Baebre 12:1-29

12  Yango wana, lokola tozali na lipata monene boye ya batatoli+ oyo ezingi biso, tólongola mpe kilo nyonso+ ná lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi,+ mpe tóyika mpiko+ ntango tozali kopota mbangu na momekano+ oyo etyami liboso na biso,+  awa tozali kotala na likebi mpenza Kapita+ mpe Mokokisi ya kondima na biso,+ Yesu. Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko,+ atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.+  Ɛɛ, bótya likebi mpenza epai ya moto oyo ayiki mpiko na maloba ya botɛmɛli+ motindo wana ya basumuki oyo bazali kotɛmɛla matomba na bango moko, mpo bósila makasi te mpe milimo na bino elɛmba te.+  Na etumba oyo bozali kobunda na lisumu yango, bobundi naino te tii na makila,+  kasi bobosani mpenza elendiseli oyo ezali kolobela bino lokola bana+ ete: “Mwana na ngai, kotyola disiplini ya Yehova te, mpe kolɛmba nzoto te ntango asemboli yo;+  mpo Yehova apesaka disiplini na moto oyo ye alingaka; ya solo, abɛtaka fimbo moto nyonso oyo ye azali kozwa lokola mwana.”+  Bozali koyika mpiko nde mpo na disiplini.+ Nzambe azali kosalela bino makambo lokola bana.+ Mpo mwana nini oyo tata apesaka disiplini te?+  Kasi soki bozangi disiplini oyo bato nyonso bazwaka, bozali mpenza bana ya makango,+ kasi bana ya ndako te.  Lisusu, batata na biso bazali bato lokola biso oyo bazalaki kopesa biso disiplini,+ mpe tozalaki komemya bango. Bongo Tata ya bomoi na biso ya elimo, tokomikitisa liboso na ye te koleka mpe tokozala na bomoi?+ 10  Mpo bango bazalaki kopesa biso disiplini mpo na mwa mikolo moke ndenge bango bazalaki komona malamu,+ kasi ye azali kosala bongo mpo na bolamu na biso mpo biso tózala basantu lokola ye.+ 11  Ya solo, disiplini moko te ezalaka likambo ya esengo na ntango oyo bapesi yango, kasi ezalaka nde mawa;+ nzokande na nsima, ebotelaka baoyo bateyami na yango mbuma ya kimya,+ elingi koloba, boyengebene.+ 12  Yango wana bólendisa mabɔkɔ oyo elɛmbilɛmbi+ mpe mabɔlɔngɔ oyo ezali na makasi te,+ 13  mpe bókoba kosembola banzela ya makolo na bino,+ mpo eteni oyo elɛmbi elongwa te na litonga, kasi ebika nde kobika.+ 14  Bólanda kozala na kimya na bato nyonso,+ mpe bólanda kosantisama+ oyo, soki ezali te, moto ata moko akomona Nkolo te,+ 15  bókeba mpenza mpo moto moko azanga boboto monene ya Nzambe te;+ mpo mosisa moko te ya ngɛngɛ+ ebota mpe ekɔtisa mobulu mpe ekómisa bato mingi mbindo te;+ 16  mpo moto ya pite azala te to moto oyo amemyaka makambo mosantu te, lokola Esau,+ oyo akabaki lotomo na ye ya mwana ya liboso mpo na mwa elubu moko kaka.+ 17  Mpo boyebi ete na nsima lisusu, ntango alingaki azwa libula ya lipamboli+ baboyaki ye,+ mpo, atako alukaki na mpisoli mpenza kobongola makanisi ya tata na ye,+ alongaki te.+ 18  Mpo bopusani te penepene na eloko oyo bokoki kosimba+ mpe oyo epeli mɔtɔ,+ mpe oyo ezali na lipata ya molili mpe na molili tuu mpe na mopɛpɛ makasi,+ 19  mpe oyo ezali na koyulama ya kelelo+ mpe na mongongo ya maloba;+ ntango bato bayokaki mongongo yango, babondelaki ete bábakisela bango liloba mosusu te.+ 20  Mpo etinda oyo ezalaki mpasi mpo na bango: “Mpe soki nyama moko etuti ngomba oyo, esengeli kobamba nyama yango mabanga.”+ 21  Lisusu, emonaneli yango ezalaki nsɔmɔ mpenza yango wana Moize alobaki ete: “Nazali kobanga mpe kolɛnga.”+ 22  Kasi bopusani nde penepene na Ngomba Siona+ mpe na engumba+ ya Nzambe ya bomoi, Yerusaleme ya likoló,+ mpe na bamiriade ya baanzelu,+ 23  na liyangani monene,+ mpe na lisangá ya bana ya liboso+ oyo bakomamá nkombo+ na likoló, mpe na Nzambe Mosambisi ya bato nyonso,+ mpe na bomoi ya elimo+ ya bayengebene oyo bakómi bato ya kokoka,+ 24  mpe na Yesu moyokanisi+ ya kondimana ya sika,+ mpe na makila ya komwangisa,+ oyo ezali koloba malamu koleka makila ya Abele.+ 25  Bókeba ete bóboya te koyoka moto oyo azali koloba.+ Mpo soki babikaki te mpo baboyaki koyoka moto oyo azalaki kopesa likebisi ya Nzambe na mabele,+ biso mpe tokobika ata moke te soki topesi mokɔngɔ na moto oyo azali koloba uta na likoló.+ 26  Na ntango yango mongongo na ye eningisaki mabele makasi,+ kasi sikoyo apesi elaka, alobi: “Etikali mbala moko lisusu oyo nakoningisa kaka mabele te kasi mpe likoló.”+ 27  Nzokande maloba oyo ete “Etikali mbala moko lisusu” ezali kolakisa kolongolama ya biloko oyo ezali koningana makasi lokola biloko oyo esalemá,+ mpo biloko oyo ezali koningana te etikala.+ 28  Yango wana, lokola tosengeli kozwa bokonzi moko oyo ekoki koningana te,+ tókoba kozwa boboto monene, oyo na nzela na yango tokoki kosalela Nzambe mosala mosantu na ndenge endimami ná kobanga Nzambe ná nsɔmɔ.+ 29  Mpo Nzambe na biso azali mpe mɔtɔ oyo ezikisaka.+

Maloba na nse