Balevi 10:1-20
10 Na nsima, bana mibali ya Arona: Nadabe ná Abihu+ bakamataki moto na moto eloko na ye ya kotya mɔtɔ+ mpe bayaki na yango mpe batyaki mɔtɔ kati na yango mpe batyaki mpaka ya malasi+ likoló na yango, mpe babandaki kopesa liboso ya Yehova mɔtɔ oyo endimami na mobeko te,+ mɔtɔ oyo asɛngaki bango te.
2 Na yango, mɔtɔ ebimaki liboso ya Yehova mpe ezikisaki bango,+ bongo bakufaki liboso ya Yehova.+
3 Bongo Moize alobaki na Arona ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nasantisama+ na kati ya baoyo bazali pene na ngai,+ mpe nazwa nkembo+ na miso ya bato nyonso.’” Mpe Arona afandaki nyɛɛ.
4 Bongo Moize abengaki Mishaele ná Elizafane, bana mibali ya Uziele,+ ndeko ya tata ya Arona, mpe alobaki na bango ete: “Bóbɛlɛma, bólongola bandeko na bino liboso ya esika mosantu, bómema bango libándá ya kaa.”+
5 Na yango, babɛlɛmaki mpe bamemaki bango na bazambala na bango tii libándá ya kaa, kaka ndenge Moize alobaki.
6 Na nsima, Moize alobaki na Arona mpe na Eleazare ná Itamare, bana na ye mosusu ya mibali ete: “Bómeka kobebisa nsuki ya mitó na bino te,+ mpe bosengeli te kopasola bilamba na bino, mpo bókufa te mpe mpo asilikela liyangani mobimba te;+ kasi bandeko na bino ya ndako mobimba ya Yisraele bakolela mpo na koboma na mɔtɔ oyo Yehova abomi.
7 Mpe bosengeli te kobima na monɔkɔ ya hema ya kokutana noki bókufa,+ mpamba te mafuta mosantu* ya Yehova ezali likoló na bino.”+ Bongo basalaki ndenge Moize alobaki.
8 Mpe Yehova alobaki na Arona ete:
9 “Komɛla vinyo te to masanga oyo elangwisaka,+ yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo, ntango bokokɔta na hema ya kokutana, mpo bókufa te. Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino,
10 mpo na kokesenisa eloko mosantu ná eloko mpamba mpe eloko ya mbindo ná eloko ya pɛto,+
11 mpe mpo na koteya bana ya Yisraele+ malako nyonso oyo Yehova alobi na bango na nzela ya Moize.”
12 Bongo Moize alobaki boye na Arona mpe na Eleazare mpe na Itamare, bana na ye ya mibali oyo batikalaki: “Bózwa likabo ya mbuma+ oyo etikalaki oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ mpe bólya yango, ezala na levire te, pene na etumbelo, mpamba te yango ezali eloko oyo eleki bosantu.+
13 Mpe bosengeli kolya yango na esika mosantu,+ mpamba te yango ezali pɔsɔ na yo mpe pɔsɔ ya bana na yo ya mibali oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ; mpo ezali ndenge wana nde nazwi mitindo.
14 Mpe bokolya ntolo ya likabo ya koningisa+ ná lokolo ya eteni oyo esantisami+ kati na esika ya pɛto, yo ná bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi elongo na yo,+ mpamba te bapesi yo yango lokola pɔsɔ na yo mpe pɔsɔ ya bana na yo ya mibali oyo euti na bambeka ya boyokani ya bana ya Yisraele.
15 Bakomema lokolo ya eteni oyo esantisami mpe ntolo ya likabo ya koningisa,+ nzela moko na makabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya biteni ya mafutamafuta, mpo na koningisa likabo ya koningisa epai na epai liboso ya Yehova; mpe yango esengeli kozala pɔsɔ+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na yo mpe bana na yo ya mibali, elongo na yo, kaka ndenge Yehova apesi mitindo.”
16 Mpe Moize alukaki mpenza ntaba-mobali ya likabo mpo na lisumu,+ mpe, talá! yango ezikisamaki. Bongo ye asilikelaki Eleazare ná Itamare, bana mibali ya Arona oyo batikalaki, alobi:
17 “Mpo na nini bolyaki te likabo mpo na lisumu na esika oyo ezali mosantu,+ mpo yango ezali eloko oyo eleki bosantu mpe ye apesi bino yango mpo bózongisa monɔkɔ mpo na libunga ya liyangani mpo na kozipa masumu na bango liboso ya Yehova?+
18 Talá! Makila na yango ekɔtisami te na kati ya esika mosantu.+ Bosengelaki kolya yango mpenza na esika mosantu, kaka ndenge nazwaki mitindo.”+
19 Na yango, Arona alobaki na Moize ete: “Talá! Lelo bapesi likabo na bango mpo na lisumu ná likabo na bango ya kotumba liboso ya Yehova,+ kasi makambo ya boye eyei kokwela ngai; bongo soki nalyaka likabo mpo na lisumu lelo, yango elingaki nde komonana malamu na miso ya Yehova?”+
20 Ntango Moize ayokaki yango, likambo yango emonanaki bongo malamu na miso na ye.