Balevi 4:1-35
4 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:
2 “Lobá na bana ya Yisraele boye: ‘Soki molimo+ moko asali lisumu na nko te+ na makambo nyonso oyo Yehova apesi mitindo ete esengeli kosalema te, mpe ye asali mpenza moko na yango:
3 “‘Soki nganga-nzambe, moto oyo atyami mafuta,+ asali lisumu+ mpe ayeisi ngambo likoló ya bato, mpo na lisumu+ oyo asali, asengeli kopesa Yehova mwana-ngɔmbɛ ya mobali, oyo ezangi mbeba, lokola likabo mpo na lisumu.
4 Mpe asengeli komema ngɔmbɛ-mobali yango na monɔkɔ ya hema ya kokutana+ liboso ya Yehova mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó ya ngɔmbɛ-mobali yango,+ mpe asengeli koboma ngɔmbɛ-mobali yango liboso ya Yehova.
5 Mpe nganga-nzambe, moto oyo atyami mafuta,+ asengeli kokamata mwa ndambo ya makila ya ngɔmbɛ-mobali yango mpe komema yango na kati ya hema ya kokutana;
6 mpe nganga-nzambe asengeli kozindisa mosapi na ye+ na makila mpe komwangisa mwa ndambo ya makila yango mbala nsambo+ liboso ya Yehova, liboso ya rido ya esika mosantu.
7 Mpe nganga-nzambe asengeli kotya mwa ndambo ya makila yango likoló ya maseke+ ya etumbelo ya mpaka ya malasi ya nsolo kitoko liboso ya Yehova, oyo ezali na kati ya hema ya kokutana, mpe makila nyonso oyo etikali ya ngɔmbɛ-mobali yango, akosopa yango na nse+ ya etumbelo ya makabo ya kotumba, oyo ezali na monɔkɔ ya hema ya kokutana.
8 “‘Mafuta nyonso ya ngɔmbɛ-mobali yango ya likabo mpo na lisumu, akolongola mafuta oyo ezipi misɔpɔ, ɛɛ mafuta nyonso oyo ezali likoló ya misɔpɔ,+
9 ná mimpíko mibale ná mafuta oyo ezali likoló na yango, ndenge moko na oyo ezali likoló ya mosuni ya eteni ya nse ya mokɔngɔ. Mpe mafuta ya libale, akolongola yango nzela moko na mimpíko.+
10 Ekozala ndenge moko lokola oyo elongolamaka na ngɔmbɛ-mobali ya mbeka ya boyokani.+ Mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo ya likabo ya kotumba.+
11 “‘Kasi, loposo ya ngɔmbɛ-mobali yango ná mosuni na yango elongo na motó na yango ná makolo na yango ná misɔpɔ na yango mpe nyɛi na yango,+
12 asengeli kotinda ete bábimisa ngɔmbɛ-mobali yango mobimba mwa mosika na kaa,+ na esika ya pɛto, epai basopaka putulu ya mɔtɔ oyo etondi na mafuta,+ mpe asengeli kozikisa yango na mɔtɔ likoló ya nkoni.+ Esengeli kozikisama na esika basopaka putulu ya mɔtɔ oyo etondi na mafuta.
13 “‘Sikoyo soki liyangani mobimba ya Yisraele esali libunga+ mpe lisangá eyebi te ete basali moko ya makambo nyonso oyo Yehova apesi mitindo ete esengeli kosalema te bongo bamemi ngambo,+
14 mpe soki lisumu oyo basali na moko ya makambo yango eyebani,+ lisangá esengeli kopesa mwana-ngɔmbɛ ya mobali ezala likabo mpo na lisumu mpe esengeli koya na yango liboso ya hema ya kokutana.
15 Mpe mikóló ya liyangani basengeli kotya mabɔkɔ na bango na motó ya ngɔmbɛ-mobali+ yango liboso ya Yehova, mpe ngɔmbɛ-mobali yango esengeli kobomama liboso ya Yehova.
