Balevi 27:1-34
27 Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete:
2 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Soki moto moko asali elako moko monene+ mpo na kopesa Yehova milimo engebene motuya oyo ekatami,
3 mpe soki motuya oyo ekatami esengeli kozala motuya ya mobali ya mbula ntuku mibale (20) kino mbula ntuku motoba (60), motuya oyo ekatami esengeli kokóma shekele ntuku mitano (50) ya palata na kolanda shekele ya esika mosantu.
4 Kasi soki motuya yango ezali ya mwasi, motuya oyo ekatami esengeli kokóma shekele ntuku misato (30).
5 Mpe soki mbula na yango ebandi na mbula mitano kino mbula ntuku mibale (20), motuya oyo ekatami ya mobali esengeli kokóma shekele ntuku mibale mpe mpo na mwasi shekele zomi.
6 Mpe soki mbula na yango ebandi na sanza moko kino mbula mitano, motuya oyo ekatami ya mobali esengeli kokóma shekele mitano+ ya palata mpe mpo na mwasi motuya oyo ekatami esengeli kozala shekele misato ya palata.
7 “‘Sikoyo soki mbula na yango ebandi na mbula ntuku motoba (60) tii na likoló, soki motuya yango ezali ya mobali, motuya oyo ekatami esengeli kokóma shekele zomi na mitano mpe mpo na mwasi shekele zomi.
8 Kasi soki ye akómi mobola mpenza mpe azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatami,+ asengeli kotɛlɛmisa moto yango liboso ya nganga-nzambe, mpe nganga-nzambe asengeli kokata motuya na ye.+ Engebene makoki+ ya moto oyo asali elako, nganga-nzambe akokata motuya na ye.
9 “‘Mpe soki ezali nyama lokola oyo moto apesaka Yehova likabo, eloko nyonso oyo akopesa Yehova ekokóma eloko moko mosantu.+
10 Akoki te kotya mosusu na esika na yango, mpe akoki te kopesa oyo ezali malamu na esika ya oyo ezali mabe to oyo ezali mabe na esika ya oyo ezali malamu. Kasi soki apesi mpenza nyama mosusu na esika ya nyama yango, esengeli kokóma eloko moko mosantu, ezala mpe eloko oyo bapesi na esika na yango.
11 Mpe soki yango ezali moko na kati ya banyama ya mbindo+ lokola oyo moto akoki te kopesa Yehova likabo,+ asengeli kotɛlɛmisa nyama yango liboso ya nganga-nzambe.+
12 Mpe nganga-nzambe asengeli kokata motuya na yango soki yango ezali malamu to mabe. Engebene motuya oyo ekatami+ na nganga-nzambe, yango ekozala bongo.
13 Kasi soki alingi mpenza kosomba yango lisusu, asengeli kobakisa moko ya bandambo mitano+ na motuya oyo ekatami.
14 “‘Sikoyo soki moto moko asantisi ndako na ye lokola eloko moko mosantu mpo na Yehova, nganga-nzambe asengeli kokata motuya na yango soki yango ezali malamu to mabe.+ Engebene motuya oyo nganga-nzambe akateli yango, ntalo na yango ekozala bongo.
15 Kasi soki mosantisi alingi kosomba ndako na ye lisusu, asengeli kobakisa moko ya bandambo mitano ya mbongo na motuya oyo ekatami;+ mpe yango ekokóma ya ye.
16 “‘Mpe soki yango ezali mwa ndambo ya elanga ya mabele na ye+ nde moto alingi kosantisa mpo na Yehova, motuya esengeli kokatama na kotalela mboto na yango: soki ezali homɛrɛ+ moko ya mboto ya ɔrje, ekozala shekele ntuku mitano (50) ya palata.
