Balevi 3:1-17
3 “‘Mpe soki likabo na ye ezali mbeka ya boyokani,+ soki likabo yango oyo azali kopesa euti na bangɔmbɛ, ngɔmbɛ ya mobali to ya mwasi, akopesa liboso ya Yehova nyama oyo ezangi mbeba.+
2 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó+ ya likabo na ye, mpe yango esengeli kobomama na monɔkɔ ya hema ya kokutana; mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, basengeli komwangisa makila zingazinga, likoló ya etumbelo.
3 Mpe asengeli kopesa Yehova ndambo ya mbeka ya boyokani lokola likabo oyo etumbami na mɔtɔ, elingi koloba, mafuta+ oyo ezipi misɔpɔ, ɛɛ mafuta nyonso oyo ezali likoló ya misɔpɔ,+
4 ná mimpíko mibale+ ná mafuta oyo ezali likoló na yango, ndenge moko na oyo ezali likoló ya mosuni ya eteni ya nse ya mokɔngɔ. Mpe mafuta ya libale, akolongola yango ná mimpíko.
5 Mpe bana mibali+ ya Arona basengeli kosala ete yango ebimisa milinga+ likoló ya etumbelo, likoló ya likabo ya kotumba oyo ezali likoló ya nkoni+ oyo ezali likoló ya mɔtɔ, mpo ezala likabo oyo etumbami na mɔtɔ, likabo ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+
6 “‘Mpe soki likabo na ye oyo azali kopesa Yehova lokola mbeka ya boyokani euti na bampate, akopesa mpate ya mobali to ya mwasi, oyo ezangi mbeba.+
7 Soki likabo na ye oyo azali kopesa ezali mwana-mpate ya mobali, asengeli kopesa yango liboso ya Yehova.+
8 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó+ ya likabo na ye, mpe yango esengeli kobomama+ liboso ya hema ya kokutana; mpe bana mibali ya Arona basengeli komwangisa makila na yango zingazinga, likoló ya etumbelo.
9 Mpe na mbeka ya boyokani, asengeli kozwa mafuta na yango mpe kopesa yango ezala likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova.+ Mokila mobimba oyo ezali mafutamafuta+ yango nde akolongola pene na mokuwa ya mokɔngɔ, ná mafuta oyo ezipi misɔpɔ, ɛɛ mafuta nyonso oyo ezali likoló ya misɔpɔ,+
10 ná mimpíko mibale mpe mafuta oyo ezali likoló na yango, ndenge moko na oyo ezali likoló ya mosuni ya eteni ya nse ya mokɔngɔ. Mpe mafuta+ ya libale, akolongola yango ná mimpíko.
11 Mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga+ likoló ya etumbelo lokola bilei,+ likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova.
12 “‘Mpe soki likabo na ye ezali ntaba,+ asengeli kopesa yango liboso ya Yehova.
13 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó na yango,+ mpe yango esengeli kobomama+ liboso ya hema ya kokutana; mpe bana mibali ya Arona basengeli komwangisa makila na yango zingazinga, likoló ya etumbelo.
14 Mpe na likabo yango, asengeli kozwa likabo na ye mpe kopesa yango ezala likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova, mafuta oyo ezipi misɔpɔ, ɛɛ mafuta nyonso oyo ezali likoló ya misɔpɔ,+
15 ná mimpíko mibale mpe mafuta oyo ezali likoló na yango, ndenge moko na oyo ezali likoló ya mosuni ya eteni ya nse ya mokɔngɔ. Mpe mafuta ya libale, akolongola yango ná mimpíko.
16 Mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo lokola bilei, likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo ezala nsolo moko ya kokitisa motema. Mafuta nyonso ezali ya Yehova.+
17 “‘Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino, na bisika na bino nyonso ya kofanda: bosengeli kolya mafuta ata moke te to makila+ ata moke te.’”