Baroma 14:1-23
14 Bóyamba malamu moto oyo azali na kondima makasi te,+ kasi bósambisa ye te na mituna oyo azali komituna.+
2 Moto mosusu azali na kondima mpe alyaka eloko nyonso,+ kasi moto oyo azali na kondima makasi te alyaka ndunda.
3 Moto oyo azali kolya atyola te moto oyo azali kolya te,+ mpe moto oyo azali kolya te asambisa te moto oyo azali kolya, mpo Nzambe ayambi moto wana.
4 Yo nani mpo osambisa mosali ya ndako ya moto mosusu?+ Nkolo na ye moko nde atɛlɛmisaka ye to akweisaka ye.+ Ɛɛ, akotɛlɛma, mpo Yehova akoki kotɛlɛmisa ye.+
5 Moto mosusu azali komona ete mokolo boye eleki mokolo boye;+ moto mosusu azali komona ete mokolo boye ezali lokola mikolo mosusu nyonso;+ moto na moto amindimisa mpenza na makanisi na ye moko.
6 Moto oyo azali kotosa mokolo azali kotosa yango mpo na Yehova. Lisusu, moto oyo azali kolya, azali kolya mpo na Yehova,+ mpo azali kotɔnda Nzambe;+ mpe moto oyo azali kolya te azali kolya te mpo na Yehova,+ nzokande azali kotɔnda Nzambe.+
7 Ya solo, moto moko te na kati na biso azali na bomoi mpo na ye moko,+ mpe moto moko te akokufa mpo na ye moko;
8 mpo soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Yehova,+ mpe soki tokufi, tokufi mpo na Yehova.+ Yango wana, ezala tozali na bomoi, ezala tokufi, tozali bato ya Yehova.+
9 Mpo Kristo akufaki mpe azongaki na bomoi mpo na yango,+ mpo azala Nkolo ya bakufi+ mpe ya bato ya bomoi.+
10 Kasi mpo na nini ozali kosambisa ndeko na yo?+ To mpo na nini ozali mpe kotyola ndeko na yo? Mpo biso nyonso tokotɛlɛma liboso ya kiti ya kosambisa+ ya Nzambe;
11 mpo ekomamá boye: “Yehova alobi: ‘Lokola nazali solo na bomoi,+ libɔlɔngɔ nyonso ekogumbamela ngai, mpe lolemo nyonso ekondima Nzambe polele.’”+
12 Yango wana, mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.+
13 Yango wana, tósambisanaka lisusu te,+ kasi bózwa nde mokano oyo:+ kotya te liboso ya ndeko+ eloko oyo ebɛtisaka libaku+ to eloko oyo epɛngwisaka.
14 Nayebi mpe nandimi mpenza na kati ya Nkolo Yesu ete eloko ata moko te mpenza ezalaka mbindo;+ kasi ntango moto azali kotalela eloko moko ete ezali mbindo, yango ekómi mbindo mpo na ye.+
15 Mpo soki ndeko na yo azali koyokisama mawa mpo na eloko ya kolya, ozali lisusu kotambola na bolingo+ te. Na eloko na yo ya kolya kobebisa te moto oyo Kristo akufelaki.+
16 Yango wana, bótika te ete bálobela bino mabe mpo na bolamu oyo bozali kosala.
17 Mpo bokonzi ya Nzambe+ elakisi kolya ná komɛla te,+ kasi elakisi nde boyengebene,+ kimya+ mpe esengo+ elongo na elimo santu.
18 Mpo moto oyo azali moombo ya Kristo mpe azali kosala likambo wana andimami na Nzambe mpe andimami na bato.+
19 Yango wana, tólanda makambo oyo etyaka kimya+ mpe makambo oyo elendisaka biso.+
20 Tiká kobebisa mosala ya Nzambe kaka mpo na biloko ya kolya.+ Ya solo, biloko nyonso ezali pɛto, kasi yango ezali likama epai ya moto oyo azali kolya yango na ntango oyo yango ezali kobɛtisa moto mosusu libaku.+
21 Ezali malamu koboya kolya mosuni ya nyama to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.+
22 Kondima oyo ozali na yango, zalá na yango mpo na yo moko na miso ya Nzambe.+ Esengo na moto oyo azali komikweisa te na likambo oyo ye amonaka ete ezali malamu.
23 Kasi soki azali na ntembe, akweisami na likambo soki alei,+ mpo azali kolya na kondima te. Ɛɛ, likambo nyonso oyo esalemi na kondima te ezali lisumu.+