Balevi 22:1-33

22  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:  “Lobá na Arona mpe na bana na ye ya mibali ete bázala mosika na biloko mosantu ya bana ya Yisraele mpe bátuka nkombo+ na ngai mosantu te na biloko oyo bazali kosantisela ngai.+ Ngai nazali Yehova.  Lobá na bango ete: ‘Na boumeli ya mabota na bino, moto oyo na kati ya bana na bino nyonso oyo akobɛlɛma na biloko mosantu, oyo bana ya Yisraele bakosantisa mpo na Yehova, nzokande moto yango azali na mbindo,+ molimo yango asengeli kolongolama liboso na ngai. Ngai nazali Yehova.  Moto moko te kati na bana ya Arona, ntango azali na maba+ to azali na eloko oyo ezali kotanga+ ye, akoki kolya biloko mosantu kino akokóma pɛto,+ ezala mpe moto oyo asimbi moto nyonso oyo akómisami mbindo na molimo oyo akufi+ to moto oyo azali kobima malome,+  to moto oyo asimbi eloko nyonso oyo etondanaka oyo ezali mbindo+ to asimbi moto oyo azali mbindo, ezala mbindo na ye ezali nini.+  Molimo oyo asimbi eloko moko ya ndenge wana, asengeli kozala mbindo tii na mpokwa mpe akoki te kolya moko na biloko mosantu, kasi asengeli kosukola nzoto na ye na mai.+  Akokóma pɛto ntango moi ekolala, mpe na nsima akoki kolya biloko mosantu, mpamba te ezali limpa na ye.+  Akolya mpe te nyama oyo ekufi yango moko to nyama nyonso oyo epasolami na banyama ya zamba, noki akóma mbindo na nzela na yango.+ Ngai nazali Yehova.  “‘Mpe basengeli kokokisa mokumba na bango epai na ngai, mpo bámema lisumu na yango te mpe bákufa+ mpo na yango, mpo bazalaki komona yango eloko mpamba. Ngai Yehova moto nazali kosantisa bango. 10  “‘Mopaya moko te akoki kolya eloko mosantu.+ Moto moko te oyo autá na mboka mosusu, oyo azali epai ya nganga-nzambe, to mosali moko te oyo azwaka lifuti, akoki kolya eloko mosantu. 11  Kasi soki nganga-nzambe asombi molimo moko, oyo asombi na mbongo na ye, lokola ezali boye, molimo yango akoki kolya yango. Baombo oyo babotami na ndako na ye, lokola ezali boye, bakoki kolya limpa na ye.+ 12  Mpe soki mwana mwasi ya nganga-nzambe akómi mwasi ya mobali oyo azali mopaya, lokola ezali boye, akoki kolya likabo ya biloko mosantu te. 13  Kasi soki mwana mwasi ya nganga-nzambe akómi mwasi oyo mobali akufá to oyo libala ekufá, nzokande azali na mwana te, mpe soki asengeli kozonga na ndako ya tata na ye lokola na ntango ya bolenge na ye,+ akoki kolya ndambo ya limpa ya tata na ye;+ kasi mopaya ata moko te akoki kolya yango. 14  “‘Sikoyo soki moto alei eloko moko mosantu na nko te,+ asengeli kobakisa likoló na yango moko ya bandambo mitano+ mpe asengeli kopesa nganga-nzambe eloko mosantu yango. 15  Boye basengeli te kokómisa mpamba biloko mosantu ya bana ya Yisraele, oyo bazali kopesa Yehova,+ 16  mpe esala mpenza ete bango bázwa etumbu mpo na ngambo oyo bamemi mpo balei biloko mosantu na bango; mpo ngai Yehova moto nazali kosantisa bango.’” 17  Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete: 18  “Lobá na Arona mpe na bana na ye ya mibali mpe na bana nyonso ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Moto nyonso kati na ndako ya Yisraele to moto nyonso oyo afandi mopaya kati na Yisraele, oyo apesi likabo na ye,+ ezala mpo na bilako+ na bango to mpo na makabo na bango ya bolingo,+ oyo bakoki kopesa Yehova mpo ezala likabo ya kotumba, 19  mpo na koluka kondimama,+ likabo yango esengeli kozanga mbeba,+ nyama moko ya mobali na etonga ya bangɔmbɛ, na bana-mpate ya mibali to na bantaba. 20  Eloko nyonso oyo ezali na mbeba, bosengeli kopesa yango te,+ mpo yango ekosala ete bóndimama te. 21  “‘Mpe soki moto apesi Yehova mbeka ya boyokani+ mpo na kokokisa elako+ to lokola likabo ya bolingo, ekozala nyama oyo ezangi mbeba na etonga ya bangɔmbɛ to ya bampate, mpo na koluka kondimama. Ekozala na mbeba ata moko te. 22  Nyama oyo ekufá miso to ebukaná to ezali na mpota to na mosɔpi na loposo to na makwanza to na mapaka,+ bosengeli te kopesa Yehova moko na yango, mpe likabo oyo etumbami na mɔtɔ+ oyo euti na yango, bosengeli te kotyela yango Yehova likoló ya etumbelo. 23  Ngɔmbɛ-mobali to mpate oyo enama na yango moko eleki molai to eleki mokuse,+ okoki kopesa yango ezala likabo ya bolingo; kasi mpo na elako, ekondimama ata moke te. 24  Kasi nyama oyo mabinzi+ na yango efinamá to epanzaná to elongolamá to ekatamá, bosengeli te kopesa yango Yehova, mpe bokopesa yango te na mokili na bino. 25  Mpe bosengeli kopesa ata nyama moko te na kati ya banyama wana nyonso, oyo euti na lobɔkɔ ya mopaya, mpo ezala limpa ya Nzambe na bino, mpamba te ebebi. Ezali na mbeba.+ Bakondimela+ bino yango ata moke te.’” 26  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 27  “Soki ngɔmbɛ-mobali to mwana-mpate ya mobali to ntaba-mobali ebotami, esengeli kotikala na nse ya mama na yango mikolo nsambo,+ kasi banda na mokolo ya mwambe tii na likoló, ekondimama na esengo lokola likabo, likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova. 28  Ngɔmbɛ-mobali mpe mpate, bosengeli te koboma yango ná mwana na yango mokolo moko.+ 29  “Mpe soki bokopesa mbeka ya kozongisa matɔndi epai ya Yehova,+ bokopesa yango mpo bóluka kondimama. 30  Ekolyama kaka na mokolo yango.+ Bosengeli te kotika ndambo na yango tii na ntɔngɔ.+ Ngai nazali Yehova. 31  “Mpe bosengeli kobatela mibeko na ngai mpe kosalela yango.+ Ngai nazali Yehova. 32  Mpe bosengeli te kotuka nkombo na ngai mosantu,+ mpe nasengeli kosantisama na kati ya bana ya Yisraele.+ Ngai Yehova moto nazali kosantisa bino,+ 33  ngai Moto nazali kobimisa bino na mokili ya Ezipito mpo namonisa ete nazali Nzambe na bino.+ Ngai nazali Yehova.”

Maloba na nse