 10  Bópesa mbote+ na Apelesi, moto oyo andimamá na kati ya Kristo. Bópesa mbote na bato ya ndako ya Aristobule. 11  Bópesa mbote na Herodione moto ya libota na ngai.+ Bópesa mbote na bato ya ndako ya Narsise oyo bazali na kati ya Nkolo.+ 12  Bópesa mbote na Trifene ná Trifoze, basi oyo bazali kosala mosala makasi na kati ya Nkolo. Bópesa mbote na Persisi ndeko na biso ya bolingo, mpo asalaki ebele ya misala ya makasi na kati ya Nkolo. 13  Bópesa mbote na Rufusi moto oyo aponami na kati ya Nkolo, mpe na mama na ye mpe mama na ngai. 14  Bópesa mbote na Asinkrite, Filegone, Hermesi, Patrobasi, Hermasi, mpe bandeko oyo bazali elongo na bango. 15  Bópesa mbote na Filologe mpe na Yulia, na Nere mpe na ndeko na ye ya mwasi, mpe na Olimpasi, mpe na basantu nyonso oyo bazali elongo na bango.+ 16  Bópesana mbote na lipwɛpwɛ mosantu.+ Masangá nyonso ya Kristo epesi bino mbote. 17  Bandeko, sikoyo nazali kolendisa bino, ete bókeba na bato oyo bakɔtisaka bokabwani+ mpe makambo oyo ebɛtisaka libaku oyo eyokani te na mateya+ oyo boyekolaki, mpe bóboya kozala elongo na bango.+ 18  Mpo bato ya ndenge wana bazali baombo ya Nkolo na biso Kristo te, kasi ya mabumu na bango moko;+ mpe bazali kobenda mitema ya bato oyo bakosamaka mpambampamba na maloba sukali+ mpe na maloba ya kokumisakumisa.+ 19  Mpo botosi na bino eyebani epai ya bato nyonso.+ Yango wana, nazali kosepela na bino. Kasi nalingi ete bózala bato ya bwanya+ na makambo oyo ezali malamu, kasi bato oyo bazali na ngambo te+ na makambo oyo ezali mabe.+ 20  Nsima ya mwa ntango moke, Nzambe oyo apesaka kimya+ akopanza Satana+ na nse ya makolo na bino. Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino.+ 21  Timote moninga na ngai ya mosala apesi bino mbote, ná Lukiusi, Yasona ná Sosipatere bato ya libota na ngai.+ 22  Ngai Tertiusi, moto nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote na kati ya Nkolo. 23  Gayusi,+ moto oyo ayambi ngai ná lisangá mobimba, apesi bino mbote. Eraste kapita ya engumba+ apesi bino mbote, ná Kwartusi ndeko na ye. 24  — 25  Sikoyo, moto+ oyo akoki kokómisa bino makasi na boyokani na nsango malamu oyo nazali kosakola mpe na mosala ya kosakola Yesu Kristo, na kolanda komonisama ya sekele mosantu+ oyo ebombamaki ntango molai mingi 26  kasi oyo emonisami sikoyo polele+ mpe oyo eyebisami na makomi ya basakoli na kati ya bikólo nyonso na boyokani na mitindo ya Nzambe ya seko mpo bándima mpe bátosa ye;+ 27  Nzambe, oyo kaka ye moko nde azali moto ya bwanya,+ azwa nkembo+ na nzela ya Yesu Kristo+ libela na libela. Amen.

Maloba na nse