Balevi 9:1-24

9  Mpe esalemaki boye: na mokolo ya mwambe,+ Moize abengisaki Arona ná bana na ye ya mibali mpe mikóló ya Yisraele.  Na nsima, alobaki na Arona boye: “Ozwa mwana-ngɔmbɛ moko mpo na likabo mpo na lisumu+ mpe mpate-mobali moko mpo na likabo ya kotumba,+ oyo ezangi mbeba, mpe pesá yango liboso ya Yehova.+  Kasi okoloba boye na bana ya Yisraele: ‘Bózwa ntaba-mobali+ moko mpo na likabo mpo na lisumu ná mwana-ngɔmbɛ moko ná mwana-mpate ya mobali+ moko, oyo ezangi mbeba, mokomoko ekozala na mbula moko, mpo na likabo ya kotumba,  ná ngɔmbɛ-mobali moko ná mpate-mobali moko mpo na bambeka ya boyokani+ mpo na kopesa yango mbeka liboso ya Yehova, mpe likabo ya mbuma+ oyo emwangisami mafuta, mpo lelo nde Yehova akobimela mpenza bino.’”+  Na yango, bamemaki biloko oyo Moize apesaki mitindo liboso ya hema ya kokutana. Na nsima, liyangani mobimba eyaki pene mpe etɛlɛmaki liboso ya Yehova.+  Mpe Moize alobaki lisusu ete: “Talá likambo oyo Yehova apesi mitindo ete bósala, mpo nkembo ya Yehova emonana liboso na bino.”+  Na nsima, Moize alobaki na Arona ete: “Bɛlɛmá na etumbelo mpe pesá likabo na yo mpo na lisumu+ mpe likabo na yo ya kotumba, mpe zipá masumu+ na yo moko mpe ya ndako na yo; mpe pesá likabo ya bato+ mpe zipá masumu+ na bango, kaka ndenge Yehova apesi mitindo.”  Arona abɛlɛmaki nokinoki na etumbelo mpe abomaki mwana-ngɔmbɛ ya likabo mpo na lisumu, oyo ezalaki mpo na ye.+  Na nsima bana mibali ya Arona bapesaki ye makila+ mpe azindisaki mosapi na ye na makila+ yango mpe atyaki yango likoló ya maseke ya etumbelo,+ mpe makila oyo etikalaki, asopaki yango na nse ya etumbelo. 10  Mpe asalaki ete mafuta+ ná mimpíko mpe mafuta ya libale oyo euti na likabo mpo na lisumu ebimisa milinga likoló ya etumbelo,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 11  Mpe azikisaki mosuni ná loposo na mɔtɔ libándá ya kaa.+ 12  Na nsima, abomaki likabo ya kotumba mpe bana mibali ya Arona bapesaki ye makila mpe amwangisaki yango zingazinga likoló ya etumbelo.+ 13  Mpe bapesaki ye likabo ya kotumba na biteni na yango ná motó, mpe asalaki ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo.+ 14  Lisusu, asukolaki misɔpɔ ná makolo mpe asalaki ete yango ebimisa milinga likoló ya likabo ya kotumba likoló ya etumbelo.+ 15  Na nsima, apesaki likabo ya bato+ mpe azwaki ntaba-mobali ya likabo mpo na lisumu oyo ezalaki mpo na bato mpe abomaki yango mpe asalaki na yango likabo mpo na lisumu, ndenge asalaki na oyo ya liboso. 16  Na nsima, apesaki likabo ya kotumba mpe asalaki yango ndenge basalaka.+ 17  Na nsima, apesaki likabo ya mbuma+ mpe atondisaki lobɔkɔ na ye na mwa ndambo na yango mpe asalaki ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo, longola likabo ya kotumba ya ntɔngɔ.+ 18  Nsima na yango abomaki ngɔmbɛ-mobali ná mpate-mobali ya mbeka ya boyokani+ oyo ezalaki mpo na bato. Na nsima, bana mibali ya Arona bapesaki ye makila mpe amwangisaki yango zingazinga, likoló ya etumbelo.+ 19  Bongo biteni ya mafutamafuta+ ya ngɔmbɛ-mobali yango ná mokila+ ya mafutamafuta ya mpate-mobali yango ná mafuta oyo ezipaka ná mimpíko ná mafuta ya libale, 20  batyaki biteni ya mafutamafuta likoló ya bantolo,+ nsima na yango asalaki ete biteni yango ya mafutamafuta ebimisa milinga likoló ya etumbelo. 21  Kasi ntolo ná lokolo ya mobali, Arona aningisaki yango epai na epai, lokola likabo ya koningisa+ liboso ya Yehova, kaka ndenge Moize apesaki mitindo. 22  Bongo Arona atombolaki mabɔkɔ na ye epai na bato mpe apambolaki bango+ mpe akitaki nsima+ ya kopesa likabo mpo na lisumu ná likabo ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. 23  Nsukansuka Moize ná Arona bakɔtaki na hema ya kokutana mpe babimaki mpe bapambolaki bato.+ Bongo nkembo ya Yehova+ emonanaki liboso ya bato nyonso, 24  mpe mɔtɔ ebimaki liboso ya Yehova+ mpe ebandaki kozikisa likabo ya kotumba mpe biteni ya mafutamafuta likoló ya etumbelo. Ntango bato nyonso bamonaki yango, babandaki koganga+ mpe bakweaki bilongi na nse.

Maloba na nse