Balevi 15:1-33
15 Mpe Yehova akobaki koloba na Moize mpe na Arona ete:
2 “Bóloba na bana ya Yisraele, mpe bosengeli koyebisa bango boye: ‘Soki mobali moko azali na eloko oyo ezali kotanga+ ye, oyo ebimi na nzoto na ye ya mobali, eloko oyo ezali kotanga ye ezali mbindo.
3 Mpe talá oyo ekokóma mbindo na ye mpo na eloko oyo ezali kotanga ye: Ezala nzoto na ye ya mobali ebimisi eloko moko oyo ezali kotanga ye to nzoto na ye ya mobali ekangami na eloko oyo ezali kotanga ye, ezali mbindo na ye.
4 “‘Mbeto nyonso oyo moto oyo azali na eloko oyo ezali kotanga ye akolalela ekozala mbindo, mpe eloko nyonso oyo ye akofandela ekozala mbindo.
5 Mpe moto oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye, mpe asengeli kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.+
6 Mpe moto nyonso oyo afandeli eloko nyonso oyo moto oyo azali na eloko oyo ezali kotanga ye afandelaki, asengeli kosukola+ bilamba na ye, mpe asengeli kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.
7 Mpe moto nyonso oyo asimbi nzoto ya moto oyo azali na eloko oyo ezali kotanga+ ye asengeli kosukola bilamba na ye, mpe asengeli kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.+
8 Mpe soki moto oyo azali na eloko oyo ezali kotanga ye abwakeli moto oyo azali pɛto nsoi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.
9 Mpe eloko nyonso ya kofandela+ oyo moto oyo azali na eloko oyo ezali kotanga ye amatelaki, ekozala mbindo.
10 Mpe moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso oyo ekozala na nse na ye akozala mbindo tii na mpokwa; mpe ye oyo akomema yango akosukola bilamba na ye, mpe asengeli kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.
11 Mpe moto nyonso oyo moto oyo azali na eloko oyo ezali kotanga+ ye akosimba, wana asukoli mabɔkɔ na ye na mai te, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.
12 Mpe mbɛki ya mabele oyo moto oyo azali na eloko oyo ezali kotanga ye akosimba ekobukama;+ mpe esaleli nyonso ya libaya+ ekosukolama na mai.
13 “‘Sikoyo soki eloko oyo ezali kotanga moto yango esili, asengeli kotánga mikolo nsambo nsima ya kosila+ ya eloko oyo ezalaki kotanga ye, mpe asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola nzoto na ye na mai oyo euti na mai oyo ezali kotíyola;+ mpe asengeli kozala pɛto.
14 Mpe na mokolo ya mwambe, akozwa bipopo+ mibale to bana mibale ya bibenga, mpe asengeli koya liboso ya Yehova na monɔkɔ ya hema ya kokutana mpe kopesa yango nganga-nzambe.
15 Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa yango likabo, moko lokola likabo mpo na lisumu mpe mosusu lokola likabo ya kotumba;+ mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu na ye liboso ya Yehova mpo na eloko oyo ezali kotanga ye.
16 “‘Sikoyo soki mobali moko azali na malome+ oyo ebimi ye, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.
17 Mpe elamba nyonso mpe loposo nyonso oyo malome yango ezwi, esengeli kosukolama na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.+
18 “‘Bongo mwasi, oyo mobali alali na ye mpe malome ebimi ye, basengeli kosukola na mai mpe kozala mbindo+ tii na mpokwa.
19 “‘Mpe soki mwasi moko azali na eloko oyo ezali kotanga ye, mpe eloko oyo ezali kotanga ye na nzoto ezali makila,+ akotikala mikolo nsambo na mbindo+ na ye ya komona sanza,+ mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo tii na mpokwa.
20 Mpe eloko nyonso oyo akolalela na ntango ya mbindo na ye ya komona sanza ekozala mbindo,+ mpe eloko nyonso oyo akofandela ekozala mbindo.
21 Mpe moto nyonso oyo akosimba mbeto ya mwasi yango akosukola bilamba na ye, mpe asengeli kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.+
22 Mpe moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso oyo mwasi yango afandelaki, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe asengeli kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.+
23 Mpe soki mwasi yango afandelaki mbeto to eloko mosusu, moto oyo akosimba+ yango akozala mbindo tii na mpokwa.
24 Mpe soki mobali alali na ye mpenza mpe mbindo na ye ya komona sanza ezwi ye,+ mobali yango asengeli kozala mbindo mikolo nsambo, mpe mbeto nyonso oyo mobali yango akolalela ekozala mbindo.
25 “‘Bongo mwasi, soki eloko oyo ezali kotanga ye ezali makila oyo ebimi mikolo mingi,+ nzokande yango ezali te ntango ya momeseno ya mbindo na ye ya komona sanza,+ to soki eloko yango oyo ezali kobima ye eumeli koleka mbindo na ye ya komona sanza, mikolo nyonso oyo eloko ya mbindo ezali kotanga ye ekozala lokola mikolo ya mbindo na ye ya komona sanza. Azali mbindo.
26 Mpe mbeto nyonso oyo akolalela na mikolo nyonso oyo eloko yango ezali kotanga ye, akotalela yango lokola mbeto ya mbindo na ye ya komona sanza,+ mpe eloko nyonso oyo akofandela ekokóma mbindo lokola mbindo na ye ya komona sanza.
27 Mpe moto nyonso oyo akosimba+ yango akozala mbindo, mpe asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola na mai mpe kozala mbindo tii na mpokwa.
28 “‘Nzokande, soki eloko oyo ezali kotanga ye esili, asengeli mpe kotánga mpo na ye mikolo nsambo kobanda mokolo oyo eloko oyo ezalaki kotanga ye esilaki, mpe na nsima akozala pɛto.+
29 Mpe na mokolo ya mwambe akozwa bipopo+ mibale to bana mibale ya bibenga, mpe asengeli komema yango epai ya nganga-nzambe na monɔkɔ ya hema ya kokutana.+
30 Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa moko likabo mpo na lisumu mpe mosusu likabo ya kotumba;+ mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na ye liboso ya Nzambe na ntina na eloko ya mbindo oyo ezali kotanga ye.
31 “‘Mpe bosengeli kokabola bana ya Yisraele na mbindo na bango, mpo bákufa te na mbindo na bango soki bakómisi tabernakle na ngai, oyo ezali kati na bango, mbindo.+
32 “‘Wana ezali mobeko mpo na mobali oyo azali na eloko oyo ezali kotanga+ ye mpe mobali oyo malome+ ebimi ye, mpe yango ekómisi ye mbindo;
33 mpe mpo na mwasi oyo azali na mbindo na ye ya komona sanza,+ mpe mpo na moto nyonso oyo eloko oyo ezali kotanga+ ezali kobima ye, ezala mobali to mwasi, mpe ezala mobali oyo alali na mwasi oyo azali mbindo.’”