Bagalatia 6:1-18

6  Bandeko, ata soki moto abɛti libaku+ liboso ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo+ bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto,+ na ntango yango yo moko mpe omitalaka,+ noki yo mpe omekama.+  Bókoba komemelana kilo,+ mpe na ndenge yango bókokisa mobeko ya Kristo.+  Mpo soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba,+ azali kokosa makanisi na ye moko.  Kasi moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali,+ bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.+  Mpo moto na moto akomema mokumba na ye moko.+  Lisusu, moto nyonso oyo azali koteyama liloba na monɔkɔ+ akabolaka+ biloko nyonso ya malamu elongo na moto oyo azali kopesa liteya yango na monɔkɔ.+  Bómikosa te:+ Nzambe azali moto ya kotyola te.+ Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka;+  mpo moto oyo azali kolona mpo na nzoto na ye akobuka libebi oyo euti na nzoto na ye,+ kasi moto oyo azali kolona mpo na elimo+ akobuka bomoi ya seko oyo euti na elimo.+  Yango wana, tótika te kosala oyo ezali malamu,+ mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.+ 10  Yango wana, soki tozali mpenza na ntango oyo ebongi mpo na yango,+ tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.+ 11  Bótala ndenge nakomeli bino na balɛtrɛ ya mineneminene na lobɔkɔ na ngai moko.+ 12  Baoyo nyonso bazali koluka komonana malamu na nzoto nde bato bazali kotinda bino bókatama ngenga,+ nyonso wana kaka mpo bányokwama te mpo na nzete ya mpasi ya Kristo,+ Yesu. 13  Mpo ata bango moko baoyo bazali kokatama ngenga batosaka Mibeko te,+ kasi balingi bino bókatama ngenga mpo bázwa likambo ya komikumisa na yango na nzoto na bino. 14  Esalema ata moke te ete ngai namikumisa, longola kaka mpo na nzete ya mpasi+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo, oyo na nzela na ye mokili ebakami na nzete mpo na ngai+ mpe ngai mpo na mokili. 15  Mpo kokatama ngenga ezali na ntina te ndenge moko mpe kokatama ngenga te,+ kasi kozala ekelamu ya sika+ nde ezali na ntina. 16  Bato nyonso oyo bakolanda mpenza mitindo oyo, kimya mpe motema mawa ezala na bango, ɛɛ na Yisraele ya Nzambe.+ 17  Banda sikoyo moto moko te atya ngai lisusu na mobulu, mpo nazali komema na nzoto na ngai bilembo+ ya moombo ya Yesu.+ 18  Bandeko, boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na elimo+ oyo bozali komonisa. Amen.

Maloba na nse