17 Soki asantisi elanga na ye banda na mbula ya Yubile,+ ntalo na yango ekozala engebene motuya oyo ekatami.
18 Mpe soki ezali nsima ya Yubile nde asantisi elanga na ye, nganga-nzambe asengeli kotángela ye ntalo na kotalela bambula oyo etikali kino na mbula ya Yubile oyo ekolanda, mpe ntalo ekokitisama na motuya oyo ekatami.+
19 Kasi soki mosantisi na yango alingi mpenza kosomba elanga yango lisusu, asengeli kobakisa moko ya bandambo mitano ya mbongo likoló ya motuya oyo ekatami, mpe yango esengeli kotikala ya ye.+
20 Sikoyo soki asombi elanga yango lisusu te, kasi soki yango etɛkami epai ya moto mosusu, ekoki kosombama lisusu te.
21 Mpe elanga yango, ntango ekozongisama na Yubile, esengeli kokóma eloko moko mosantu mpo na Yehova, lokola elanga oyo epesamá.+ Mabele na yango ekokóma ya nganga-nzambe.+
22 “‘Mpe soki asantiseli Yehova elanga oyo asombi, oyo ezali eteni ya elanga ya mabele na ye te,+
23 boye nganga-nzambe asengeli kotángela ye motuya ya mbongo kino na mbula ya Yubile, mpe asengeli kopesa motuya oyo ekatami kaka na mokolo yango.+ Yango ezali eloko moko mosantu mpo na Yehova.+
24 Na mbula ya Yubile, elanga ekozongela moto oyo epai na ye asombaki yango, epai ya moto oyo azali nkolo ya mabele yango.+
25 “‘Sikoyo motuya nyonso ekokatama na shekele ya esika mosantu. Shekele moko ekozala gera ntuku mibale (20).+
26 “‘Kasi mwana ya liboso ya banyama, oyo ebotami lokola mwana ya liboso mpo na Yehova,+ moto moko te akosantisa yango. Ezala ngɔmbɛ-mobali to mpate, yango ezali ya Yehova.+
27 Mpe soki yango ezali kati na banyama ya mbindo+ mpe asengeli kosikola yango engebene motuya oyo ekatami, asengeli kobakisa moko ya bandambo mitano likoló na yango.+ Kasi soki yango ekosombama lisusu te, esengeli kotɛkama engebene motuya oyo ekatami.
28 “‘Kasi eloko moko te oyo epesami mpo na libebi,+ oyo moto akoki kopesa Yehova, oyo euti na biloko nyonso oyo ezali ya ye, ezala euti na bato to na banyama to na elanga ya mabele na ye, ekoki kotɛkama, mpe eloko moko te oyo epesami mpo na libebi ekoki kosombama lisusu.+ Yango ezali eloko oyo eleki bosantu mpo na Yehova.
29 Moto moko te oyo apesami mpo na libebi kati na bato akoki kosikolama.+ Asengeli mpenza kobomama.+
30 “‘Mpe moko ya bandambo zomi+ nyonso ya mokili yango, oyo euti na mboto ya mokili mpe na mbuma ya nzete, ezali ya Yehova. Yango ezali eloko moko mosantu mpo na Yehova.
31 Mpe soki moto moko alingi mpenza kosomba lisusu ata eteni nini ya moko ya bandambo zomi, akobakisa moko ya bandambo mitano likoló na yango.+
32 Mpo na moko ya bandambo zomi nyonso ya etonga ya bangɔmbɛ mpe ya bampate, nyonso oyo elekaka na nse ya nzete ya mobateli,+ nyama ya zomi ekokóma eloko moko mosantu mpo na Yehova.
33 Akotala te soki ezali malamu to mabe, mpe akopesa nyama mosusu te na esika na yango. Kasi soki alingi mpenza kopesa nyama mosusu na esika na yango, ekokóma eloko moko mosantu,+ ezala mpe eloko oyo bapesi na esika na yango. Yango ekoki kosombama lisusu te.’”
34 Wana ezali mibeko+ oyo Yehova apesaki Moize mpo ezala mitindo epai ya bana ya Yisraele na Ngomba Sinai.+