Balevi 8:1-36

8  Mpe Yehova alobaki na Moize ete:  “Zwá Arona ná bana na ye ya mibali elongo na ye+ ná bilamba+ ná mafuta mosantu*+ ná ngɔmbɛ-mobali ya likabo mpo na lisumu+ ná bampate-mibali mibale mpe kitunga ya bagato oyo ezangi levire,+  mpe yanganisá liyangani mobimba+ na monɔkɔ ya hema ya kokutana.”+  Bongo Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo, mpe liyangani eyanganaki na monɔkɔ+ ya hema ya kokutana.  Sikoyo Moize alobaki na liyangani ete: “Talá likambo oyo Yehova apesi mitindo ete esalema.”+  Bongo Moize abɛlɛmisaki Arona ná bana na ye ya mibali mpe asukolaki+ bango na mai.+  Nsima na yango alatisaki ye zambala+ mpe akangisaki ye elamba ya kokanga na loketo+ mpe alatisaki ye kazaka ezangá mabɔkɔ+ mpe alatisaki ye efode+ mpe akangisaki ye nkamba+ ya efode mpe na yango akangisaki ye efode makasi.  Na nsima, atyaki ye libenga ya ntolo+ mpe atyaki na kati ya libenga ya ntolo Urime ná Tumime.+  Bongo atyaki tirba+ na motó na ye mpe atyaki likoló ya tirba yango, na liboso na yango, linzanza ya kongɛnga ya wolo, elembo mosantu ya komipesa na Nzambe,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 10  Sikoyo Moize azwaki mafuta mosantu mpe atyaki tabernakle+ mafuta ná nyonso oyo ezalaki na kati na yango mpe asantisaki yango. 11  Na nsima, amwangisaki mwa ndambo na yango mbala nsambo likoló ya etumbelo mpe atyaki etumbelo+ mafuta ná bisaleli na yango nyonso mpe saani monene ná etɛlɛmiselo na yango mpo na kosantisa yango. 12  Nsukansuka asopaki mwa ndambo ya mafuta mosantu na motó ya Arona mpe atyaki ye mafuta mpo na kosantisa ye.+ 13  Bongo Moize abɛlɛmisaki+ bana mibali ya Arona mpe alatisaki bango bazambala mpe akangisaki bango bilamba ya kokanga na loketo+ mpe alíngaki na motó na bango eloko ya kolata na motó,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 14  Na nsima, ayaki na ngɔ-mbɛ-mobali+ ya likabo mpo na lisumu mpe Arona ná bana na ye ya mibali batyaki mabɔkɔ na bango na motó+ ya ngɔmbɛ-mobali yango ya likabo mpo na lisumu. 15  Mpe Moize abomaki+ yango mpe azwaki makila+ na mosapi na ye mpe atyaki yango likoló ya maseke ya etumbelo zingazinga mpe apɛtolaki etumbelo na lisumu, kasi ndambo ya makila oyo etikalaki, asopaki yango na nse ya etumbelo, mpo asantisa yango mpo na kozipa masumu+ na yango. 16  Nsima na yango azwaki mafuta nyonso oyo ezalaki likoló ya misɔpɔ, ná mafuta ya libale ná mimpíko mibale ná mafuta na yango mpe Moize asalaki ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo.+ 17  Mpe atindaki ete bázikisa ngɔmbɛ-mobali yango ná loposo na yango ná mosuni na yango mpe nyɛi na yango na mɔtɔ libándá ya kaa,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 18  Sikoyo abɛlɛmisaki mpate-mobali ya likabo ya kotumba, mpe Arona ná bana na ye ya mibali batyaki mabɔkɔ na bango na motó ya mpate-mobali yango.+ 19  Nsima na yango Moize abomaki yango mpe amwangisaki makila zingazinga, likoló ya etumbelo.+ 20  Mpe akataki mpate-mobali yango bitenibiteni,+ mpe Moize asalaki ete motó ná biteni mpe mafuta ebimisa milinga. 21  Mpe asukolaki misɔpɔ ná makolo na mai, mpe na nsima Moize asalaki ete mpate-mobali yango mobimba ebimisa milinga likoló ya etumbelo.+ Yango ezalaki likabo ya kotumba mpo ezala nsolo ya kokitisa motema.+ Yango ezalaki likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 22  Bongo abɛlɛmisaki mpate-mobali ya mibale, mpate-mobali oyo epesamaki mpo bátyama na mosala,+ mpe Arona ná bana na ye ya mibali batyaki mabɔkɔ na bango na motó ya mpate-mobali yango. 