Baebre 7:1-28
7 Mpo Melekisedeke yango, mokonzi ya Saleme, nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló,+ oyo akutanaki na Abrahama ntango autaki koboma bakonzi mpe apambolaki ye+
2 mpe oyo Abrahama apesaki moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso,+ azali libosoliboso, soki babongoli, “Mokonzi ya Boyengebene,” mpe lisusu azali mpe mokonzi ya Saleme,+ elingi koloba, “Mokonzi ya Kimya.”
3 Lokola azali na tata te, na mama te, na molɔngɔ ya bankɔkɔ te, lokola mikolo na ye ezali na ebandeli te+ mpe bomoi na ye na nsuka te, kasi akómi lokola Mwana ya Nzambe,+ azali nganga-nzambe seko na seko.+
4 Yango wana bótala, azalaki moto monene mpenza! Mobali yango oyo Abrahama, mokonzi ya libota, apesaki moko ya bandambo zomi ya biloko ya kitoko mingi na biloko oyo azwaki na etumba.+
5 Ya solo, bana ya Levi+ oyo bazali kozwa mosala na bango ya bonganga-nzambe bazwi mitindo ya kokɔngɔla epai ya bato+ moko ya bandambo zomi+ na kolanda Mibeko, elingi koloba, epai ya bandeko na bango, atako bautaki na bangei ya Abrahama;+
6 kasi moto oyo molɔngɔ ya bankɔkɔ+ na ye eutaki na bango te azwaki moko ya bandambo zomi epai ya Abrahama+ mpe apambolaki moto oyo azwaki bilaka.+
7 Nzokande ntembe ezali te: moto oyo azali moke apambolami na moto oyo aleki ye.+
8 Mpe bato oyo bazwaki liboso moko ya bandambo zomi+ ezali bato oyo bakufaka, kasi oyo balobeli nsima ezali moto oyo batatweli ye ete azali na bomoi.+
9 Mpe, tiká nasalela elobeli oyo: na nzela ya Abrahama ata Levi oyo azwaka moko ya bandambo zomi afutaki moko ya bandambo zomi,
10 mpo azalaki naino na bangei+ ya nkɔkɔ na ye ntango Melekisedeke akutanaki na ye.+
11 Yango wana, soki ezaleli ya kokoka+ eyaka mpenza na lisalisi ya bonganga-nzambe ya Balevi,+ (mpo bonganga-nzambe wana eyaki nzela moko na Mibeko+ oyo bapesaki bato mpe ezalaki likambo ya ntina mpenza,) mbɛlɛ ntina ezalaki lisusu+ ete nganga-nzambe mosusu abima lokola Melekisedeke+ mpe báloba ete azali lokola Arona?
12 Mpo lokola bonganga-nzambe ezali kobongwana,+ mibeko mpe esengeli kobongwana.+
13 Mpo moto oyo balobeli makambo oyo azali moto ya libota mosusu,+ oyo moto na yango ata moko te asalá na etumbelo.+
14 Mpo eyebani polele mpenza ete Nkolo na biso autaki na Yuda,+ libota oyo Moize alobelaki eloko moko te oyo etali banganga-nzambe.
15 Mpe eyebani lisusu polele koleka ete, lokola Melekisedeke,+ nganga-nzambe mosusu azali kobima,+
16 oyo akómi bongo, na kolanda te makambo oyo ekomami na kati ya mibeko oyo etali makambo oyo ezali na mabele,+ kasi nde na kolanda nguya ya bomoi moko oyo ekoki te kobebisama,+
17 mpo ekomami boye: “Ozali nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”+
18 Yango wana, balongolaki mpenza mibeko ya liboso mpo ezalaki na makasi te+ mpe ezalaki na litomba te.+
19 Mpo Mibeko ekómisaki ata eloko moko te eloko ya kokoka,+ kasi koya ya elikya+ moko oyo eleki malamu esalaki yango, oyo na nzela na yango tozali kopusana penepene na Nzambe.+
20 Lisusu, ndenge yango esalemaki na kolapa ndai,
21 (mpo ezali na bato oyo bakómi banganga-nzambe na ndai te, kasi ezali na moto moko oyo akómi nganga-nzambe na ndai ya Moto oyo alobelaki ye ete: “Yehova alapi ndai+ (mpe akoyoka mawa te) ete: ‘Ozali nganga-nzambe libela na libela,’”)+
22 ndenge yango mpe Yesu akómi moto oyo apesami ndanga ya kondimana oyo eleki malamu.+
23 Lisusu, mingi basengelaki kokóma banganga-nzambe nsima ya bamosusu+ mpo liwa+ ezalaki kopesa bango nzela te ya kokoba kozala bongo,
24 kasi ye lokola azali na bomoi libela na libela+ azali na bakitani te na bonganga-nzambe na ye.
25 Bongo akoki mpe kobikisa mpenza bato oyo bazali kopusana epai ya Nzambe na nzela na ye, mpo azali ntango nyonso na bomoi mpo na kolobela bango.+
26 Mpo nganga-nzambe monene ya ndenge wana ezali mpenza oyo abongi na biso,+ moto ya sembo,+ oyo azali na mabe te,+ na mbindo te,+ akabwani na basumuki,+ mpe atombwami koleka likoló.+
27 Azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo,+ lokola banganga-nzambe minene wana basalaka, libosoliboso mpo na masumu na ye moko+ mpe na nsima mpo na oyo ya bato:+ (mpo asalaki yango mbala moko+ mpo na libela ntango amikabaki;+)
28 mpo Mibeko ezali kotya bato ya bolɛmbu+ banganga-nzambe minene,+ kasi liloba ya ndai+ oyo eyaki nsima ya Mibeko ezali kotya nde Mwana moko, oyo akómisami moto oyo akoki na nyonso+ libela na libela.