Balevi 7:1-38

7  “‘Mpe talá mobeko ya likabo ya ngambo:+ Yango ezali eloko oyo eleki bosantu.+  Bakoboma likabo ya ngambo na esika+ oyo babomaka ntango nyonso likabo ya kotumba, mpe makila+ na yango ekomwangisama+ zingazinga, likoló ya etumbelo.  Na oyo etali mafuta na yango nyonso,+ akopesa mokila na yango ya mafutamafuta ná mafuta oyo ezipi misɔpɔ,  ná mimpíko mibale mpe mafuta oyo ezali likoló na yango ndenge moko na oyo ezali likoló ya mosuni ya eteni ya nse ya mokɔngɔ. Mpe mpo na mafuta ya libale, akolongola yango nzela moko na mimpíko.+  Mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo, ezala likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova.+ Yango ezali likabo ya ngambo.  Mobali nyonso na kati ya banganga-nzambe akolya yango.+ Ekolyama na esika mosantu. Yango ezali eloko oyo eleki bosantu.+  Likabo ya ngambo ezali lokola likabo mpo na lisumu. Mobeko ezali kaka moko mpo na yango.+ Ekokóma ya nganga-nzambe oyo akozipa na yango masumu.  “‘Nganga-nzambe oyo azali kopesa likabo ya kotumba, ezala ya moto nani, loposo+ ya likabo ya kotumba oyo moto yango apesi nganga-nzambe ekokóma ya nganga-nzambe.  “‘Mpe likabo nyonso ya mbuma oyo ekotumbama na etumbelo ya mampa+ mpe nyonso oyo esalemi na nzungu ya libulu+ oyo ezali na mafuta ya kokalinga mpe likoló ya kikalungu,+ ezali ya nganga-nzambe oyo azali kopesa yango. Ekokóma ya ye.+ 10  Kasi likabo nyonso ya mbuma, oyo emwangisami mafuta,+ to oyo ekauki,+ ekozala mpo na bana mibali nyonso ya Arona, ndenge okopesa oyo ndenge mpe okopesa oyo mosusu. 11  “‘Sikoyo talá mobeko ya mbeka ya boyokani+ oyo moto nyonso akopesa Yehova: 12  Soki alingi kopesa yango mpo na komonisa botɔndi,+ asengeli kopesa, nzela moko na mbeka ya kozongisa matɔndi, bagato oyo ezangi levire oyo basali lokola lopɛtɛ, oyo emwangisami mafuta, bagalɛti oyo ezangi levire oyo epakolami mafuta+ mpe farini ya malamu, oyo esangisami malamu lokola bagato oyo basali lokola lopɛtɛ, oyo emwangisami mafuta. 13  Akopesa likabo na ye elongo na bagato ya mampa oyo etyami levire,+ oyo basali lokola lopɛtɛ, nzela moko na mbeka ya kozongisa matɔndi ya bambeka na ye ya boyokani. 14  Mpe na likabo yango, asengeli kopesa ndambo mokomoko ya likabo lokola eteni oyo esantisami mpo na Yehova;+ yango ekokóma ya nganga-nzambe+ oyo azali komwangisa makila ya bambeka ya boyokani. 15  Mpe mosuni ya mbeka ya kozongisa matɔndi ya bambeka na ye ya boyokani, ekolyama na mokolo akopesa likabo na ye. Asengeli kobomba eteni na yango ata moko te tii na ntɔngɔ.+ 16  “‘Mpe soki mbeka ya likabo na ye ezali likabo ya elako+ to likabo ya bolingo,+ yango ekolyama na mokolo oyo akopesa mbeka na ye, mpe na mokolo oyo elandi, ndambo na yango oyo ekotikala, ekoki mpe kolyama. 17  Kasi ndambo ya mosuni ya mbeka yango oyo ekotikala na mokolo ya misato, ekozikisama na mɔtɔ.+ 18  Nzokande, soki mosuni ata moke ya mbeka na ye ya boyokani elyami na mokolo ya misato, moto oyo azali kopesa yango akondimama+ ata moke te. Bakotángela ye yango te.+ Yango ekokóma eloko oyo ebebi, mpe molimo oyo akolya mwa ndambo na yango, akozongisa monɔkɔ mpo na libunga na ye.+ 19  Mpe mosuni oyo ekosimba eloko nyonso ya mbindo,+ ekolyama te. Ekozikisama na mɔtɔ. Bongo mosuni yango, moto nyonso oyo azali pɛto akoki kolya mosuni yango. 