Balevi 26:1-46

26  “‘Bosengeli te komisalela+ banzambe ya mpambampamba, mpe bosengeli te komitɛlɛmisela ekeko+ oyo eyemami to likonzí ya losambo, mpe bosengeli te kotɛlɛmisa libanga oyo ezali na bililingi ya kitoko mpenza+ na mokili na bino mpo na kogumbamela yango;+ mpo ngai nazali Yehova Nzambe na bino.  Bokotosa basabata+ na ngai mpe bokozala na nsɔmɔ ya esika mosantu na ngai. Ngai nazali Yehova.  “‘Soki bokobi kotambola na mibeko na ngai mpe kotosa mitindo na ngai mpe kosalela yango,+  nakopesa mpenza bino mbula oyo ezali kosopana na ntango na yango,+ mpe mokili ekopesa mpenza mbuma na yango,+ mpe nzete ya elanga ekopesa mbuma na yango.+  Ntango na bino ya kotutatuta mbuma ekokóma mpenza tii na ntango ya kobuka mbuma ya vinyo, mpe ntango ya kobuka mbuma ya vinyo ekokóma tii na ntango ya kolona mboto; mpe bokolya mpenza limpa ndenge bolingi+ mpe bokofanda na kimya na mokili na bino.+  Mpe nakotya kimya na mokili,+ mpe bokolala mpenza, kozanga ete moto moko alɛngisa+ bino, mpe nakosilisa banyama mabe ya zamba na mokili,+ mpe mopanga ekoleka na mokili na bino te.+  Mpe bokobengana mpenza banguna+ na bino, mpe bakokwea liboso na bino na mopanga.  Mpe mitano na kati na bino bakobengana nkama moko (100), mpe nkama moko na kati na bino bakobengana nkoto zomi (10 000), mpe banguna na bino bakokwea liboso na bino na mopanga.+  “‘Mpe nakotala bino+ mpe nakosala ete bóbota mingi mpe nakokómisa bino mingi,+ mpe nakokokisa kondimana na ngai na bino.+ 10  Mpe bokolya mpenza biloko oyo bobukaki na mbula oyo eleki,+ mpe bokobimisa biloko ya kala liboso na oyo ya sika. 11  Mpe nakotya mpenza tabernakle na ngai na kati na bino,+ mpe molimo na ngai ekoyina bino te.+ 12  Mpe nakotambola mpenza na kati na bino mpe nakomonisa ete nazali Nzambe na bino,+ mpe bino, ɛɛ bino, bokomonisa ete bozali bato na ngai.+ 13  Nazali Yehova Nzambe na bino, ngai moto nabimisaki bino na mokili ya Ezipito mpo bózala baombo na bango te,+ mpe nabukaki banzete ya ekanganeli na bino, natɛlɛmisaki bino alima mpe natambwisaki bino.+ 14  “‘Nzokande, soki boyokeli ngai te mpe bosaleli mitindo nyonso wana te,+ 15  mpe soki bobwaki mibeko na ngai,+ mpe soki milimo na bino ekoyina bikateli na ngai ya lisambisi mpe bosaleli te mitindo na ngai nyonso, kino kobuka kondimana na ngai,+ 16  ngai, ɛɛ ngai, nakosalela bino makambo oyo: nakoyeisela bino etumbu ya kotungisama na tibɛrkiloze+ ná fiɛvrɛ makasi, oyo ekobebisa miso+ mpe ekolɛmbisa molimo.+ Mpe bokolona mpenza mboto na bino kaka mpamba, mpo banguna na bino bakolya yango.+ 17  Mpe nakotɛmɛla bino mpenza, mpe banguna na bino bakolonga bino;+ mpe baoyo bazali koyina bino bakonyata bino,+ mpe bokokima mpenza wana moto moko te azali kolanda bino.+ 18  “‘Kasi, soki atako bongo boyokeli ngai te, nasengeli kopesa bino etumbu mbala nsambo koleka mpo na masumu na bino.+ 19  Mpe nasengeli kobuka lolendo na bino ya makasi mpe kokómisa likoló na bino lokola ebende+ mpe mabele na bino lokola motako. 20  Mpe nguya na bino ekosila kaka mpamba, mpo mabele na bino ekopesa mbuma na yango te,+ mpe nzete ya mabele ekopesa mbuma na yango te.+ 21  “‘Kasi soki, na etamboli na bino, bozali kaka kotɛmɛla ngai mpe bozali kaka kolinga koyokela ngai te, nakobakisela bino malɔzi mbala nsambo na kotalela masumu na bino.+ 22  Mpe nakotinda na kati na bino banyama ya zamba oyo efandaka na esobe,+ mpe yango ekozangisa bino bana+ mpe ekolongola banyama na bino ya mboka mpe ekokitisa motángo na bino, mpe babalabala na bino ekotikala mpenza mpamba.+ 23  “‘Kasi, soki atako bongo bomitiki te ete nasembola bino,+ mpe na etamboli na bino, bozali kaka kotɛmɛla ngai, 24  ngai, ɛɛ, ngai, nasengeli kotɛmɛla bino na ndenge na ngai ya kosala;+ mpe ngai, ɛɛ ngai, nasengeli kobɛta bino mbala nsambo mpo na masumu na bino.+ 25  Mpe nakoyeisela bino mopanga oyo ekozongisa mabe+ mpo na kondimana;+ mpe bokoyangana mpenza kati na bingumba na bino, mpe nakotinda mpenza maladi mabe na kati na bino,+ mpe bosengeli kopesama na lobɔkɔ ya monguna.