Balevi 16:1-34

16  Mpe Yehova abandaki koloba na Moize nsima ya liwa ya bana mibali mibale ya Arona mpo babɛlɛmaki liboso ya Yehova, mpe bakufaki.+  Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+  “Arona akokɔta na esika mosantu+ na biloko oyo: mwana-ngɔmbɛ ya mobali mpo na likabo mpo na lisumu+ mpe mpate-mobali mpo na likabo ya kotumba.+  Akolata zambala+ ya lini, oyo ezali mosantu, mpe akolata kupe+ ya lini na nzoto na ye, mpe akokanga elamba ya lini ya kokanga na loketo+ mpe akolínga tirba ya lini na motó.+ Yango ezali bilamba mosantu.+ Mpe asengeli kosukola nzoto na ye na mai+ mpe kolata bilamba yango.  “Mpe na liyangani ya bana ya Yisraele,+ akozwa bana-ntaba mibale ya mibali mpo na likabo mpo na lisumu+ mpe mpate-mobali moko mpo na likabo ya kotumba.+  “Mpe Arona asengeli kopesa ngɔmbɛ-mobali ya likabo mpo na lisumu, oyo ezali mpo na ye moko,+ mpe asengeli kozipa masumu+ na ye moko+ mpe ya ndako na ye.+  “Mpe asengeli kozwa ba-ntaba-mibali yango mibale mpe kotɛlɛmisa yango liboso ya Yehova na monɔkɔ ya hema ya kokutana.  Mpe Arona asengeli kobwaka mbɛsɛ+ mpo na bantaba-mibali yango mibale, mbɛsɛ moko mpo na Yehova mpe mbɛsɛ mosusu mpo na Azazele.+  Mpe Arona asengeli kopesa ntaba-mobali oyo mbɛsɛ+ ekwei mpo na Yehova, mpe asengeli kopesa yango lokola likabo mpo na lisumu.+ 10  Kasi ntaba-mobali oyo mbɛsɛ ekwei mpo na Azazele, bakotɛlɛmisa yango na bomoi liboso ya Yehova mpo na kozipa masumu na yango, mpo na kotika yango ekende+ na esobe+ mpo na Azazele. 11  “Mpe Arona asengeli kopesa ngɔmbɛ-mobali ya likabo mpo na lisumu, oyo ezali mpo na ye, mpe kozipa masumu na ye moko mpe ya ndako na ye; mpe asengeli koboma ngɔmbɛ-mobali yango, oyo ezali mpo na ye moko.+ 12  “Mpe asengeli kozwa eloko ya kotya mɔtɔ+ oyo etondi na makala ya mɔtɔ oyo euti na etumbelo+ oyo ezali liboso ya Yehova, mpe mabɔkɔ+ na ye mibale etondi na putulu ya mpaka ya malasi+ ya nsolo kitoko, mpe asengeli koya na yango na nsima ya rido.+ 13  Asengeli lisusu kotya mpaka ya malasi na mɔtɔ liboso ya Yehova,+ mpe lipata ya mpaka ya malasi esengeli kozipa ezipeli ya Sanduku,+ oyo ezali likoló ya Litatoli,+ mpo akufa te. 14  “Mpe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila+ ya ngɔmbɛ-mobali yango mpe komwangisa yango na mosapi na ye liboso ya ezipeli na ngámbo ya ɛsti, mpe akomwangisa+ mwa ndambo ya makila yango na mosapi na ye mbala nsambo liboso ya ezipeli.+ 15  “Mpe asengeli koboma ntaba-mobali ya likabo mpo na lisumu, oyo ezali mpo na bato,+ mpe asengeli koya na makila na yango na nsima ya rido+ mpe kosala na makila+ na yango ndenge asalaki na makila ya ngɔmbɛ-mobali; mpe asengeli komwangisa yango epai ya ezipeli mpe liboso ya ezipeli. 16  “Mpe asengeli kozipa masumu ya esika mosantu na ntina na mbindo+ ya bana ya Yisraele mpe na ntina na botomboki na bango kati na masumu+ na bango nyonso; mpe ndenge yango nde akosala mpo na hema ya kokutana, oyo ezali na kati na bango, katikati na mbindo na bango. 17  “Mpe moto mosusu te asengeli kozala na kati ya hema ya kokutana banda ntango ye akokɔta mpo na kozipa masumu na esika mosantu tii ntango ye akobima; mpe asengeli kozipa masumu na ye moko+ mpe ya ndako na ye mpe ya lisangá mobimba ya Yisraele.+ 18  “Mpe asengeli kobima mpo na kokende na etumbelo,+ oyo ezali liboso ya Yehova, mpe kozipa masumu na yango, mpe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila ya ngɔmbɛ-mobali ná mwa ndambo ya makila ya ntaba-mobali mpe kotya yango likoló ya maseke ya etumbelo zingazinga na yango.