Balevi 24:1-23

24  Mpe Yehova alobaki na Moize ete:  “Pesá mitindo na bana ya Yisraele ete bázwela yo mafuta ya pɛto ya mbuma ya olive oyo etutami mpo na engɛngiseli,+ mpo na kopelisa mwinda ntango nyonso.+  Arona akobongisa yango mpo epelaka banda mpokwa tii na ntɔngɔ liboso ya Yehova ntango nyonso na libándá ya rido ya Litatoli na kati ya hema ya kokutana. Ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino.  Likoló ya etɛlɛmiselo+ ya miinda na wolo ya pɛto, akotya miinda+ na molɔngɔ liboso ya Yehova ntango nyonso.+  “Mpe osengeli kozwa farini ya malamu mpe kotumba yango bagato zomi na mibale lokola lopɛtɛ. Mibale ya bandambo zomi ya efa ekozala mpo na gato mokomoko oyo basali lokola lopɛtɛ.  Mpe osengeli kotya yango moko likoló ya mosusu na milɔngɔ mibale, motoba motoba,+ likoló ya mesa ya wolo ya pɛto liboso ya Yehova.+  Mpe osengeli kotya olibana ya pɛto likoló ya molɔngɔ mokomoko, mpe yango esengeli kozala mampa oyo ekotinda Nzambe akanisa,+ likabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ.  Na mokolo nyonso ya sabata, akotya yango na molɔngɔ liboso ya Yehova ntango nyonso.+ Ezali kondimana ná bana ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te.  Mpe yango esengeli kokóma ya Arona ná bana na ye ya mibali,+ mpe basengeli kolya yango na esika mosantu,+ mpamba te ezali eloko oyo eleki bosantu mpo na ye, oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ, lokola lilako mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” 10  Sikoyo mwana mobali moko oyo mama na ye azalaki Moyisraele, nzokande, tata na ye azalaki Moezipito,+ abimaki na kati ya bana ya Yisraele, mpe mwana mobali yango ya mwasi Moyisraele ná mobali moko Moyisraele babandaki kobunda+ na kaa. 11  Mpe mwana mobali ya mwasi Moyisraele yango abandaki kotuka Nkombo+ mpe kolakela yango mabe.+ Bongo bamemaki ye epai ya Moize.+ Nzokande, nkombo ya mama na ye Shelomite, mwana ya Dibri na libota ya Dani. 12  Na nsima, batyaki ye esika moko boye+ tii bakozwa liloba ya sikisiki ndenge Yehova akoloba.+ 13  Mpe Yehova alobaki na Moize ete: 14  “Moto oyo alakelaki mabe, memá ye libándá ya kaa;+ mpe baoyo nyonso bayokaki ye basengeli kotya mabɔkɔ+ na bango likoló ya motó na ye, mpe liyangani mobimba esengeli kobamba ye mabanga.+ 15  Mpe okoloba na bana ya Yisraele ete: ‘Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, asengeli kozongisa monɔkɔ mpo na lisumu na ye. 16  Na yango, moto oyo atuki nkombo ya Yehova asengeli mpenza kobomama.+ Liyangani mobimba esengeli mpenza kobamba ye mabanga. Moto oyo afandi mopaya ndenge moko na mwana-mboka, akobomama mpo atuki Nkombo.+ 17  “‘Mpe soki moto abomi molimo moko kati na bato, asengeli mpenza kobomama.+ 18  Mpe moto oyo abomi molimo kati na banyama ya mboka, akofuta mpo na yango, molimo mpo na molimo.+ 19  Mpe soki moto moko asali moninga na ye mbeba, kaka ndenge ye asali, bakosala ye bongo.+ 20  Kobuka mpo na kobuka, liso mpo na liso, lino mpo na lino; kaka mbeba oyo asali moto, yango nde bakosala ye.+ 21  Mpe moto oyo abomi nyama+ moko akofuta+ mpo na yango, kasi moto oyo abomi moto asengeli kobomama.+ 22  “‘Ekateli ya lisambisi ekozala kaka moko mpo na bino. Moto oyo afandi mopaya akozala lokola mwana-mboka,+ mpamba te ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”+ 23  Nsima na yango Moize alobaki na bana ya Yisraele, mpe moto oyo alakelaki yango mabe, bamemaki ye libándá ya kaa, mpe babambaki ye mabanga.+ Bongo bana ya Yisraele basalaki kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.

Maloba na nse