23  Nsima na yango Moize abomaki yango mpe azwaki mwa ndambo ya makila na yango mpe atyaki yango na nsɔngɛ ya litoi ya mobali ya Arona mpe na mosapi monene ya lobɔkɔ na ye ya mobali mpe na mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali.+ 24  Na nsima Moize abɛlɛmisaki bana mibali ya Arona mpe atyaki mwa ndambo ya makila na nsɔngɛ ya litoi na bango ya mobali mpe na mosapi monene ya lobɔkɔ na bango ya mobali mpe na mosapi monene ya lokolo na bango ya mobali; kasi Moize amwangisaki makila oyo etikalaki zingazinga, likoló ya etumbelo.+ 25  Na nsima, azwaki mafuta ná mokila ya mafutamafuta ná mafuta nyonso oyo ezalaki likoló ya misɔpɔ,+ mpe mafuta ya libale ná mimpíko mibale ná mafuta na yango mpe lokolo ya mobali.+ 26  Mpe na kitunga ya bagato oyo ezangi levire oyo ezalaki liboso ya Yehova, azwaki gato+ moko oyo ezangi levire oyo basali lokola lopɛtɛ ná gato moko ya limpa+ ya mafuta oyo basali lokola lopɛtɛ, mpe galɛti moko.+ Bongo atyaki yango likoló ya biteni ya mafutamafuta ná lokolo ya mobali. 27  Nsima na yango atyaki yango nyonso na mabɔkɔ ya Arona mpe na mabɔkɔ ya bana na ye ya mibali mpe abandaki koningisa yango epai na epai, lokola likabo ya koningisa liboso ya Yehova.+ 28  Na nsima, Moize azwaki yango na mabɔkɔ na bango mpe asalaki ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo, likoló ya likabo ya kotumba.+ Yango ezalaki mbeka oyo epesami mpo bátyama na mosala+ mpo ezala nsolo moko ya kokitisa motema.+ Yango ezalaki likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova.+ 29  Mpe Moize azwaki ntolo+ mpe aningisaki yango epai na epai, lokola likabo ya koningisa liboso ya Yehova.+ Na mpate-mobali oyo epesamaki mpo bátyama na mosala, ntolo yango ekómaki eteni+ ya Moize, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 30  Nsima na yango Moize azwaki mwa ndambo ya mafuta mosantu+ ná mwa ndambo ya makila oyo ezalaki likoló ya etumbelo mpe amwangiselaki yango Arona ná bilamba na ye mpe bana na ye ya mibali ná bilamba ya bana na ye, elongo na ye. Bongo asantisaki+ Arona ná bilamba na ye mpe bana na ye ya mibali+ ná bilamba na bango, elongo na ye. 31  Na nsima, Moize alobaki na Arona mpe na bana na ye ya mibali ete: “Bólamba+ mosuni na monɔkɔ ya hema ya kokutana, mpe ezali kuna nde bokolya yango+ ná limpa oyo ezali na kati ya kitunga ya kotyama na mosala, kaka ndenge nazwaki mitindo: ‘Arona ná bana na ye ya mibali bakolya yango.’ 32  Mpe ndambo ya mosuni yango oyo etikali mpe limpa yango, bokozikisa yango na mɔtɔ.+ 33  Mpe bosengeli te kobima na monɔkɔ ya hema ya kokutana na boumeli ya mikolo nsambo,+ tii na mokolo oyo mikolo na bino ya kotyama na mosala ekokoka, mpamba te yango ekozwa mikolo nsambo mpo na kotondisa lobɔkɔ na bino na nguya.*+ 34  Kaka ndenge esalemi na mokolo ya lelo, Yehova apesi mitindo ete esalema kaka bongo mpo na kozipa masumu na bino.+ 35  Mpe bokotikala na monɔkɔ ya hema ya kokutana moi ná butu, na boumeli ya mikolo nsambo,+ mpe bosengeli kosala mosala ya kokɛngɛla oyo Yehova asɛngi,+ mpo bókufa te; mpo ezali ndenge wana nde bapesi ngai mitindo.” 36  Mpe Arona ná bana na ye ya mibali babandaki kosala makambo nyonso oyo Yehova apesaki mitindo na nzela ya Moize.

Maloba na nse

Talá Kob 29:7, msl.
Talá Kob 28:41, msl.