Bafilipi 2:1-30
2 Yango wana, soki na kati na bino mwa elendiseli ezali mpo bozali na bomoko na Kristo,+ soki mwa libɔndisi ya bolingo ezali, soki moto na moto azali komibanzabanza mpo na mosusu,+ soki mwa bolingo ya motema+ mpe mawa ezali,
2 bótondisa ngai na esengo mpe bózala na likanisi moko,+ bózala na bolingo moko, bózala na bomoko na molimo, bózala na likanisi kaka moko mpenza,+
3 bósala eloko moko te na kowelana+ to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu,+ kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki+ bino,
4 bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te,+ kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.+
5 Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango,+
6 oyo, atako azalaki na lolenge ya Nzambe,+ azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.+
7 Te, kasi amikómisaki nde mpamba mpe akómaki lokola moombo+ mpe akómaki lokola bato.+
8 Longola oyo wana, ntango akómaki na lolenge ya moto,+ amikitisaki mpe atosaki tii liwa,+ ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi.+
9 Yango wana mpe Nzambe atombolaki ye likoló koleka+ mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso,+
10 mpo, na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele mpe ya baoyo bazali na nse ya mabele egumbama,+
11 mpe monɔkɔ nyonso endima polele+ ete Yesu Kristo azali Nkolo+ mpo na nkembo ya Nzambe Tata.+
12 Yango wana, bandeko na ngai ya bolingo, se ndenge botosaka+ ntango nyonso, kaka te na ntango oyo ngai nazali, kasi mingi lisusu sikoyo na ntango oyo ngai nazali te, bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga+ mpe na kolɛnga;
13 mpo Nzambe nde moto oyo, ndenge asepeli kosala, azali kosala na kati na bino+ mpo bino bólinga mpe bósala.+
14 Bókoba kosala makambo nyonso na koimaima te+ mpe na ntembe te,+
15 mpo bókóma bato oyo bazali na mbeba te+ mpe bazali na ngambo te, bana+ ya Nzambe oyo bazali na litɔnɔ te na kati ya libota oyo etɛngamá mpe egumbamá,+ epai bozali kongɛnga lokola miinda na mokili,+
16 bókangama makasi na liloba ya bomoi,+ mpo nazwa likambo ya komikumisa na mokolo ya Kristo,+ ete napotaki mbangu mpamba te mpe nasalaki mosala makasi mpamba te.+
17 Nzokande, atako nazali komipesa lokola likabo ya masanga+ oyo bazali kosopela mbeka+ ya mosala mpo na bolamu ya bato nyonso oyo kondima etindi bino bósala,+ nazali na esengo mpe nazali kosepela+ elongo na bino nyonso.
18 Kasi bino mpe ndenge moko bózala na esengo mpe bósepela elongo na ngai.+
19 Soki Nkolo Yesu alingi, nazali kolikya kotindela bino Timote nsima ya mwa ntango moke, mpo molimo na ngai ezala na esengo+ ntango nakoyoka nsango na bino.
20 Mpo nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya ye, oyo azali komitungisa mpenza+ mpo na bino.
21 Mpo bamosusu nyonso bazali koluka matomba na bango moko,+ oyo ya Kristo Yesu te.
22 Kasi boyebi ndenge amonisaki ete abongi kotyelama motema, mpo lokola mwana+ ná tata na ye asalaki lokola moombo elongo na ngai mpo nsango malamu ekende liboso.
23 Yango wana, ye nde moto nazali kolikya kotinda nokinoki nsima ya koyeba ndenge makambo na ngai ekotambola.
24 Ya solo, nandimi mpenza na kati ya Nkolo ete ngai moko mpe nakoya nsima ya mwa ntango moke.+
25 Atako bongo, namoni ete ezali na ntina mpenza natindela bino Epafrodite,+ ndeko na ngai mpe moninga na ngai ya mosala+ mpe soda lokola ngai,+ kasi moto oyo bino botindi mpe mosaleli na ngai mpenza mpo na bamposa na ngai,
26 mpo azali na mposa makasi ya komona bino nyonso mpe azali na mawa mingi mpo boyokaki ete abɛlaki.
27 Ɛɛ, ya solo, abɛlaki mpenza pene na liwa; kasi Nzambe ayokelaki ye mawa,+ kutu, kaka ye moko te, kasi ngai mpe, mpo nabakisa mawa likoló ya mawa te.
28 Yango wana nazali kotinda ye nokinoki mpenza, mpo ntango bokomona ye bósepela lisusu mpe mawa na ngai esila malamumalamu.
29 Yango wana, bóyamba ye+ na ndenge bomeseni koyamba na kati ya Nkolo na esengo nyonso; mpe bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana,+
30 mpamba te mpo na mosala ya Nkolo akómaki mpenza pene na liwa, atyaki molimo na ye na likama,+ mpo asala malamu mpenza na esika na bino mpo bino moko bozalaki awa te mpo na kosalela ngai.+