Bakolose 1:1-29
1 Paulo, ntoma ya Kristo Yesu na mokano ya Nzambe,+ mpe Timote+ ndeko na biso,
2 epai ya basantu mpe bandeko ya sembo, oyo bazali na bomoko+ elongo na Kristo, oyo bazali na Kolose:
Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso ezala na bino.+
3 Topesaka ntango nyonso Nzambe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo matɔndi+ ntango tobondelaka mpo na bino,+
4 banda toyoká nsango ya kondima na bino na makambo oyo etali Kristo Yesu mpe bolingo oyo bozali na yango epai ya basantu nyonso+
5 mpo na elikya+ oyo babombeli bino na likoló.+ Boyokaki makambo ya elikya yango liboso ntango bayebisaki solo ya nsango malamu wana+
6 oyo eyaki epai na bino, ndenge mpe ezali kobota mbuma+ mpe kokola+ na mokili mobimba,+ ndenge mpe ezali kosala kati na bino, banda mokolo oyo boyokaki mpe boyebaki malamumalamu boboto monene+ ya Nzambe na kati ya solo.+
7 Yango nde oyo boyekolaki epai ya Epafrasi,+ moombo mpe moninga na biso ya bolingo, oyo azali mosaleli* ya sembo ya Kristo na esika na biso,
8 oyo mpe apesaki biso nsango ya bolingo+ na bino na makambo ya elimo.
9 Yango wana biso mpe, banda mokolo toyokaki yango, tozali kotika te kobondela mpo na bino+ mpe kosɛnga ete bótonda na boyebi ya solosolo+ ya mokano na ye na bwanya+ nyonso mpe bososoli ya elimo,+
10 mpo na kotambola na ndenge oyo ebongi+ na Yehova+ mpo bósepelisa ye mpenza wana bozali kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu+ mpe kokola na boyebi ya solosolo+ ya Nzambe,
11 wana bolendi na nguya nyonso kino kokóma na bonene ya nguya+ na ye mpo bóyika mpenza mpiko+ mpe bózala na motema molai ná esengo,
12 wana bozali kopesa matɔndi na Tata oyo akómisi bino bato babongi kosangana na libula+ ya basantu+ na kati ya pole.+
13 Asikoli biso na nguya+ ya molili mpe akɔtisi+ biso na bokonzi+ ya Mwana ya bolingo na ye,+
14 oyo na nzela na ye tosikolami na nzela ya lisiko, tolimbisami masumu na biso.+
15 Ye azali elilingi+ ya Nzambe oyo amonanaka te,+ mwana ya liboso+ na biloko nyonso oyo ezalisamá;
16 mpo na nzela na ye+ biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te, ezala bakiti ya bokonzi to bonkolo to baguvɛrnema to makonzi.+ Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye+ mpe mpo na ye.
17 Lisusu, ye azali liboso ya biloko mosusu nyonso+ mpe na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki,+
18 mpe azali motó ya nzoto, lisangá.+ Azali ebandeli, mwana ya liboso uta na bakufi,+ mpo akóma moto ya liboso+ na makambo nyonso;
19 mpamba te Nzambe amonaki malamu ete nyonso oyo etondi kotonda+ efanda na kati na ye,
20 mpe na nzela na ye, azongisa lisusu boyokani+ kati na ye ná biloko mosusu nyonso,+ ndenge atye kimya+ na lisalisi ya makila+ oyo asopaki likoló ya nzete ya mpasi,+ ezala biloko oyo ezali na mabele to biloko oyo ezali na likoló.
21 Ya solo, bino baoyo bozalaki liboso mosika na Nzambe+ mpe banguna mpo makanisi na bino ezalaki na misala ya mabe,+
22 sikoyo azongisi bino lisusu na boyokani+ na lisalisi ya nzoto ya mosuni ya moto wana na nzela ya liwa na ye,+ mpo na kobimisa bino liboso na ye basantu mpe bato bazangi litɔnɔ+ mpe bato bakoki kofundama na likambo moko te,+
23 soki, ya solo, botikali na kondima,+ botɛlɛmi makasi likoló ya moboko+ mpe bopikami+ mpe bozali koningana te na elikya ya nsango malamu wana oyo boyokaki,+ mpe oyo esakolamaki+ na bato ya bikólo nyonso+ oyo ezali na nse ya lola. Ngai Paulo nakómá mosaleli+ ya nsango malamu yango.
24 Nazali sikoyo kosepela na kati ya bampasi na ngai mpo na bino,+ mpe ngai, na ngala na ngai, nazali kokokisa oyo ezali kozanga na malɔzi+ ya Kristo na nzoto na ngai ya mosuni mpo na bolamu ya nzoto na ye, oyo ezali lisangá.+
25 Nakómá mosaleli+ ya lisangá yango na boyokani na mosala ya kapita+ oyo Nzambe apesaki ngai mpo na litomba na bino mpo na kosakola liloba ya Nzambe malamumalamu,
26 sekele mosantu+ oyo ebombamaki banda na bibongiseli+ ya kalakala mpe banda na mabota ya kalakala. Kasi sikoyo emonisami polele+ epai ya basantu na ye,
27 oyo Nzambe asepeli koyebisa bango nini yango bomɛngo ya nkembo+ ya sekele mosantu+ yango kati na bikólo. Yango nde Kristo+ na bomoko elongo na bino, elikya ya nkembo na ye.+
28 Ye nde tozali kosakola,+ wana tozali kokebisa moto nyonso mpe koteya moto nyonso na bwanya nyonso,+ mpo tómonisa moto nyonso ete azali moto oyo akoki na makambo nyonso+ na bomoko elongo na Kristo.
29 Ezali mpo na yango mpenza nde nazali kosala mosala makasi, nazali koboma nzoto+ na boyokani na nguya na ye,+ oyo ezali kosala mosala na kati na ngai.+
Maloba na nse
^ To, “ministre.”