Bagalatia 5:1-26
5 Mpo na bonsomi ya ndenge wana nde Kristo asikoli biso.+ Yango wana, bótɛlɛma makasi,+ mpe bótika te ete bátya bino lisusu na nkaka ya ekanganeli moko ya boombo.+
2 Talá! Ngai, Paulo, nazali koyebisa bino ete soki bokatami ngenga,+ Kristo akozala na ntina te epai na bino.
3 Lisusu, nazali kotatwela lisusu moto nyonso oyo azali kokatama ngenga ete asengeli kokokisa Mibeko nyonso.+
4 Bokabwani na Kristo, bino nyonso oyo bozali koluka kotángama bayengebene mpo na mibeko;+ bolongwe na boboto monene+ na ye.
5 Nde biso, na nzela ya elimo, tozali kozela na motema mɔtɔ mpenza boyengebene oyo tozali kolikya oyo euti na kondima.+
6 Mpo, na makambo ya Kristo Yesu, kokatama ngenga ezali na ntina te, ezala mpe kokatama ngenga te,+ kasi kondima+ oyo ezali kosala na nzela ya bolingo+ nde ezali na ntina.
7 Bozalaki kopota mbangu malamu.+ Nani apekisi bino kokoba kotosa solo?+
8 Makanisi ya ndenge wana euti na Moto oyo azali kobenga bino+ te.
9 Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini.+
10 Nandimi mpenza+ ete bino baoyo bozali na bomoko+ na Nkolo bokokanisa ndenge mosusu te; kasi moto oyo azali kotya bino na mobulu+ akosambisama,+ azala nani to nani.
11 Kasi ngai, bandeko, soki nazali naino kosakola kokatama ngenga, mpo na nini nazali kokoba konyokwama? Kutu, na ndenge yango, eloko oyo ezali kobɛtisa libaku,+ oyo euti na nzete ya mpasi+ elongwe.+
12 Nakosepela kutu ete bato oyo bazali koluka kobulunganisa bino+ bámikómisa ata mikube.+
13 Ya solo, bandeko, bobengamaki mpo na bonsomi;+ kasi bósalela bonsomi yango te lokola nzela ya kokokisa bamposa ya nzoto,+ kasi na bolingo bósalelanaka lokola baombo.+
14 Mpo Mibeko nyonso ekokisami+ na liloba kaka moko, elingi koloba: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”+
15 Nzokande, soki bozali kokoba koswana mino mpe kolyana,+ bókeba ete bósilisana te.+
16 Kasi nazali koloba: Bókoba kotambola na elimo+ mpe bokokokisa ata mposa moko te ya nzoto.+
17 Mpo nzoto, na mposa na yango, etɛmɛlaka elimo,+ elimo mpe etɛmɛlaka nzoto; mpo yango mibale eyokanaka te, yango wana makambo oyo bozali kolinga kosala bozali kosala yango te.+
18 Lisusu, soki bozali kotambwisama na elimo,+ bozali na nse ya mibeko te.+
19 Nzokande misala ya nzoto ezali komonana polele,+ mpe ezali pite,+ mbindo, etamboli ya nsɔni,+
20 losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe,+ koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba,
21 likunya, kolangwa masanga,+ bafɛti ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana. Mpo na makambo yango, nazali kokebisa bino, ndenge mpe nakebisaki bino liboso, ete baoyo basalaka+ makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.+
22 Nzokande, mbuma+ ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu,+ kondima,
23 motema pɛtɛɛ, komipekisa.+ Ezali na mobeko ata moko te oyo ezali kotɛmɛla makambo wana.+
24 Lisusu, baoyo bazali bato ya Kristo Yesu babaká na nzete nzoto ná bilulela na yango mpe bamposa na yango.+
25 Soki tozali na bomoi na elimo, tókoba kotambola mpe na molɔngɔ mpenza na elimo.+
26 Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana+ na kati na biso, koyokelana likunya.+