Balevi 17:1-16

17  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize:  “Lobá na Arona mpe na bana na ye ya mibali mpe na bana nyonso ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Talá likambo oyo Yehova apesi mitindo:  “‘“Moto nyonso ya ndako ya Yisraele oyo abomi ngɔmbɛ-mobali to mwana-mpate ya mobali to ntaba-mobali na kati ya kaa to oyo abomi yango libándá ya kaa  mpe amemi yango te na monɔkɔ ya hema ya kokutana+ mpo na kopesa yango Yehova lokola likabo liboso ya tabernakle ya Yehova, moto yango akomema ngambo ya makila. Asopi makila, mpe moto yango asengeli kolongolama na kati ya bato na ye,+  mpo bana ya Yisraele bámema bambeka na bango, oyo bazali kopesa na kati na esobe,+ mpe basengeli komema yango epai ya Yehova na monɔkɔ ya hema ya kokutana epai ya nganga-nzambe,+ mpe basengeli kopesa yango Yehova ezala bambeka ya boyokani.+  Mpe nganga-nzambe asengeli komwangisa makila likoló ya etumbelo+ ya Yehova na monɔkɔ ya hema ya kokutana, mpe asengeli kosala ete mafuta+ ebimisa milinga mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+  Boye bakopesa lisusu te bambeka na bango epai ya bademo na ndenge ya ntaba,+ oyo bazali kosala na bango pite.+ Ekozala mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na bino, na boumeli ya mabota na bino.”’  “Mpe okoloba na bango ete: ‘Mpo na moto nyonso ya ndako ya Yisraele to mopaya moko oyo afandi mopaya na kati na bino, oyo apesi likabo ya kotumba+ to mbeka  mpe amemi yango te na monɔkɔ ya hema ya kokutana mpo na kopesa yango Yehova,+ moto yango asengeli kolongolama kati na bato na ye.+ 10  “‘Moto nyonso ya ndako ya Yisraele to mopaya moko oyo azali kofanda mopaya na kati na bino, oyo alei lolenge nyonso ya makila,+ nakotɛmɛla mpenza molimo+ oyo alei makila, mpe nakolongola ye mpenza na kati ya bato na ye. 11  Mpo molimo ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila,+ mpe ngai moko natye yango likoló ya etumbelo mpo na bino mpo na kozipa masumu+ ya milimo na bino, mpamba te makila+ nde ezipaka masumu+ mpo molimo ezali na kati na yango. 12  Yango wana nalobi na bana ya Yisraele ete: “Molimo moko te na kati na bino asengeli kolya makila mpe mopaya moko te oyo azali kofanda mopaya na kati na bino+ akolya makila.”+ 13  “‘Moto nyonso kati na bana ya Yisraele to mopaya moko oyo afandi mopaya na kati na bino, oyo akangi na bokila nyama ya zamba to ndɛkɛ oyo elyamaka, asengeli kosopa+ makila na yango mpe kozipa yango na putulu.+ 14  Mpo molimo ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni ezali makila na yango mpo molimo ezali na kati na yango. Na yango, nalobaki na bana ya Yisraele ete: “Bosengeli te kolya makila ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni, mpo molimo ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni ezali makila na yango.+ Moto nyonso oyo akolya yango, akolongolama.”+ 15  Bongo molimo nyonso oyo alei nyama oyo ekufi yango moko to eloko moko oyo nyama ya zamba epasoli,+ azala mwana-mboka to moto oyo afandi mopaya, asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa,+ mpe asengeli kozala pɛto. 16  Kasi soki akosukola yango te mpe akosukola nzoto na ye te, asengeli kozongisa monɔkɔ mpo na libunga na ye.’”+

Maloba na nse