Baefese 2:1-22
2 Lisusu, ezali bino nde bato Nzambe azongisi na bomoi atako bokufaki na mabunga na bino mpe na masumu na bino,+
2 oyo kala bozalaki kotambola na yango na kolanda makambo+ ya mokili oyo, na kolanda mokonzi+ ya nguya ya mopɛpɛ, elimo+ oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.+
3 Ɛɛ, na kati na bango biso nyonso tozalaki komitambwisa kala na kolanda bamposa ya nzoto na biso,+ tozalaki kosala makambo oyo nzoto+ mpe makanisi ezalaki kolinga, mpe tozalaki mpenza bana ya nkanda+ lokola bato mosusu.
4 Kasi Nzambe, oyo atondi mpenza na motema mawa,+ mpo na bolingo na ye monene oyo alingaki biso,+
5 azongisaki biso na bomoi elongo na Kristo, na ntango mpenza tozalaki naino bakufi na kati ya mabunga+—na boboto monene bobikisami+—
6 mpe alamwisaki biso+ elongo mpe afandisaki biso elongo na bisika ya likoló+ na bomoko elongo na Kristo Yesu,
7 mpo ete na makambo ya ntango oyo ekoya+ bomɛngo+ ya boboto monene na ye oyo eleki nyonso ekoka komonisama na kati ya motema malamu na ye epai na biso na bomoko+ elongo na Kristo Yesu.
8 Na boboto monene wana nde bobikisami na nzela ya kondima;+ mpe kobika yango euti na bino te,+ ezali likabo ya Nzambe.+
9 Ɛɛ, euti na misala te,+ mpo moto moko te azwa ntina ya komikumisa.+
10 Mpo biso tozali mbuma ya mosala na ye+ mpe tozalisamaki+ na bomoko+ elongo na Kristo Yesu mpo na misala ya malamu,+ oyo Nzambe abongisá liboso+ mpo biso tótambola na yango.
11 Na yango, bóbosana te ete kala bozalaki bato ya bikólo na mosuni;+ bobengamaki bato ya “kozanga kokatama ngenga” na baoyo babengami bato ya “kokatama ngenga” oyo esalemi na mabɔkɔ na kati ya mosuni+—
12 ete na ntango wana mpenza bozalaki na Kristo te,+ botangwaki+ mosika na ekólo ya Yisraele mpe bozalaki bapaya na kondimana ya elaka,+ mpe bozalaki na elikya te+ mpe bozalaki na Nzambe te na mokili.+
13 Kasi sikoyo, na bomoko elongo na Kristo Yesu, bino bato oyo kala bozalaki mosika mpenza, bokómi penepene na lisalisi ya makila+ ya Kristo.
14 Mpo ye azali kimya na biso,+ ye moto asalaki ete bituluku wana mibale+ ekóma moko+ mpe abukaki efelo+ ya katikati oyo ezalaki kokabola+ yango.
15 Na lisalisi ya nzoto na ye ya mosuni+ alongolaki bonguna,+ Mibeko oyo ezalaki na mitindo mpe na malako,+ mpo akoka kozalisa bikólo yango mibale+ mpo ekóma moto moko ya sika, na bomoko elongo na ye,+ mpe akoka kotya kimya;
16 mpe akoka mpenza koyokanisa+ bikólo nyonso wana mibale ekóma nzoto kaka moko+ mpo na Nzambe na nzela ya nzete ya mpasi,+ mpo abomaki bonguna+ na lisalisi na ye moko.
17 Mpe ayaki mpe asakolaki nsango malamu ya kimya+ epai na bino bato oyo bozalaki mosika, mpe kimya epai ya baoyo bazalaki pene,+
18 mpo na lisalisi na ye biso, bikólo yango mibale,+ tozwi nzela ya kobɛlɛma+ na Tata na elimo kaka moko.+
19 Na yango, ya solo mpenza, bozali lisusu bapaya te+ mpe bato oyo bafandi bapaya,+ kasi bozali nde bana-mboka+ esika moko na basantu+ mpe bozali bato ya ndako+ ya Nzambe,
20 mpe botongami likoló ya moboko+ ya bantoma+ mpe basakoli,+ nzokande Kristo Yesu ye moko azali libanga ya litumu ya moboko ya ndako.+
21 Na bomoko elongo na ye, ndako yango mobimba, lokola esangani liboke moko na boyokani mpenza,+ ezali komata mpo na kokóma tempelo mosantu ya Yehova.+
22 Na bomoko elongo na ye,+ bino mpe bozali kotongama elongo mpo na kozala esika oyo Nzambe asengeli kofanda na elimo.+