Bafilipi 1:1-30
1 Paulo ná Timote, baombo+ ya Kristo Yesu, epai ya basantu nyonso oyo bazali na bomoko na Kristo Yesu, oyo bazali na Filipi,+ ná bakɛngɛli ná basaleli na misala:+
2 Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.+
3 Ntango nyonso natɔndaka Nzambe na ngai, mbala nyonso oyo nakanisaka bino+
4 na lilɔmbɔ na ngai nyonso mpo na bino nyonso,+ mpe nasalaka lilɔmbɔ na ngai na esengo,
5 mpo bopesaki mabɔkɔ+ na nsango malamu banda mokolo ya liboso tii sikoyo.
6 Mpo nandimi solosolo likambo oyo: moto oyo abandaki mosala moko ya malamu na kati na bino akokómisa yango na nsuka+ tii na mokolo+ ya Yesu Kristo.
7 Ebongi mpenza nakanisela bino nyonso ndenge wana, mpo bozali na motema na ngai,+ mpo bino nyonso bozali kozwa+ boboto monene elongo na ngai na ndenge bozali kokangama+ na minyɔlɔlɔ na ngai mpe bozali kokɔtela+ nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko.+
8 Mpo Nzambe azali motatoli na ngai na likambo oyo: nazali koyoka bino nyonso mposa makasi na bolingo ya motema+ lokola oyo Kristo Yesu azali na yango.
9 Mpe talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango: bolingo na bino ebakisamaka+ lisusu mingi mpenza ná boyebi+ ya solosolo ná bososoli mingi mpenza;+
10 mpo bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina,+ mpo bózala pɛto+ mpe bóbɛtisa bamosusu libaku te+ tii na mokolo ya Kristo,
11 mpe bótonda na mbuma ya boyengebene,+ oyo eyaka na nzela ya Yesu Kristo, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.+
12 Sikoyo, bandeko, nalingi bóyeba ete makambo na ngai etamboli malamu mpo nsango malamu ekende liboso,+
13 bongo minyɔlɔlɔ na ngai+ eyebani polelepolele+ na Bakɛngɛli nyonso ya Mokonzi mpe na bato mosusu nyonso+ ete nakangamaki mpo na kosalela Kristo;
14 mpe bandeko mingi na kati ya Nkolo bazali kozwa makasi mpo na minyɔlɔlɔ na ngai, bazali komonisa mpiko mingi lisusu mpo na kosakola liloba ya Nzambe na kobanga te.+
15 Ya solo, bamosusu bazali kosakola Kristo na likunya mpe kowelana,+ kasi bamosusu na makanisi malamu.+
16 Baoyo ya makanisi malamu bazali kosakola Kristo mpo na bolingo, mpo bayebi ete natyami awa mpo na kokɔtela+ nsango malamu;
17 kasi baoyo mosusu basalaka yango nde mpo na kowelana,+ na likanisi ya pɛto te, mpo bazali kokanisa kobimisela ngai bolɔzi+ na minyɔlɔlɔ na ngai.
18 Bongo nini? Na ndenge nyonso, ezala na lokuta+ to na solo, Kristo azali kosakolama,+ mpe na likambo yango nazali kosepela. Kutu, nakokoba kosepela lisusu,
19 mpo nayebi ete yango ekomemela ngai lobiko na nzela ya lilɔmbɔ na bino+ mpe ya elimo oyo Yesu Kristo azwaki,+
20 yango eyokani na kozela na ngai na mposa makasi+ mpe elikya+ na ngai ete nayoka nsɔni ata na likambo moko te.+ Kasi na elobeli ya polele mpe na bosembo,+ Kristo akokumisama sikoyo, ndenge akumisamaka banda kala, na nzela ya nzoto na ngai,+ ezala nazali na bomoi to nakufi.+
21 Mpo na ngai, kozala na bomoi elimboli kosalela Kristo,+ mpe kokufa+ ezali litomba.
22 Nzokande soki esengeli kozala na bomoi na nzoto, ezali mbuma ya mosala na ngai+—kasi eloko ya kopona nazali koyebisa yango te.
23 Makambo wana mibale esilisi ngai mayele;+ kasi eloko oyo nazali na mposa na yango ezali nde kosikolama mpe kozala esika moko na Kristo,+ mpo, ya solo, yango nde eloko oyo eleki mpenza malamu.+
24 Nzokande, kotikala na ngai na nzoto ezali na ntina mingi mpo na bino.+
25 Yango wana, lokola nazali mpenza kondima likambo yango, nayebi ete nakotikala+ mpe nakofanda elongo na bino nyonso mpo bókola+ mpe bózala na esengo ya kondima na bino,
26 mpo ete bózala na makambo mingi ya komikumisa na kati ya Kristo Yesu mpo na ngai na ndenge nazali lisusu elongo na bino.
27 Kaka nde bómitambwisa na ndenge oyo ebongi+ na nsango malamu ya Kristo, mpo, ezala nayei kotala bino to nazali te, nayoka nsango ete bozali kotɛlɛma ngwi na elimo kaka moko, na molimo kaka moko+ bozali kobunda elongo mpo na kondima ya nsango malamu,
28 mpe bozali kotika banguna+ na bino bábangisa bino na likambo ata moko te. Likambo wana mpenza ezali komonisa polele libebi na bango, kasi lobiko na bino;+ mpe yango ezali elembo oyo euti na Nzambe,
29 mpo bozwi libaku malamu, kaka ya kondimela+ Kristo te, kasi mpe ya konyokwama+ mpo na ye.
30 Mpo bino mpe bozali kobunda etumba lokola oyo bomonaki ngai nazali kobunda+ mpe lokola oyo bozali sikoyo koyoka mpo na ngai.+