20  “‘Mpe molimo oyo alei mosuni ya mbeka ya boyokani, oyo ezali mpo na Yehova, wana azali na mbindo na ye, molimo yango asengeli kolongolama na kati na bato na ye.+ 21  Mpe soki molimo moko asimbi eloko nyonso ya mbindo, mbindo ya moto+ to nyama ya mbindo+ to eloko nyonso ya mbindo oyo eyokisaka mpii,+ mpe soki alei mpenza mwa ndambo ya mosuni ya mbeka ya boyokani, oyo ezali mpo na Yehova, molimo yango asengeli kolongolama na kati na bato na ye.’” 22  Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete: 23  “Lobá na bana ya Yisraele: ‘Bosengeli kolya ata moke te mafuta+ ya ngɔmbɛ-mobali to ya mwana-mpate ya mobali to ya ntaba. 24  Sikoyo mafuta ya nyama oyo ekufi yango moko mpe mafuta ya nyama oyo epasolami,+ bokoki kosalela yango na ndenge nyonso oyo bokanisi, kasi bosengeli kolya yango ata moke te. 25  Mpo moto nyonso oyo alei mafuta ya nyama oyo apesi yango lokola likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova, molimo oyo alei yango asengeli kolongolama+ na kati na bato na ye. 26  “‘Mpe bosengeli te kolya makila+ ya lolenge nyonso, ezala ya ndɛkɛ to ya nyama, na bisika nyonso oyo bozali kofanda. 27  Molimo nyonso oyo alei makila ya lolenge nyonso, molimo yango asengeli kolongolama+ na kati ya bato na ye.’” 28  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 29  “Lobá na bana ya Yisraele: ‘Moto oyo apesi Yehova mbeka na ye ya boyokani akomemela Yehova likabo na ye oyo euti na mbeka na ye ya boyokani.+ 30  Mabɔkɔ na ye ekomema mafuta+ oyo ezali likoló ya ntolo lokola makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ. Akomema yango nzela moko na ntolo mpo na koningisa yango epai na epai lokola likabo ya koningisa+ liboso ya Yehova. 31  Mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete mafuta yango ebimisa milinga+ likoló ya etumbelo, kasi ntolo yango esengeli kokóma ya Arona ná bana na ye ya mibali.+ 32  “‘Mpe bokopesa nganga-nzambe lokolo ya mobali lokola eteni oyo esantisami+ na bambeka na bino ya boyokani. 33  Ye oyo kati na bana mibali ya Arona akopesa makila ya bambeka ya boyokani mpe mafuta, lokolo ya mobali ekokóma eteni na ye.+ 34  Mpo ntolo ya likabo ya koningisa+ mpe lokolo ya eteni oyo esantisami, nazwi mpenza yango epai ya bana ya Yisraele na bambeka na bango ya boyokani, mpe nakopesa yango nganga-nzambe Arona ná bana na ye ya mibali, ekouta na bana ya Yisraele, lokola lilako mpo na ntango oyo etyami ndelo te. 35  “‘Wana ezalaki likabo ya bonganga-nzambe ya Arona mpe likabo ya bonganga-nzambe ya bana na ye ya mibali oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ, na mokolo oyo apesaki+ bango mpo básalela Yehova mosala ya banganga-nzambe, 36  kaka ndenge Yehova apesaki mitindo ya kopesa bango yango na mokolo ya kotya bango mafuta+ kati na bana ya Yisraele. Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na mabota na bango.’”+ 37  Wana ezali mobeko etali likabo ya kotumba,+ likabo ya mbuma,+ likabo mpo na lisumu,+ likabo ya ngambo,+ mbeka oyo epesami mpo moto atyama na mosala+ mpe mbeka ya boyokani,+ 38  kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo na Ngomba Sinai+ na mokolo oyo apesaki bana ya Yisraele mitindo ya kopesa Yehova makabo na bango na esobe ya Sinai.+

Maloba na nse