Balevi 14:1-57

14  Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete:  “Oyo ekokóma mobeko ya moto ya maba+ na mokolo oyo kopɛtolama na ye ekondimama, ntango asengeli komemama epai ya nganga-nzambe.+  Mpe nganga-nzambe asengeli kobima libándá ya kaa, mpe nganga-nzambe asengeli kotala; mpe soki maladi ya maba esili+ epai ya moto ya maba,  nganga-nzambe asengeli kopesa mitindo; mpe mpo na komipɛtola, ye asengeli kozwa bandɛkɛ+ mibale ya pɛto oyo ezali na bomoi ná nzete ya sɛdrɛ+ ná biloko oyo epakolami langi ya motane makasi+ mpe nzete ya izope.+  Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa mitindo, mpe ndɛkɛ moko esengeli kobomama na kati ya mbɛki ya mabele likoló ya mai oyo euti na mai oyo ezali kotíyola.+  Bongo ndɛkɛ oyo ezali na bomoi, asengeli kozwa yango ná nzete ya sɛdrɛ ná biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe nzete ya izope, mpe asengeli kozindisa yango ná ndɛkɛ oyo ezali na bomoi na makila ya ndɛkɛ oyo ebomamaki likoló ya mai oyo euti na mai oyo ezali kotíyola.  Na nsima, asengeli komwangisa+ yango mbala nsambo+ likoló ya moto oyo azali komipɛtola na maba mpe asengeli kotánga ye pɛto,+ mpe asengeli kotika ndɛkɛ oyo ezali na bomoi ekende na esobe mpenza.+  “Mpe moto oyo azali komipɛtola, asengeli kosukola bilamba+ na ye mpe kokokola nsuki na ye nyonso mpe kosukola+ na kati ya mai mpe asengeli kozala pɛto, mpe na nsima akoki kokɔta na kaa. Mpe asengeli kofanda na libándá ya hema na ye mikolo nsambo.+  Mpe ekosalema mpenza boye: na mokolo ya nsambo, asengeli kokokola nsuki nyonso na motó+ na ye mpe na emɛku na ye mpe na nkiki na ye. Ɛɛ, akokokola nsuki na ye nyonso, mpe asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola nzoto na ye na kati ya mai; mpe asengeli kozala pɛto. 10  “Mpe na mokolo ya mwambe,+ akozwa bana-mpate mibale ya mibali, oyo ezangi mbeba, ná mwana-mpate moko ya mwasi+ oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, ná misato ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu, ezala likabo ya mbuma+ oyo emwangisami mafuta mpe logi* moko ya mafuta;+ 11  mpe nganga-nzambe oyo azali kotánga ye pɛto, asengeli komonisa moto oyo azali komipɛtola mpe biloko yango liboso ya Yehova, na monɔkɔ ya hema ya kokutana. 12  Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa mwana-mpate mobali moko mpe kopesa yango lokola likabo ya ngambo+ nzela moko na logi+ moko ya mafuta mpe asengeli koningisa yango epai na epai, lokola likabo ya koningisa+ liboso ya Yehova. 13  Mpe asengeli koboma mwana-mpate yango ya mobali na esika+ oyo likabo mpo na lisumu ná likabo ya kotumba ebomamaka ntango nyonso, na esika mosantu,+ mpamba te, likabo ya ngambo, lokola likabo mpo na lisumu, ezali ya nganga-nzambe.+ Ezali eloko oyo eleki bosantu. 14  “Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila ya likabo ya ngambo, mpe nganga-nzambe asengeli kotya yango likoló ya nsɔngɛ ya litoi ya mobali ya moto oyo azali komipɛtola, mpe likoló ya mosapi monene ya lobɔkɔ na ye ya mobali mpe likoló ya mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali.+ 15  Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa mwa ndambo ya logi+ yango ya mafuta mpe kosopa yango na lobɔkɔ ya mwasi ya nganga-nzambe. 16  Mpe nganga-nzambe asengeli kozindisa mosapi ya lobɔkɔ na ye ya mobali na mafuta oyo ezali na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe asengeli komwangisa mwa ndambo ya mafuta na mosapi na ye mbala nsambo+ liboso ya Yehova. 17  Mpe na mafuta oyo etikali, oyo ezali na lobɔkɔ na ye, nganga-nzambe akotya mwa ndambo likoló ya nsɔngɛ ya litoi ya mobali ya moto oyo azali komipɛtola, mpe likoló ya mosapi monene ya lobɔkɔ na ye ya mobali mpe likoló ya mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali, na likoló ya makila ya likabo ya ngambo.