Baroma 15:1-33

15  Nzokande, biso baoyo tozali makasi tosengeli komema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te,+ mpe tómisepelisa biso moko te.+  Moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo alendisa ye.+  Mpo Kristo kutu amisepelisaki te;+ kasi kaka ndenge ekomamá: “Kosambwisa ya bato oyo bazalaki kosambwisa yo ekweli ngai.”+  Mpo makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki+ mpo eteya biso,+ mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko+ mpe na libɔndisi+ oyo euti na Makomami, tózala na elikya.+  Sikoyo Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi asala ete na kati na bino bózala na makanisi+ lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango,  mpo, na bomoko+ mpe na monɔkɔ moko, bókumisa Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo.  Yango wana, bóyambanaka+ ndenge Kristo mpe ayambaki biso,+ mpo na nkembo ya Nzambe.  Mpo nazali koloba ete Kristo akómaki mpenza mosaleli+ ya baoyo bakatamá ngenga+ mpo na komonisa ete Nzambe azali na bosolo+ mpe kondimisa bilaka+ oyo Ye apesaki bankɔkɔ na bango,  mpe mpo bikólo+ mosusu bákumisa Nzambe mpo na motema mawa+ na ye. Kaka ndenge ekomamá: “Yango wana nakondima yo polele kati na bikólo mpe nakobɛtɛla nkombo na yo mondule.”+ 10  Mpe alobi lisusu ete: “Bósepela, bino bikólo, elongo na bato na ye.”+ 11  Mpe lisusu: “Bósanzola Yehova, bino bikólo nyonso, mpe bato ya mikili nyonso básanzola ye.”+ 12  Mpe lisusu Yisaya alobi: “Mosisa ya Yese akozala,+ mpe moto oyo akobima mpo na koyangela bikólo akozala;+ bikólo bakotyela ye elikya na bango.”+ 13  Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso na kondima na bino, mpo bótonda na elikya na nguya ya elimo santu.+ 14  Sikoyo bandeko na ngai, ngai moko mpe nandimi ete bino botondi mpe na bolamu, mpo botondi na boyebi nyonso,+ mpe ete bokoki kokebisana.+ 15  Nzokande, nazali kokomela bino polelepolele mwa makambo mosusu, lokola nde nazali kokundwela+ bino yango lisusu, mpo na boboto monene oyo Nzambe amoniselaki ngai+ 16  mpo nazala mosaleli ya Kristo Yesu epai ya bikólo+ mpo na bolamu na bango nyonso, namikɔtisa na mosala mosantu ya nsango malamu+ ya Nzambe, mpo likabo,+ elingi koloba, bikólo wana, bándimama,+ básantisama na elimo santu.+ 17  Yango wana, nasengeli komikumisa mpo na Kristo Yesu+ na makambo ya Nzambe.+ 18  Mpo nakomeka kutu te kolobela ata likambo moko longola makambo oyo Kristo asalaki na nzela na ngai+ mpo bikólo bátosa,+ na nzela ya liloba+ na ngai mpe na mosala na ngai, 19  na nguya ya bilembo mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya,+ na nguya ya elimo santu; yango wana banda na Yerusaleme tii+ na Ilirikume nasakoli malamumalamu mpenza nsango malamu ya Kristo.+ 20  Ɛɛ, na ndenge yango nde nazwaki mokano ya kosakola te nsango malamu esika bato bayoká nkombo ya Kristo, noki natonga likoló ya moboko ya moto mosusu;+ 21  kasi, kaka ndenge ekomamá: “Baoyo eloko na ye ata moko te esakolamá epai na bango bakomona, mpe baoyo bayoki te bakokanga ntina.”+ 22  Ezali lisusu mpo na yango nde mbala mingi nazwaki nzela ya kokóma epai na bino te.+ 23  Kasi sikoyo lokola na bitúká oyo, nazali lisusu te na teritware epai mosala esalemi naino te mpe lokola uta mwa bambula nazali na mposa makasi ya kokóma epai na bino+ 24  ntango nakokende na Espanye,+ nazali kolikya, libosoliboso, ntango nakozala na mobembo ya kokende kuna, natala bino mpe bókende kotika ngai+ na nzela nsima ya kotonda ata mwa moke na esengo ya kozala elongo na bino. 25  Kasi sikoyo nalingi nakende na Yerusaleme mpo nasalela basantu.+ 26  Mpo baoyo bazali na Masedonia mpe na Akaya+ basepeli kopesa biloko na bango likabo+ epai ya babola oyo bazali na kati ya basantu oyo bazali na Yerusaleme. 27  Ya solo, basepeli kosala bongo, kasi bazalaki na nyongo ya basantu oyo bazali na Yerusaleme; mpo soki bikólo bazwi mpe biloko ya elimo ya baoyo wana,+ bikólo yango bazali mpe na nyongo ya kosalela bango nyonso na biloko oyo nzoto esengeli na yango.+ 28  Bongo ntango nakosilisa kosala yango mpe kokómisela bango mbuma+ yango na ndenge esengeli mpenza, nakoleka epai na bino ntango nakokende na Espanye.+ 29  Lisusu, nayebi ete ntango nakoya epai na bino nakoya na ebele ya mapamboli ya Kristo.+ 30  Bandeko, sikoyo nazali kolendisa bino na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpe na bolingo ya elimo,+ ete bóboma nzoto elongo na ngai na mabondeli epai ya Nzambe mpo na ngai,+ 31  mpo bato oyo bazali na kondima te oyo bazali na Yudea básala ngai mabe te+ mpe basantu+ oyo bazali na Yerusaleme+ bándima mosala oyo nakosalela bango, 32  bongo ntango nakokóma epai na bino soki ezali mokano ya Nzambe nalendisama+ elongo na bino. 33  Nzambe oyo apesaka kimya azala na bino nyonso.+ Amen.

Maloba na nse