Baebre 3:1-19

3  Yango wana, bandeko basantu, bino oyo bobengami mpo na kokende na likoló,+ bókanisa mpenza ntoma+ mpe nganga-nzambe monene oyo tozali kondimela polele+—Yesu.  Azalaki sembo+ epai ya Moto oyo akómisaki ye bongo, ndenge mpe Moize+ azalaki sembo na ndako mobimba ya Moto wana.+  Mpo ye atángamaki ete abongi na nkembo mingi+ koleka Moize, mpo moto+ oyo atongaka ndako azalaka na lokumu mingi koleka ndako.+  Ya solo, ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.+  Mpe Moize azalaki mosaleli+ ya sembo na ndako mobimba ya Moto yango. Mosala na ye ezalaki komonisa makambo oyo ekolobelama na nsima.+  Kasi Kristo azalaki Mwana+ ya sembo na ndako ya Moto yango. Biso tozali ndako ya Moto yango,+ soki tii na nsuka tozali ntango nyonso koloba polele mpe na bosembo mpe kokangama na makambo oyo ezali kotinda biso tómikumisa mpo na elikya oyo tozali na yango.+  Yango wana, kaka ndenge elimo santu+ ezali koloba: “Lelo oyo soki boyoki mongongo na ye,+  bókómisa mitema na bino makasi te lokola na ntango ya koyokisa nkanda makasi,+ lokola na mokolo oyo komekama+ ebimaki na esobe,+  esika bankɔkɔ na bino bamekaki ngai, atako bamonaki misala na ngai+ na boumeli ya mbula ntuku minei (40).+ 10  Yango wana, nalɛmbaki libota oyo, bongo nalobaki ete: ‘Babungaka ntango nyonso nzela na mitema na bango,+ mpe bayebi banzela na ngai te.’+ 11  Bongo nalapaki ndai na nkanda na ngai ete: ‘Bakokɔta na kopema na ngai te.’”+ 12  Bandeko, bókeba noki moko na bino akóma na motema mabe oyo ezangi kondima mpo atiki Nzambe ya bomoi;+ 13  kasi bókoba kolendisana+ mokolo na mokolo, na ntango oyo ekoki kobengama ete “Lelo,”+ noki moko na bino akóma motema makasi mpo na nguya ya bokosi+ ya lisumu. 14  Mpo tozali mpenza kokóma bato oyo bazali kosangana na makambo ya Kristo+ kaka soki tokangami makasi na makambo oyo totyelaki motema na ebandeli tii na nsuka,+ 15  na ntango oyo bazali koloba ete: “Lelo oyo soki boyoki mongongo na ye,+ bókómisa mitema na bino makasi te lokola na ntango ya koyokisa nkanda makasi.”+ 16  Mpo banani bayokaki mpe atako bongo batumolaki nkanda makasi ya Nzambe?+ Ezalaki bato nyonso oyo babimaki na Ezipito na litambwisi ya Moize, boye te?+ 17  Lisusu, banani Nzambe alɛmbaki na boumeli ya mbula ntuku minei (40)?+ Ezalaki bato oyo basalaki lisumu, oyo bibembe na bango ekweaki na esobe, boye te?+ 18  Kasi banani ye alapelaki ndai+ ete bakokɔta na kopema na ye te, ezali te baoyo bazangaki botosi?+ 19  Yango wana tozali komona ete bakɔtaki te mpo bazangaki kondima.+

Maloba na nse