+ 18  Mpe mafuta oyo etikali, oyo ezali na lobɔkɔ ya nganga-nzambe, akotya yango na motó ya moto oyo azali komipɛtola, mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na ye liboso ya Yehova. 19  “Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa likabo mpo na lisumu+ mpe kozipa masumu ya moto oyo azali komipɛtola na mbindo na ye, mpe na nsima akoboma likabo ya kotumba. 20  Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa likabo ya kotumba mpe likabo ya mbuma+ likoló ya etumbelo, mpe nganga-nzambe+ asengeli kozipa masumu na ye;+ mpe asengeli kozala pɛto.+ 21  “Nzokande, soki azali moto oyo azangá+ mpe azali na makoki mingi te,+ asengeli kozwa mwana-mpate mobali moko ezala likabo ya ngambo mpo na likabo ya koningisa mpo na kozipa masumu na ye ná moko ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu oyo emwangisami mafuta lokola likabo ya mbuma ná logi moko ya mafuta, 22  mpe bipopo+ mibale to bana mibale ya bibenga, na kotalela makoki oyo azali na yango, mpe moko esengeli kozala likabo mpo na lisumu mpe mosusu likabo ya kotumba. 23  Mpe na mokolo ya mwambe,+ asengeli komema yango mpo nganga-nzambe andima kopɛtolama+ na ye na monɔkɔ ya hema ya kokutana+ liboso ya Yehova. 24  “Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa mwana-mpate mobali ya likabo ya ngambo+ ná logi moko ya mafuta, mpe nganga-nzambe asengeli koningisa yango epai na epai, lokola likabo ya koningisa liboso ya Yehova.+ 25  Mpe asengeli koboma mwana-mpate mobali ya likabo ya ngambo, mpe nganga-nzambe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila ya likabo ya ngambo mpe kotya yango likoló ya nsɔngɛ ya litoi ya mobali ya moto oyo azali komipɛtola, mpe likoló ya mosapi monene ya lobɔkɔ na ye ya mobali mpe likoló ya mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali.+ 26  Mpe nganga-nzambe akosopa mwa ndambo ya mafuta na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+ 27  Mpe nganga-nzambe asengeli komwangisa+ na mosapi ya lobɔkɔ na ye ya mobali mwa ndambo ya mafuta oyo ezali na lobɔkɔ na ye ya mwasi mbala nsambo liboso ya Yehova. 28  Mpe nganga-nzambe asengeli kotya mwa ndambo ya mafuta oyo ezali na lobɔkɔ na ye likoló ya nsɔngɛ ya litoi ya mobali ya moto oyo azali komipɛtola, mpe likoló ya mosapi monene ya lobɔkɔ na ye ya mobali mpe likoló ya mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali, na likoló ya esika ya makila ya likabo ya ngambo.+ 29  Mpe mafuta oyo etikali, oyo ezali na lobɔkɔ ya nganga-nzambe, akotya yango na motó+ ya moto oyo azali komipɛtola mpo na kozipa masumu na ye liboso ya Yehova. 30  “Mpe asengeli kopesa moko ya bipopo to ya bana ya bibenga oyo akoki kozwa ndenge makoki na ye ezali,+ 31  moko na yango, oyo akoki kozwa ndenge makoki na ye ezali, akopesa yango lokola likabo mpo na lisumu+ mpe mosusu lokola likabo ya kotumba+ nzela moko na likabo ya mbuma; mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ ya moto oyo azali komipɛtola liboso ya Yehova. 32  “Wana ezali mobeko mpo na moto oyo azalaki na maladi ya maba mpe azali na makoki te na ntango oyo kopɛtolama na ye ekondimama.” 33  Mpe Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete: 34  “Ntango bokokɔta na mokili ya Kanana,+ oyo nazali kopesa bino mpo ezala ya bino,+ mpe soki natye mpenza maladi ya maba na ndako moko ya mokili oyo ekozala ya bino,+ 35  nkolo ya ndako yango asengeli koya mpe koyebisa nganga-nzambe ete: ‘Eloko moko lokola maladi emonani epai na ngai na kati ya ndako.’ 