Balevi 6:1-30

6  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:  “Soki molimo moko asali lisumu na ndenge azangi mpenza bosembo epai ya Yehova+ mpe akosi mpenza+ moninga na ye, mpo na eloko moko oyo ezali na mabɔkɔ na ye to eloko oyo babombisi na lobɔkɔ+ na ye to eloko ya moyibi to abubi moninga na ye,+  to akuti mpenza eloko oyo ebungaki+ mpe akosi mpenza mpo na eloko yango mpe alapi ndai ya lokuta+ mpo na likambo nyonso oyo moto akoki kosala na yango lisumu;  ekosalema mpenza boye: soki asali lisumu mpe amemi mpenza ngambo,+ asengeli kozongisa eloko oyo eyibamaki, oyo ayibaki, to eloko ebɔtɔlamaki, oyo azwaki na kobuba, to eloko oyo ezalaki na mabɔkɔ na ye, oyo etyamaki na mabɔkɔ na ye, to eloko oyo ebungaki, oyo azwaki,  to eloko nyonso oyo akokaki kolapela yango ndai ya lokuta, mpe asengeli kofuta+ yango na motuya na yango mobimba, mpe akobakisa na motuya yango moko ya bandambo mitano na yango. Akopesa yango nkolo na yango na mokolo oyo ngambo na ye ekomonisama.  Mpe lokola likabo ya ngambo na ye, akomemela Yehova mpate-mobali+ oyo ezangi mbeba, oyo euti na etonga ya bampate na motuya ekatami, mpo ezala likabo ya ngambo,+ oyo akomema epai ya nganga-nzambe.  Mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na ye liboso ya Yehova, mpe bongo asengeli kolimbisama na kotalela moko na makambo nyonso oyo akoki kosala, oyo ekomemisa ye ngambo na yango.”  Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete:  “Pesá Arona ná bana na ye ya mibali mitindo ete: ‘Talá mobeko ya likabo ya kotumba:+ Likabo ya kotumba ekozala likoló ya esika oyo mɔtɔ epelaka likoló ya etumbelo butu mobimba kino na ntɔngɔ, mpe mɔtɔ ya etumbelo ekopelisama na kati. 10  Mpe nganga-nzambe asengeli kolata elamba na ye ya mosala, oyo esalemi na lini,+ mpe akolata bakupe+ ya lini na nzoto. Na nsima, asengeli kolongola putulu ya mɔtɔ+ oyo etondi na mafuta ya likabo ya kotumba oyo mɔtɔ etumbaka ntango nyonso likoló ya etumbelo, mpe asengeli kotya yango pembeni ya etumbelo. 11  Mpe asengeli kolongola bilamba+ na ye mpe kolata bilamba mosusu, mpe asengeli komema putulu yango ya mɔtɔ oyo etondi na mafuta tii na esika ya pɛto, oyo ezali libándá ya kaa.+ 12  Mpe mɔtɔ oyo ezali likoló ya etumbelo, ekokoba kopela likoló na yango. Yango esengeli kokufa te. Mpe nganga-nzambe asengeli kotumba nkoni+ likoló na yango ntɔngɔ nyonso mpe kotya likabo ya kotumba na molɔngɔ likoló na yango, mpe asengeli kosala ete biteni ya mafutamafuta ya mbeka ya boyokani ebimisa milinga likoló na yango.+ 13  Mɔtɔ+ ekokoba kopela ntango nyonso likoló ya etumbelo. Esengeli kokufa te. 14  “‘Sikoyo talá mobeko ya likabo ya mbuma:+ Bino bana mibali ya Arona, bópesa yango liboso ya Yehova, liboso ya etumbelo. 15  Mpe moko na bango asengeli kotondisa lobɔkɔ na ye na mwa ndambo ya farini ya malamu ya likabo ya mbuma ná mwa ndambo ya mafuta na yango mpe olibana nyonso oyo ezali likoló ya likabo ya mbuma, mpe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo lokola nsolo moko ya kokitisa motema mpo ezala eloko oyo ekotinda Yehova akanisa.+ 16  Mpe ndambo na yango oyo etikali, Arona ná bana na ye ya mibali bakolya.+ Ekolyama lokola bagato+ ezangá levire, na esika mosantu. Bakolya yango na lopango ya hema ya kokutana. 17  Yango esengeli te kotumbama na eloko oyo etyami levire.+ Napesi yango ezala eteni na bango oyo euti na makabo na ngai, oyo etumbami na mɔtɔ.+ Yango ezali eloko oyo eleki bosantu,+ lokola likabo mpo na lisumu mpe lokola likabo ya ngambo. 18  Mobali+ nyonso kati na bana mibali ya Arona akolya yango. Yango ezali pɔsɔ na bango, mpo na ntango oyo etyami ndelo te+ na boumeli ya mabota na bango, oyo ekouta na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ. Eloko nyonso oyo ekosimba yango, ekokóma mosantu.’” 19  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 20  “Talá likabo+ oyo Arona ná bana na ye ya mibali bakopesa Yehova na mokolo oyo akotyama mafuta:+ moko ya bandambo zomi ya efa+ ya farini ya malamu lokola likabo ya mbuma+ ntango nyonso, ndambo na yango na ntɔngɔ mpe ndambo na yango na mpokwa. 21  Yango ekosalema na mafuta, na kikalungu.+ Okomema yango nsima ya kosangisa yango malamu. Okopesa biloko etumbami oyo esalemi na farini ya likabo ya mbuma, okopesa yango bitenibiteni mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema. 22  Mpe nganga-nzambe, moto oyo akotyama mafuta na esika na ye kati na bana na ye ya mibali,+ akosala yango. Yango ezali lilako mpo na ntango oyo etyami ndelo te: Akosala ete ebimisa milinga lokola likabo mobimba mpo na Yehova.+ 23  Mpe likabo nyonso ya mbuma ya nganga-nzambe,+ ekozala likabo mobimba. Esengeli kolyama te.” 24  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 25  “Lobá na Arona ná bana na ye ya mibali: ‘Talá mobeko ya likabo mpo na lisumu:+ Likabo mpo na lisumu ekobomama liboso ya Yehova na esika+ oyo likabo ya kotumba ebomamaka ntango nyonso. Ezali eloko moko oyo eleki bosantu.+ 26  Nganga-nzambe oyo azali kopesa yango mpo na lisumu, akolya yango.+ Ekolyama na esika mosantu+ na kati ya lopango+ ya hema ya kokutana. 27  “‘Eloko nyonso oyo ekosimba mosuni na yango ekokóma mosantu,+ mpe ntango moto akomwangisa mwa ndambo ya makila na yango likoló ya elamba,+ okosukola elamba yango oyo ye akomwangisela makila na esika mosantu.+ 28  Mpe mbɛki ya mabele+ oyo balambaki mosuni yango ekobukama. Kasi soki elambamaki na esaleli ya motako, yango esengeli konikama mpe kosukolama na mai. 29  “‘Mobali nyonso kati na banganga-nzambe akolya yango.+ Yango ezali eloko oyo eleki bosantu.+ 30  Nzokande, likabo nyonso mpo na lisumu, oyo mwa ndambo ya makila+ na yango ekomemama na kati ya hema ya kokutana mpo na kozipa masumu na esika mosantu, esengeli kolyama te. Yango ekozikisama na mɔtɔ.

Maloba na nse