Baebre 2:1-18
2 Yango wana, tosengeli kotyela makambo oyo toyokaki+ likebi mingi koleka, mpo tómemama mosika na nzela te.+
2 Mpo soki liloba oyo elobamaki na nzela ya baanzelu+ etɛlɛmaki makasi, mpe likambo nyonso ya kobuka mibeko mpe likambo nyonso ya kozanga botosi ezwaki etumbu na bosembo,+
3 tokokima ndenge nini+ soki totyoli+ lobiko monene+ ya ndenge wana oyo Nkolo na biso asakolaki liboso+ mpe oyo bato oyo bayokaki ye bamonisaki biso ete ezali solo,+
4 wana Nzambe mpe apesaki litatoli elongo na bango na bilembo ná makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na misala ndenge na ndenge ya nguya+ mpe na ndenge akabolelaki+ basaleli na ye elimo santu na boyokani na mokano na ye?+
5 Mpo atye mabele* oyo ekoya,+ oyo biso tozali kolobela, na nse ya bokonzi ya baanzelu te.
6 Kasi motatoli moko akomaki na esika moko: “Moto azali nani mpo okanisa ye,+ to mwana ya moto mpo obatela ye?+
7 Osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu; olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu,+ mpe otyaki ye mokonzi ya misala ya mabɔkɔ na yo.+
8 Otyaki biloko nyonso na nse ya makolo na ye.”+ Mpo lokola Nzambe atyaki biloko nyonso na nse na ye+ atikaki ata eloko moko te ete ezala na nse ya bokonzi na ye te.+ Nzokande, sikoyo, tozali naino komona biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye te;+
9 kasi tozali komona Yesu, oyo atyami mwa moke na nse ya baanzelu,+ alati motole ya nkembo+ mpe ya lokumu mpo anyokwamaki mpe akufaki,+ mpo, na nzela ya boboto monene ya Nzambe, akufela moto nyonso.+
10 Mpo ebongaki mpenza ete moto oyo biloko nyonso ezali mpo na nkembo na ye+ mpe oyo na nzela na ye biloko nyonso ezali, ntango azali kosala ete bana mingi bákóma na nkembo,+ akómisa Kapita+ oyo bazali kobika na nzela na ye moto ya kokoka na nzela ya bampasi.+
11 Mpo moto oyo azali kosantisa mpe baoyo bazali kosantisama,+ bango nyonso bauti na moto kaka moko,+ mpe yango wana azali koyoka nsɔni te ya kobenga bango “bandeko,”+
12 ntango azali koloba ete: “Nakosakwela bandeko na ngai nkombo na yo; nakosanzola yo na nzembo na katikati ya lisangá.”+
13 Mpe lisusu ete: “Nakotyela ye motema.”+ Mpe lisusu ete: “Talá! Ngai ná bana mike, oyo Yehova apesaki ngai.”+
14 Yango wana, lokola “bana mike” yango bazali na makila mpe na nzoto ya bomoto, ye mpe akómaki ndenge wana,+ mpo, na nzela ya liwa na ye,+ abebisa nyɛɛ+ moto oyo akoki kopesa liwa,+ elingi koloba, Zabolo;+
15 mpe apesa bonsomi+ na bato nyonso oyo, mpo na kobanga liwa,+ batyamaki na boombo bomoi na bango mobimba.+
16 Mpo ya solo, azali kosalisa baanzelu te, kasi azali nde kosalisa momboto ya Abrahama.+
17 Yango wana asengelaki kokóma lokola “bandeko” na ye na makambo nyonso,+ mpo akóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo na makambo ya Nzambe,+ mpo apesa mbeka ya kozipa+ masumu ya bato.+
18 Yango wana, lokola ye moko amonaki mpasi ntango azalaki komekama,+ akoki kosalisa baoyo bazali komekama.+
Maloba na nse
^ To, “mabele esika bato bafandi.”