Balevi 23:1-44
23 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:
2 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Bafɛti+ ya Yehova na bileko oyo etyami, oyo bokosakola,+ ezali mayangani mosantu. Talá bafɛti na ngai na bileko oyo etyami:
3 “‘Mosala ekoki kosalema mikolo motoba, kasi mokolo ya nsambo ezali sabata ya kopema mpenza,+ liyangani moko mosantu. Bokoki kosala mosala ata moko te. Ezali sabata mpo na Yehova na bisika nyonso oyo bozali kofanda.+
4 “‘Talá bafɛti+ ya Yehova na bileko oyo etyami, mayangani mosantu,+ oyo bokosakola na bantango na yango oyo etyami:+
5 Na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango,+ na mpokwa, liboso molili ekɔta* ezali elekeli+ mpo na Yehova.
6 “‘Mpe na mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango, ezali fɛti ya bagato ezangi levire mpo na Yehova.+ Bokolya bagato ezangi levire mikolo nsambo.+
7 Na mokolo ya liboso, bokosala liyangani moko mosantu.+ Bokoki kosala mosala ya makasi ata moko te.
8 Kasi bosengeli kopesa Yehova likabo oyo etumbami na mɔtɔ mikolo nsambo. Na mokolo ya nsambo, ekozala liyangani moko mosantu. Bokoki kosala mosala ya makasi ata moko te.’”
9 Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete:
10 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Ntango bokokɔta na mokili oyo nazali kopesa bino, mpe bokobuka mbuma na yango, bosengeli mpe komemela nganga-nzambe liboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini na mbuma ya liboso+ oyo bobuki.
11 Mpe asengeli koningisa liboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini epai na epai+ liboso ya Yehova mpo bóndimama. Kaka na mokolo oyo elandi sabata, nganga-nzambe akoningisa yango epai na epai.
12 Mpe na mokolo oyo bokoningisa liboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini epai na epai, bosengeli kopesa mwana-mpate ya mobali oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo ezala likabo ya kotumbela Yehova;
13 mpe lokola likabo na yango ya mbuma, ekozala mibale ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu oyo emwangisami mafuta, lokola likabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ, mpo ezala nsolo moko ya kokitisa motema; mpe lokola likabo na yango ya masanga, ekozala moko ya bandambo minei ya hini ya vinyo.
14 Mpe bosengeli te kolya limpa to mbuma ya kotumba to mbuma ya sika tii na mokolo yango mpenza,+ kino bokomema likabo ya Nzambe na bino. Ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino, na bisika nyonso oyo bozali kofanda.
15 “‘Mpe bosengeli kotánga mpo na bino sabata nsambo,+ banda mokolo oyo elandi sabata, banda mokolo oyo bomemi liboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini ya likabo ya koningisa. Ekozala mibimba.
16 Kino mokolo oyo elandi sabata ya nsambo, bokotánga mikolo ntuku mitano (50),+ mpe bosengeli kopesa Yehova likabo moko ya mbuma ya sika.+
17 Uta na bisika na bino ya kofanda, bokomema mampa mibale+ ezala likabo ya koningisa. Ekosalema na mibale ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu. Bakotya yango levire+ mpe bakotumbela yango Yehova lokola mbuma ya liboso oyo eteli.+
18 Mpe bosengeli kopesa nzela moko na mampa yango bana-mpate nsambo ya mibali+ oyo ezangi mbeba, mokomoko ekozala na mbula moko, ná mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali ná bampate-mibali mibale. Yango ekozala likabo ya kotumba mpo na Yehova nzela moko na likabo na yango ya mbuma ná makabo na yango ya masanga mpo ezala likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.
19 Mpe bosengeli kopesa mwana-ntaba+ ya mobali likabo mpo na lisumu mpe bana-mpate mibale ya mibali, mokomoko ekozala na mbula moko, mpo ezala mbeka ya boyokani.+
20 Mpe nganga-nzambe asengeli koningisa yango epai na epai+ nzela moko na mampa ya mbuma ya liboso oyo eteli, lokola likabo ya koningisa liboso ya Yehova, nzela moko na bana-mpate mibale ya mibali. Ekozala eloko moko mosantu mpo na Yehova, ekokóma ya nganga-nzambe.+
21 Mpe bosengeli kosakola+ na mokolo yango; bokozala na liyangani moko mosantu. Bokoki kosala mosala ya makasi ata moko te. Ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na bisika nyonso oyo bozali kofanda, na boumeli ya mabota na bino.