+ 19  Asengeli lisusu komwangisa+ mwa ndambo ya makila likoló na yango na mosapi na ye mbala nsambo mpe kopɛtola yango mpe kosantisa yango na mbindo ya bana ya Yisraele. 20  “Ntango akosilisa kozipa masumu+ ya esika mosantu mpe ya hema ya kokutana mpe ya etumbelo, asengeli lisusu kopesa ntaba-mobali oyo ezali na bomoi.+ 21  Mpe Arona asengeli kotya mabɔkɔ+ na ye mibale na motó ya ntaba-mobali oyo ezali na bomoi mpe koyambola+ likoló na yango mabunga+ nyonso ya bana ya Yisraele mpe botomboki nyonso na bango kati na masumu+ nyonso na bango, mpe asengeli kotya yango na motó ya ntaba-mobali+ yango mpe kotika yango ekende na esobe+ na lobɔkɔ ya moto+ oyo amilɛngɛli mpo na yango. 22  Mpe ntaba-mobali yango esengeli komema mabunga+ nyonso na bango na kati ya mokili oyo ezali mpamba,+ mpe asengeli kotika ntaba-mobali yango ekende na esobe.+ 23  “Mpe Arona asengeli kokɔta na hema ya kokutana mpe kolongola bilamba ya lini oyo alataki ntango akɔtaki na esika mosantu, mpe asengeli kotya yango kuna.+ 24  Mpe asengeli kosukola nzoto na ye na mai+ na esika mosantu+ mpe kolata bilamba+ na ye mpe kobima mpe kopesa likabo na ye ya kotumba+ mpe likabo ya kotumba+ ya bato mpe kozipa masumu na ye moko mpe ya bato.+ 25  Mpe akosala ete mafuta ya likabo mpo na lisumu ebimisa milinga likoló ya etumbelo.+ 26  “Bongo moto+ oyo atikaki ntaba-mobali ekende mpo na Azazele,+ akosukola bilamba na ye, mpe akosukola nzoto na ye na mai,+ mpe nsima na yango nde akoki kokɔta na kaa. 27  “Nzokande, akotinda bámema libándá ya kaa ngɔmbɛ-mobali ya likabo mpo na lisumu mpe ntaba-mobali ya likabo mpo na lisumu, oyo makila na yango ememamaki mpo na kozipa masumu na esika mosantu; mpe basengeli kozikisa mposo na yango ná mosuni na yango mpe nyɛi na yango na mɔtɔ.+ 28  Mpe moto oyo akozikisa yango, akosukola bilamba na ye, mpe asengeli kosukola nzoto na ye na mai, mpe nsima na yango nde akoki kokɔta na kaa. 29  “Mpe yango esengeli kozala mobeko mpo na bino mpo na ntango oyo etyami ndelo te:+ Na sanza ya nsambo na mokolo ya zomi ya sanza,+ bokoyokisa milimo+ na bino mpasi, mpe bosengeli kosala mosala moko te,+ ezala mwana-mboka to mopaya oyo azali kofanda mopaya na kati na bino. 30  Mpo na mokolo yango, masumu na bino ekozipama+ mpo na kotánga bino pɛto. Bokozala pɛto mpe bokolongwa na masumu nyonso na bino liboso ya Yehova.+ 31  Ezali sabata+ oyo bokopema mpenza kopema, mpe bosengeli koyokisa milimo na bino mpasi. Ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te. 32  “Mpe nganga-nzambe oyo akotyama mafuta+ mpe oyo lobɔkɔ na ye ekotondisama na nguya* mpo na kosala mosala ya nganga-nzambe,+ mpo azala mokitani+ ya tata na ye, asengeli kozipa masumu mpe asengeli kolata bilamba ya lini.+ Ezali bilamba mosantu.+ 33  Mpe asengeli kozipa masumu ya esika oyo eleki bosantu,+ mpe akozipa masumu ya hema+ ya kokutana mpe mpo na etumbelo;+ mpe akozipa masumu ya banganga-nzambe mpe ya bato nyonso ya lisangá.+ 34  Mpe yango esengeli kozala mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na bino,+ mpo na kozipa masumu ya bana ya Yisraele na ntina na masumu nyonso na bango mbala moko na mbula.”+ Bongo asalaki kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.

Maloba na nse

Talá Kob 28:41, msl.