+ 26  Ntango nakobukela bino mangenda oyo bakakisaka mampa oyo basali lokola lopɛtɛ,+ basi zomi bakotumba limpa na bino kaka na etumbelo moko ya mampa mpe bakopesa bino limpa oyo bameki nde na kilo;+ mpe bokolya, kasi bokotonda te.+ 27  “‘Nzokande, soki atako bongo boyokeli ngai te, mpe na etamboli na bino, bozali kaka kotɛmɛla ngai,+ 28  nasengeli kotɛmɛla bino makasi na ndenge na ngai ya kosala,+ mpe ngai, ɛɛ, ngai, nasengeli kopesa bino etumbu mbala nsambo mpo na masumu na bino.+ 29  Bongo bosengeli kolya mosuni ya bana na bino ya mibali, mpe bokolya mosuni ya bana na bino ya basi.+ 30  Mpe nakosilisa mpenza nyɛɛ bisika na bino oyo etombwaná ya losambo,+ mpe nakolongola bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi mpe nakolalisa bibembe na bino mpenza likoló ya bibembe ya bikeko na bino ya bosɔtɔ;*+ mpe molimo na ngai ekoyina mpenza bino.+ 31  Mpe nakopesa mpenza bingumba na bino na mopanga+ mpe nakotika bisika mosantu na bino mpamba,+ mpe nakoyoka te nsolo ya bambeka na bino ya kokitisa motema.+ 32  Mpe ngai, ɛɛ ngai, nakotika mokili mpamba,+ mpe banguna na bino oyo bazali kofanda na kati na yango bakotikala monɔkɔ polele mpo na yango.+ 33  Mpe nakopalanganisa bino na kati ya bikólo,+ mpe nakobimisa mopanga na ekótó nsima na bino;+ mpe mokili na bino esengeli kotikala mpamba,+ mpe bingumba na bino ekokóma kaka bitiká mpamba. 34  “‘Na ntango yango mokili ekofuta basabata na yango mikolo nyonso oyo yango ekotikala mpamba, wana bino bokozala na mokili ya banguna na bino. Na ntango yango mokili ekotosa sabata, mpo esengeli kofuta basabata na yango.+ 35  Mikolo nyonso oyo yango ekotikala mpamba, ekotosa sabata, mpo ete etosaki sabata te na boumeli ya basabata na bino ntango bozalaki kofanda na yango. 36  “‘Bongo baoyo bakotikala na kati na bino,+ nakoyeisa mpenza kobangabanga na mitema na bango na mikili ya banguna na bango; mpe makɛlɛlɛ ya lokasa oyo mopɛpɛ ezali komema epai na epai ekokimisa mpenza bango, mpe bakokima mpenza liboso ya mopanga mpe bakokwea, nzokande moto moko te azali kolanda bango.+ 37  Mpe bakobɛtisana libaku lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga, nzokande moto moko te azali kolanda bango, mpe bino bokokoka te kotɛlɛma liboso ya banguna na bino.+ 38  Mpe bosengeli kokufa na bikólo,+ mpe mokili ya banguna na bino esengeli kolya bino. 39  Bongo baoyo bakotikala kati na bino, bakopɔla+ mpo na libunga na bango na mikili ya banguna na bango. Ɛɛ, mpo na mabunga ya batata na bango,+ bakopɔla elongo na bango. 40  Mpe bakoyambola mpenza libunga na bango+ mpe libunga ya batata na bango na kati ya kozanga bosembo na bango ntango bazangaki bosembo epai na ngai, ɛɛ, ntango batɛmɛlaki ngai na etamboli na bango.+ 41  Kasi ngai, ɛɛ ngai, natɛmɛlaki bango na ndenge na ngai ya kosala,+ mpe namemaki mpenza bango na mokili ya banguna na bango.+ “‘Mbala mosusu, na ntango yango, mitema na bango oyo ekatamá ngenga te+ ekomikitisa,+ mpe na ntango yango bakofuta libunga na bango. 42  Mpe nakokanisa mpenza kondimana na ngai na Yakobo;+ mpe nakokanisa lisusu kondimana na ngai na Yisaka+ mpe lisusu kondimana na ngai na Abrahama,+ mpe nakokanisa mokili yango. 43  Ntango nyonso oyo mokili yango etikalaki, wana basundolaki yango, mpe ezalaki kofuta basabata na yango,+ wana etikalaki mpamba, bango bazalaki te, mpe bango moko bazalaki kofuta mpo na libunga na bango,+ mpo, ɛɛ mpo babwakaki bikateli na ngai ya lisambisi,+ mpe milimo na bango eyinaki mibeko na ngai.+ 44  Mpe atako bongo, ntango bakozala na mokili ya banguna na bango, nakobwaka bango ata moke te+ mpe nakoyina bango te+ kino kosilisa bango nyɛɛ, kobukáká kondimana+ na ngai na bango; mpo ngai nazali Yehova Nzambe na bango. 45  Mpe nakokanisa mpo na bango kondimana ya bankɔkɔ+ oyo nabimisaki na mokili ya Ezipito na miso ya bikólo,+ mpo na komonisa ete nazali Nzambe na bango. Ngai nazali Yehova.’” 46  Wana ezali malako mpe bikateli ya lisambisi+ mpe mibeko oyo Yehova atyaki kati na ye ná bana ya Yisraele na Ngomba Sinai, na nzela ya Moize.+

Maloba na nse

Liloba yango na Ebre ezali nde nyɛi.