22 “‘Mpe ntango bokobuka mbuma ya mokili na bino, osengeli te kobuka mbuma nyonso oyo ezali na ndelo ya elanga na yo ntango ozali kobuka mbuma, mpe osengeli te kolɔkɔta+ mbuma oyo etikalaka na ntango ozali kobuka mbuma. Okotika yango mpo na moto ya mpasi+ mpe mpo na moto oyo afandi mopaya.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”
23 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:
24 “Lobá na bana ya Yisraele boye: ‘Na sanza ya nsambo,+ mokolo ya liboso ya sanza yango, bokopema mpenza kopema, ekozala mokolo ya kokanisa oyo ekosakolama na kobɛtáká kelelo,+ liyangani moko mosantu.+
25 Bokosala mosala ya makasi ata moko te, mpe bosengeli kopesa Yehova likabo oyo etumbami na mɔtɔ.’”
26 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:
27 “Kasi, mokolo ya zomi ya sanza oyo ya nsambo ezali mokolo ya kozipa masumu.+ Bokosala liyangani moko mosantu, mpe bosengeli koyokisa milimo+ na bino mpasi mpe kopesa Yehova likabo+ oyo etumbami na mɔtɔ.
28 Mpe bosengeli kosala mosala ata moko te na mokolo yango mpenza, mpamba te ezali mokolo ya kozipa masumu mpo na kozipa masumu+ na bino liboso ya Yehova Nzambe na bino;
29 mpo molimo nyonso oyo akomimonisa mpasi te na mokolo yango mpenza, asengeli kolongolama na kati na bato na ye.+
30 Mpe molimo nyonso oyo akosala mosala ata moko na mokolo yango mpenza, nasengeli koboma molimo yango na kati ya bato na ye.+
31 Bosengeli kosala mosala ata moko te.+ Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino, na bisika nyonso oyo bozali kofanda.
32 Yango ezali sabata oyo bokopema mpenza kopema,+ mpe bosengeli koyokisa milimo na bino mpasi+ na mokolo ya libwa ya sanza yango, na mpokwa. Banda mpokwa tii mpokwa, bokotosa sabata na bino.”
33 Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete:
34 “Lobá na bana ya Yisraele ete: ‘Mokolo ya zomi na mitano ya sanza oyo ya nsambo ezali fɛti ya mwa bandako ya matiti mpo na Yehova mikolo nsambo.+
35 Mokolo ya liboso ezali liyangani moko mosantu. Bokoki kosala mosala ya makasi ata moko te.
36 Mikolo nsambo bokopesa Yehova likabo oyo etumbami na mɔtɔ. Na mokolo ya mwambe, bokozala na liyangani moko mosantu,+ mpe bosengeli kopesa Yehova likabo oyo etumbami na mɔtɔ. Ezali liyangani moko monene. Bokoki kosala mosala ya makasi ata moko te.
37 “‘Oyo wana ezali bafɛti+ ya Yehova na bileko oyo etyami, oyo bokosakola lokola mayangani mosantu,+ mpo na kopesa likabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ:+ likabo ya kotumba+ ná likabo ya mbuma+ mpe makabo ya masanga+ na kolanda manaka ya mokolo na mokolo,
38 longola basabata ya Yehova+ ná makabo+ na bino ná makabo nyonso na bino ya elako+ mpe makabo nyonso na bino ya bolingo,+ oyo bokopesa Yehova.
39 Nzokande, na mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango ya nsambo, ntango bokobuka mbuma ya mokili yango, bokosala fɛti+ ya Yehova mikolo nsambo.+ Mokolo ya liboso ekozala mokolo ya kopema mpenza mpe mokolo ya mwambe ekozala mokolo ya kopema mpenza.+
40 Mpe na mokolo ya liboso, bosengeli kozwa mbuma ya nzete ya kitoko, mandalala+ mpe bitape ya nzete oyo ezali na nkasa mingi mpe nzete ya arava ya lobwaku ya mokɛli, mpe bosengeli kosepela+ liboso ya Yehova Nzambe na bino mikolo nsambo.
41 Mpe bosengeli kosala yango ezala fɛti mpo na Yehova mikolo nsambo na mbula.+ Bokosala yango na sanza ya nsambo, lokola mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te, na boumeli ya mabota na bino.
42 Ezali na mwa bandako ya matiti nde bokofanda mikolo nsambo.+ Bana-mboka nyonso na Yisraele bakofanda kati na mwa bandako ya matiti,+
43 mpo mabota na bino eyeba+ ete ezali na mwa bandako ya matiti nde nafandisaki bana ya Yisraele ntango nazalaki kobimisa bango na mokili ya Ezipito.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”
44 Ndenge wana nde Moize alobaki na ntina na bafɛti+ ya Yehova na bileko oyo etyami epai ya bana ya Yisraele.