Baebre 8:1-13

8  Sikoyo na makambo oyo tozali kolobela likanisi ya ntina mpenza yango oyo: Tozali na nganga-nzambe monene+ ya ndenge wana, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Bokonzi Monene na likoló,+  mosaleli mpo na bolamu ya bato nyonso na esika mosantu+ mpe na hema ya solosolo, oyo Yehova+ atongaki, kasi moto te.+  Mpo nganga-nzambe monene nyonso atyami mpo na kopesa makabo mpe bambeka;+ yango wana, esengelaki ye mpe azala na likabo ya kopesa.+  Nzokande, soki azalaka na mabele, mbɛlɛ azali nganga-nzambe te,+ mpo ezali na bato oyo bazali kopesa makabo na kolanda Mibeko,  kasi bazali nde kosala mosala mosantu oyo ezali ndakisa+ mpe elili+ ya makambo oyo ezali na likoló; ndenge Moize, ntango alingaki kotonga hema+ mobimba, azwaki etinda ya Nzambe+ ete: Mpo alobi: “Kebá ete osala makambo nyonso na kolanda modɛlɛ oyo bamonisaki yo na ngomba.”+  Kasi sikoyo Yesu azwi mosala moko ya malamu koleka mpo na bolamu ya bato nyonso, yango wana azali mpe moyokanisi+ ya kondimana moko ya malamu koleka,+ oyo etyami na kolanda mibeko mpe esimbami na bilaka ya malamu koleka.+  Mpo soki kondimana wana ya liboso ezalaka na mbeba te, mbɛlɛ oyo ya mibale ezali na ntina te;+  mpo azali mpenza nde kopamela bato ntango azali koloba ete: “Yehova alobi ete: ‘Talá! Mikolo ezali koya mpe nakosala kondimana ya sika ná ndako ya Yisraele mpe ná ndako ya Yuda;+  ekozala te na kolanda kondimana+ oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango na mokolo oyo nasimbaki lobɔkɔ na bango mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito,+ mpo batikalaki te na kati ya kondimana na ngai,+ yango wana natikaki kobatela bango,’ Yehova alobi bongo.”+ 10  “Yehova alobi ete: ‘Mpo talá kondimana oyo nakosala ná ndako ya Yisraele nsima ya mikolo yango. Nakotya mibeko na ngai na makanisi na bango, mpe nakokoma yango na mitema na bango.+ Mpe nakokóma Nzambe na bango,+ mpe bango bakokóma bato na ngai.+ 11  “‘Mpe bakoteyana te moto na moto mwana-mboka lokola ye mpe moto na moto ndeko na ye ete: “Yebá Yehova!”+ Mpo bango nyonso bakoyeba ngai,+ kobanda na oyo aleki moke kino na oyo aleki monene na kati na bango. 12  Mpo nakomonisa motema mawa na misala na bango ya kozanga boyengebene, mpe nakokanisa lisusu masumu+ na bango te.’”+ 13  Ntango alobi “kondimana ya sika” asilisi ngala ya oyo ya kala.+ Nzokande eloko oyo esili ngala mpe enuni ekómi pene ya kolimwa.+

Maloba na nse