36  Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa mitindo, mpe basengeli kolongola biloko na ndako yango liboso ete nganga-nzambe akɔta mpo na komona maladi yango, mpo atánga eloko nyonso oyo ezali na kati ya ndako mbindo te; mpe nsima na yango nganga-nzambe akokɔta mpo na komona ndako yango. 37  Ntango amoni maladi yango, soki maladi yango ezali na bifelo ya ndako, oyo ezali na matɔnɔ ya langi ya mai ya mpɔndu mpe ya mwa mosaka to ya mwa motane, mpe emonani ete ekɔti na nse koleka etando ya efelo, 38  nganga-nzambe asengeli kobima na ndako yango tii na monɔkɔ ya ndako mpe asengeli kosala ete bato bázala mosika+ na ndako yango mikolo nsambo. 39  “Mpe nganga-nzambe asengeli kozonga na mokolo ya nsambo mpe asengeli kotala;+ mpe soki maladi yango epalangani na bifelo ya ndako, 40  nganga-nzambe asengeli kopesa mitindo, mpe basengeli kolongola+ mabanga oyo ezali na maladi, mpe basengeli kobwaka yango na libándá ya engumba na esika ya mbindo. 41  Mpe akotinda bápalola ndako na kati bipai nyonso, mpe basengeli kosopa na libándá ya engumba, na esika ya mbindo, pɔtɔpɔtɔ ya lima oyo bapalolaki. 42  Mpe basengeli kozwa mabanga mosusu mpe kokɔtisa yango na esika ya mabanga oyo ezalaki liboso; mpe akotinda bázwa pɔtɔpɔtɔ mosusu ya lima, mpe asengeli kotinda bápakola yango na ndako. 43  “Soki, atako bongo, maladi ezongi mpe ebimi mpenza na ndako nsima ya kolongola mabanga mpe nsima ya kopalola ndako mpe ya kopakola yango, 44  nganga-nzambe+ asengeli kokɔta mpe kotala; mpe soki maladi epalangani na kati ya ndako, ezali maba+ ya mabe na kati ya ndako. Ezali mbindo. 45  Mpe asengeli kotinda bábuka ndako ná mabanga na yango ná mabaya na yango mpe pɔtɔpɔtɔ nyonso ya lima ya ndako mpe asengeli kotinda ete bámema yango na libándá ya engumba, na esika ya mbindo.+ 46  Kasi moto oyo akokɔta na ndako yango na moko ya mikolo oyo bato basengeli kozala mosika+ na yango, akozala mbindo tii na mpokwa;+ 47  mpe moto oyo akolala na ndako yango asengeli kosukola bilamba+ na ye, mpe moto oyo akolya na kati ya ndako yango asengeli kosukola bilamba na ye. 48  “Nzokande, soki nganga-nzambe ayei mpenza mpe atali, mpe, talá sikoyo, maladi yango epalangani te na kati ya ndako, nsima ya kopakola pɔtɔpɔtɔ na ndako yango, nganga-nzambe asengeli kotánga ndako yango pɛto, mpamba te maladi esili.+ 49  Mpe mpo na kopɛtola ndako na lisumu, asengeli kozwa ndɛkɛ+ mibale ná nzete ya sɛdrɛ+ ná biloko oyo epakolami langi ya motane makasi+ mpe nzete ya izope. 50  Mpe asengeli koboma ndɛkɛ moko na kati ya mbɛki ya mabele oyo ezali na mai oyo euti na mai oyo ezali kotíyola.+ 51  Mpe asengeli kozwa nzete ya sɛdrɛ ná nzete ya izope+ ná biloko oyo epakolami langi ya motane makasi ná ndɛkɛ oyo ezali na bomoi mpe kozindisa yango na makila ya ndɛkɛ oyo ebomamaki mpe na mai oyo euti na mai oyo ezali kotíyola, mpe asengeli komwangisa+ yango epai ya ndako mbala nsambo.+ 52  Mpe asengeli kopɛtola ndako na lisumu, akopɛtola yango na makila ya ndɛkɛ mpe na mai oyo euti na mai oyo ezali kotíyola mpe na ndɛkɛ oyo ezali na bomoi mpe na nzete ya sɛdrɛ mpe na nzete ya izope mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi. 53  Mpe asengeli kotika ndɛkɛ oyo ezali na bomoi ekende na libándá ya engumba, na esobe mpenza, mpe asengeli kozipa masumu+ ya ndako; mpe esengeli kozala pɛto. 54  “Wana ezali mobeko mpo na maladi nyonso ya maba,+ maladi ya kolongwa nsuki,+ 55  maba ya elamba+ mpe ya kati ya ndako, 56  kovimba, likwanza mpe litɔnɔ,+ 57  mpo na kopesa malako+ ntango eloko moko ezali mbindo mpe ntango eloko moko ezali pɛto. Wana ezali mobeko mpo na maba.”+

Maloba na nse

Logi moko ezali 0,31 L. Talá Apɛndisi.