16 “‘Na nsima nganga-nzambe, moto oyo atyami mafuta,+ asengeli komema mwa ndambo ya makila ya ngɔmbɛ-mobali yango na kati ya hema ya kokutana.+
17 Mpe nganga-nzambe asengeli kozindisa mosapi na ye na mwa ndambo ya makila yango mpe komwangisa yango mbala nsambo liboso ya Yehova, liboso ya rido.+
18 Mpe akotya mwa ndambo ya makila yango likoló ya maseke ya etumbelo+ oyo ezali liboso ya Yehova, oyo ezali na hema ya kokutana; mpe makila nyonso mosusu oyo etikali, akosopa yango na nse ya etumbelo ya likabo ya kotumba,+ oyo ezali na monɔkɔ ya hema ya kokutana.
19 Mpe akolongola yango mafuta na yango nyonso, mpe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo.+
20 Mpe asengeli kosala na ngɔmbɛ-mobali yango kaka ndenge asalaki na ngɔmbɛ-mobali mosusu ya likabo mpo na lisumu. Ndenge wana nde akosala na yango; mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na bango, bongo bakolimbisama.
21 Mpe asengeli kotinda ete bábimisa ngɔmbɛ-mobali yango mwa mosika na kaa mpe asengeli kozikisa yango, kaka ndenge azikisaki ngɔmbɛ-mobali ya liboso.+ Yango ezali likabo mpo na lisumu mpo na lisangá.+
22 “‘Ntango nkumu+ moko asali lisumu mpe asali mpenza na nko te moko ya makambo nyonso oyo Yehova Nzambe na ye apesi mitindo ete esengeli kosalema te,+ bongo amemi ngambo,
23 to soki bayebisi ye+ mobeko oyo abuki na lisumu na ye, asengeli komema lokola likabo na ye mwana-ntaba ya mobali,+ oyo ezangi mbeba.
24 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó+ ya mwana-ntaba yango mpe koboma yango na esika oyo likabo ya kotumba ebomamaka ntango nyonso liboso ya Yehova.+ Yango ezali likabo mpo na lisumu.+
25 Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa na mosapi na ye mwa ndambo ya makila ya likabo mpo na lisumu mpe kotya yango likoló ya maseke+ ya etumbelo ya likabo ya kotumba, mpe akosopa makila na yango oyo etikali na nse ya etumbelo ya likabo ya kotumba.
26 Mpe akosala ete mafuta na yango nyonso ebimisa milinga likoló ya etumbelo lokola mafuta ya mbeka ya boyokani;+ mpe nganga-nzambe asengeli kozipela ye lisumu na ye,+ bongo akolimbisama.
27 “‘Mpe soki molimo moko kati na bato ya mokili asali lisumu na nko te na kosaláká moko ya makambo oyo Yehova apesi mitindo ete esengeli kosalema te, mpe amemi mpenza ngambo,+
28 to soki bayebisi ye lisumu oyo asali, asengeli komema likabo na ye, mwana-ntaba ya mwasi,+ oyo ezangi mbeba, mpo na lisumu oyo asali.
29 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó+ ya likabo mpo na lisumu mpe koboma likabo yango mpo na lisumu kaka na esika ya likabo ya kotumba.+
30 Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila na yango na mosapi na ye mpe kotya yango likoló ya maseke+ ya etumbelo ya likabo ya kotumba, mpe akosopa makila na yango nyonso oyo etikali na nse ya etumbelo.+
31 Mpe akolongola mafuta+ na yango nyonso, kaka ndenge balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani;+ mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema;+ mpe nganga-nzambe asengeli kozipa lisumu na ye, bongo akolimbisama.+
32 “Kasi soki ye alingi komema mwana-mpate+ lokola likabo na ye mpo ezala likabo mpo na lisumu, akomema mwana-mpate ya mwasi, oyo ezangi mbeba.+
33 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó ya likabo mpo na lisumu mpe koboma yango lokola likabo mpo na lisumu na esika oyo likabo ya kotumba ebomamaka ntango nyonso.+
34 Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila ya likabo mpo na lisumu na mosapi na ye, mpe kotya yango likoló ya maseke ya etumbelo ya likabo ya kotumba,+ mpe akosopa makila na yango nyonso oyo etikali, na nse ya etumbelo.
35 Mpe akolongola mafuta na yango nyonso kaka ndenge balongolaka mafuta ya mwana-mpate ya mobali ya mbeka ntango nyonso, mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo, likoló ya makabo ya Yehova, oyo etumbami na mɔtɔ;+ mpe nganga-nzambe asengeli kozipela+ ye lisumu oyo asali, bongo akolimbisama.+