Baebre 4:1-16

4  Yango wana, lokola elaka ya kokɔta na kopema na ye+ ezali naino, tókeba ete moko na bino amonana mbala mosusu ete abongi na yango te.+  Mpo basakwelaki mpe biso nsango malamu,+ ndenge basakwelaki bango mpe;+ kasi bazwaki litomba te na liloba oyo bayokaki,+ mpo bazalaki na kondima moko te+ na baoyo batosaki.+  Mpo biso bato oyo tondimi, tozali mpenza kokɔta na kopema yango, ndenge alobaki ete: “Bongo nalapaki ndai+ na nkanda na ngai ete: ‘Bakokɔta na kopema na ngai te,’”+ atako misala na ye esukaki+ banda mokili ebandá.+  Mpo, alobeli mokolo ya nsambo na esika moko ete: “Mpe Nzambe apemaki na mokolo ya nsambo na misala na ye nyonso oyo asalaki,”+  mpe na esika yango alobi lisusu ete: “Bakokɔta na kopema na ngai te.”+  Yango wana, lokola etikali ete bamosusu bákɔta na kopema yango, mpe baoyo bayokaki nsango malamu+ liboso bakɔtaki te mpo bazangaki botosi,+  atye lisusu mokolo moko boye ntango alobi, nsima ya ntango molai, na nzembo ya Davidi ete: “Lelo oyo”; kaka ndenge elobamaki liboso ete: “Lelo oyo soki boyoki mongongo na ye,+ bókómisa mitema na bino makasi te.”+  Mpo soki Yosua+ akɔtisaka bango na esika moko ya kopema,+ mbɛlɛ na nsima Nzambe alobeli mokolo mosusu te.+  Yango wana, etikali na kopema moko ya sabata mpo na bato ya Nzambe.+ 10  Mpo moto oyo akɔti na kopema ya Nzambe+ apemi mpe na misala na ye,+ ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye. 11  Yango wana, tósala nyonso oyo ekoki mpo tókɔta na kopema wana, noki moto moko akwea mpe alanda ndakisa yango ya kozanga botosi.+ 12  Mpo liloba+ ya Nzambe ezali na bomoi+ mpe ezali na nguya+ mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale+ mpe ekɔtaka tii kokabola molimo+ ná elimo,+ mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.+ 13  Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+ 14  Yango wana, lokola tozali na nganga-nzambe monene oyo aleki banganga-nzambe minene nyonso oyo akɔti na likoló,+ Yesu Mwana ya Nzambe,+ tókangama na komonisa polele ete tondimi ye.+ 15  Mpo nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo akoki te koyokela biso mawa+ na bolɛmbu na biso, kasi ezali nde moto oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.+ 16  Yango wana, tópusana+ na elobeli ya polele mpe na bosembo+ penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene, mpo Nzambe ayokela biso mawa mpe amonisela biso boboto monene ntango tozali na mposa ya lisalisi.+

Maloba na nse