Baebre 13:1-25

13  Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.+  Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya,+ mpo na nzela na yango bamosusu, bayambaki baanzelu, kasi bayebaki te.+  Bókanisaka baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ+ lokola nde bokangami elongo na bango,+ mpe baoyo bazali konyokwama,+ mpo bino moko mpe bozali naino na kati ya nzoto.  Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te,+ mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.+  Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te,+ bósepela+ na biloko oyo bozali na yango sikoyo.+ Mpo alobaki ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”+  Mpo tózala na mpiko mpenza+ mpe tóloba: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”+  Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino,+ oyo bayebisaki bino liloba ya Nzambe, mpe awa bozali kotala malamu mpenza mbuma malamu ya etamboli na bango bómekola+ kondima na bango.+  Yesu Kristo azali se ndenge moko lobi, lelo mpe libela na libela.+  Bómemama te na mateya ya ndenge na ndenge mpe ya bopaya;+ mpo malamu motema elendisama na boboto monene,+ kasi na biloko ya kolya te,+ oyo baoyo bazali komipesa na yango bazwi litomba te. 10  Tozali na etumbelo moko oyo baoyo bazali kosala mosala mosantu na hema bazali na lotomo ya kolya biloko na yango te.+ 11  Mpo bibembe ya banyama oyo nganga-nzambe monene azali komema makila na yango na esika mosantu mpo na masumu etumbamaka libándá ya kaa.+ 12  Yango wana Yesu mpe, mpo asantisa+ bato na makila na ye,+ amonaki mpasi na libándá ya porte.+ 13  Yango wana, tóbima epai na ye na libándá ya kaa, tómema nsɔni oyo ye amemaki,+ 14  mpo tozali na engumba moko te awa oyo ekoumela seko,+ kasi tozali nde koluka na mposa makasi engumba oyo ezali koya.+ 15  Na nzela na ye, tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli+ ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu+ na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.+ 16  Lisusu, bóbosana te kosala malamu+ mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.+ 17  Bótosaka baoyo bazali kokamba bino+ mpe bómikitisaka liboso na bango,+ mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ;+ mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino.+ 18  Bóbondelaka+ mpo na biso, mpo tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.+ 19  Kasi nazali mpenzampenza kolendisa bino bósalaka bongo, mpo nazongela bino nokinoki.+ 20  Sikoyo Nzambe ya kimya,+ oyo abimisaki uta na bakufi+ mobateli monene+ ya bampate+ na makila ya kondimana ya seko,+ Nkolo na biso Yesu, 21  apesa bino eloko nyonso ya malamu mpo na kosala mokano na ye, asala na kati na biso na nzela ya Yesu Kristo makambo ya malamu na miso na ye;+ azala na nkembo libela na libela.+ Amen. 22  Nzokande nazali kolendisa bino, bandeko, ete bókanga motema na liloba oyo ya elendiseli, mpo, ya solo, nakomeli bino mokanda ya maloba mingi te.+ 23  Bóyeba ete ndeko na biso Timote+ abimi na bolɔkɔ, soki ayei noki mpenza, nakoya elongo na ye kotala bino. 24  Bópesa mbote na baoyo nyonso bazali kokamba+ bino mpe na basantu nyonso. Baoyo bazali na Itali+ batindeli bino mbote. 25  Boboto monene+ ezala na bino nyonso.

Maloba na nse