Balevi 18:1-30

18  Mpe Yehova akobaki koloba na Moize boye:  “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.+  Bosengeli te kosala ndenge mokili ya Ezipito,+ epai bofandaki, esalaka; mpe bosengeli te kosala ndenge mokili ya Kanana,+ epai nazali komema bino, esalaka; mpe bosengeli kotambola na mibeko na bango te.  Bokosalela bikateli na ngai ya lisambisi,+ mpe bokotosa mibeko+ na ngai mpo bótambola na yango.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.  Mpe bosengeli kobatela mibeko na ngai mpe bikateli na ngai ya lisambisi, oyo soki moto akobatela yango, asengeli mpe kozala na bomoi na nzela na yango.+ Ngai nazali Yehova.+  “‘Moto nyonso kati na bino asengeli te kobɛlɛma na moto nyonso oyo azali mpenza ndeko na ye ya makila mpo na komona bolumbu* na ye.+ Ngai nazali Yehova.  Bolumbu ya tata+ na yo mpe bolumbu ya mama na yo, osengeli komona yango te. Azali mama na yo. Osengeli komona bolumbu na ye te.  “‘Bolumbu ya mwasi ya tata na yo, osengeli komona yango te.+ Ezali bolumbu ya tata na yo.  “‘Mpo na bolumbu ya ndeko na yo ya mwasi, mwana ya tata na yo to mwana ya mama na yo, ezala abotami na yo ndako moko to abotami na ndako mosusu, osengeli komona bolumbu na bango te.+ 10  “‘Mpo na bolumbu ya mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to ya mwana mwasi ya mwana na yo ya mwasi, osengeli komona bolumbu na bango te, mpamba te ezali bolumbu na yo. 11  “‘Mpo na bolumbu ya mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, mwana ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi, osengeli komona bolumbu na ye te. 12  “‘Bolumbu ya ndeko mwasi ya tata na yo, osengeli komona yango te. Azali ndeko ya makila ya tata na yo.+ 13  “‘Bolumbu ya ndeko mwasi ya mama na yo, osengeli komona yango te, mpamba te azali ndeko ya makila ya mama na yo. 14  “‘Bolumbu ya ndeko mobali ya tata na yo, osengeli te komona yango. Osengeli kobɛlɛma na mwasi na ye te. Azali mama na yo.+ 15  “‘Bolumbu ya mwasi ya mwana na yo,+ osengeli te komona yango. Azali mwasi ya mwana na yo. Osengeli te komona bolumbu na ye. 16  “‘Bolumbu ya mwasi ya ndeko na yo,+ osengeli komona yango te. Ezali bolumbu ya ndeko na yo. 17  “‘Bolumbu ya mwasi ná ya mwana na ye ya mwasi, osengeli komona yango te.+ Mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali to mwana mwasi ya mwana na ye ya mwasi, osengeli kozwa ye te mpo na komona bolumbu na ye. Bazali bandeko ya makila moko. Yango ezali etamboli ya nsɔni.+ 18  “‘Mpe osengeli te kozwela mwasi moko ndeko na ye ya mwasi azala mbanda+ na ye, mpo na komona bolumbu na ye, elingi koloba, na ntango oyo ye azali na bomoi, okozwela ye ndeko na ye ya mwasi te. 19  “‘Mpe osengeli te kobɛlɛma na mwasi na ntango ya mbindo na ye ya komona sanza+ mpo na komona bolumbu na ye.+ 20  “‘Mpe osengeli te kopesa malome na yo na mwasi ya moninga na yo mpo na kokóma mbindo na nzela na yango.+ 21  “‘Mpe osengeli te kopesa nzela ete moko kati na bana na yo apesama+ na Moleke.+ Osengeli te kotuka+ nkombo ya Nzambe na yo ndenge wana. Ngai nazali Yehova.+ 22  “‘Mpe osengeli te kolala na mobali+ ndenge olalaka na mwasi.+ Ezali likambo oyo eyinamá. 23  “‘Mpe osengeli kopesa nyama+ ata moko te malome na yo mpo na kokóma mbindo na nzela na yango, mpe mwasi akotɛlɛma te liboso ya nyama mpo na kosangisa na yango nzoto.+ Ezali kozanga kotosa ndenge oyo makambo ebongisamá. 24  “‘Bómikómisa mbindo te na makambo nyonso wana, mpamba te bikólo oyo nazali kobengana liboso na bino emikómisaki mbindo na makambo nyonso wana.+ 25  Yango wana mokili ezali mbindo, mpe nakoyeisela yango etumbu mpo na libunga na yango, mpe mokili ekosanza bato oyo bafandi wana.+ 26  Mpe bino bosengeli kobatela mibeko na ngai mpe bikateli na ngai ya lisambisi,+ mpe bosengeli te kosala makambo nyonso wana oyo eyinamá, ezala mwana-mboka to mopaya oyo azali kofanda mopaya na kati na bino.+ 27  Mpo makambo nyonso wana oyo eyinamá, bato ya mokili oyo bazalaki liboso na bino basalaki yango,+ yango wana mokili ezali mbindo. 28  Boye mokili ekosanza bino te ete bokómisi yango mbindo ndenge yango ekosanza bikólo oyo ezalaki liboso na bino.+ 29  Soki moto asali moko ya makambo nyonso wana oyo eyinamá, milimo oyo bakosala yango basengeli kolongolama kati na bato na bango.+ 30  Mpe bosengeli kokokisa mokumba na bino epai na ngai na kosaláká te moko ya mimeseno oyo eyinamá oyo esalemaki liboso na bino,+ mpo bómikómisa mbindo na nzela na yango te. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”

Maloba na nse

Awa, maloba “komona bolumbu ya moto” elakisi “kosangisa nzoto na ye.”