Balevi 12:1-8

12  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize boye:  “Lobá na bana ya Yisraele: ‘Soki mwasi moko azwi zemi+ mpe aboti mwana mobali, asengeli kozala mbindo mikolo nsambo; akozala mbindo lokola na mikolo oyo azalaka na mbindo ntango azali komona sanza.+  Mpe na mokolo ya mwambe, bakokata mosuni ya mosutu ya mwana.+  Na mikolo mosusu ntuku misato na misato (33), akotikala na kati ya makila mpo na kopɛtolama. Asengeli te kosimba eloko moko mosantu, mpe asengeli te kokɔta na esika mosantu tii mikolo ya kopɛtolama na ye ekokoka.+  “‘Kasi soki aboti mwana mwasi, asengeli kozala mbindo mikolo zomi na minei, lokola na ntango oyo azali komona sanza. Na mikolo mosusu ntuku motoba na motoba (66), akotikala na kati ya makila mpo na kopɛtolama.  Na nsima, ntango mikolo ya kopɛtolama na ye ekokoka mpo na mwana mobali to mpo na mwana mwasi, akomema mwana-mpate ya mobali oyo ezali na mbula na yango ya liboso mpo ezala likabo ya kotumba+ mpe mwana ya ebenga to epopo+ mpo ezala likabo mpo na lisumu, na monɔkɔ ya hema ya kokutana, epai ya nganga-nzambe.  Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa yango liboso ya Yehova mpe kozipa masumu na ye, mpe asengeli kozala pɛto na liziba ya makila+ na ye. Wana ezali mobeko mpo na mwasi oyo aboti mwana mobali to mwana mwasi.  Soki azali na makoki ya kozwa mpate te, asengeli kozwa bipopo mibale to bana mibale ya bibenga,+ moko mpo na likabo ya kotumba mpe moko mpo na likabo mpo na lisumu, mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na ye, mpe asengeli kozala pɛto.’”

Maloba na nse