Baebre 11:1-40
11 Kondima+ ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya+ kozwa, ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.+
2 Mpo na nzela na yango nde litatoli epesamaki mpo na bato ya ntango ya kala.+
3 Na kondima tozali kososola ete na liloba ya Nzambe+ biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́*+ ebongisamaki, yango wana oyo ezali komonana euti na biloko oyo ezali komonana te.+
4 Na kondima Abele apesaki Nzambe mbeka ya motuya monene koleka oyo ya Kaina,+ na nzela na kondima yango litatoli epesamaki ete azali moyengebene, Nzambe apesaki litatoli+ mpo na makabo na ye; mpe na kondima na ye, atako akufá, azali naino koloba.+
5 Na kondima Enoka+ amemamaki esika mosusu mpo amona liwa te, mpe amonanaki ata esika moko te mpo Nzambe amemaki ye esika mosusu;+ mpo liboso amemama esika mosusu, azwaki litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe.+
6 Lisusu, soki moto azali na kondima te+ akoki kosepelisa ye ata moke te,+ mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali+ mpe akómaka moto oyo apesaka mbano+ na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.+
7 Na kondima Noa,+ nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe mpo na makambo oyo emonanaki naino te,+ abangaki Nzambe mpe atongaki masuwa+ mpo na kobikisa bato ya ndako na ye; mpe na kondima wana, akweisaki mokili na likambo,+ mpe akómaki mozwi-ya-libula ya boyengebene+ oyo euti na kondima.
8 Na kondima Abrahama,+ ntango abengamaki, atosaki na ndenge akendaki na esika oyo asengelaki kozwa yango libula; mpe akendaki, atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende.+
9 Na kondima afandaki mopaya na mokili ya elaka lokola nde na mokili ya bopaya,+ mpe afandaki na bahema+ elongo na Yisaka+ ná Yakobo,+ bazwi-ya-libula ya elaka moko wana elongo na ye.+
10 Mpo azalaki kozela engumba+ oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.+
11 Na kondima mpe Sara+ azwaki nguya ya kokumba zemi ya momboto, atako alekaki mbula ya kobota,+ mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.+
12 Yango wana mpe na moto kaka moko+—mpe oyo tokoki koloba ete azalaki mokufi+—bana babotamaki ebele lokola minzoto ya likoló mpe lokola zɛlo oyo ezalaka pembeni ya mbu, bakokaki kotángama te.+
13 Bango nyonso bakufaki na kati ya kondima,+ atako bazwaki te biloko oyo elakamaki,+ kasi bamonaki yango na mosika+ mpe basepelaki na yango mpe basakolaki polele ete bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.+
14 Mpo baoyo bazali koloba makambo wana bazali komonisa polele ete bazali koluka mpenza esika na bango moko.+
15 Nzokande, soki bazalaki mpenza kaka kokanisa esika oyo bautaki,+ mbɛlɛ bakokaki kozonga.+
16 Kasi sikoyo bazali na mposa ya esika moko oyo eleki malamu, elingi koloba, ya likoló.+ Yango wana Nzambe azali koyokela bango nsɔni te, ete abengama Nzambe na bango,+ mpo abongiseli bango engumba.+
17 Na kondima Abrahama, ntango amekamaki,+ tokoki koloba ete akabaki Yisaka mbeka, mpe moto wana oyo azwaki bilaka na esengo alingaki kokaba mbeka mwana na ye se moko oyo abotamaki,+
18 atako elobamaki epai na ye ete: “Oyo ekobengama ‘momboto na yo’ ekoya na nzela ya Yisaka.”+
19 Kasi atalelaki Nzambe ete akokaki kolamwisa ye ata uta na bakufi;+ mpe uta na liwa azwaki ye lisusu na ndenge ya elilingi.+
20 Na kondima mpe Yisaka apambolaki Yakobo+ ná Esau+ mpo na makambo oyo esengelaki koya.
21 Na kondima Yakobo, ntango akómaki pene na liwa,+ apambolaki mwana mokomoko ya Yozefe+ mpe asambelaki wana agumbami na nsɔngɛ ya lingenda na ye.+
22 Na kondima Yozefe, ntango akómaki na nsuka ya bomoi na ye, alobelaki kobima+ ya bana ya Yisraele; mpe apesaki etinda mpo na mikuwa na ye.+
23 Na kondima baboti ya Moize babombaki ye sanza misato nsima ya kobotama na ye,+ mpo bamonaki ete mwana yango azalaki kitoko+ mpe babangaki etinda+ ya mokonzi te.
24 Na kondima Moize, ntango akolaki,+ aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao,+
25 aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu,
26 mpo atalelaki nsɔni+ ya Kristo lokola bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito; mpo azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.+
27 Na kondima alongwaki na Ezipito,+ kasi abangaki nkanda ya mokonzi te,+ mpo atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.+
28 Na kondima asalaki elekeli+ mpe apakolaki makila na makonzí ya porte,+ mpo mobomi asimba bana na bango ya liboso te.+
29 Na kondima bakatisaki Mbu Motane lokola nde na mabele oyo ekauki,+ kasi Baezipito bamɛlamaki ntango bamekaki kokatisa yango.+
30 Na kondima bifelo ya Yeriko ekweaki nsima ya kozingama mikolo nsambo.+
31 Na kondima Rahaba+ mwasi ya ndumba akufaki te elongo na baoyo bazangaki botosi, mpo ayambaki banɔngi na kimya.+
32 Mpe nakoloba lisusu nini? Mpo ntango ekozanga ngai soki nalobeli lisusu Gideone,+ Barake,+ Samsone,+ Yefeta,+ Davidi+ mpe Samwele+ ná basakoli mosusu,+
33 oyo na nzela ya kondima balongaki makonzi na bitumba,+ basalaki boyengebene,+ bazwaki bilaka,+ bakangaki minɔkɔ ya bankɔsi,+
34 basilisaki makasi ya mɔtɔ,+ bakimaki mino ya mopanga,+ bazalaki na bolɛmbu kasi bakómaki na nguya,+ bakómaki bilombe na etumba,+ bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.+
35 Basi bazwaki bakufi na bango na lisekwa;+ kasi bato mosusu banyokwamaki makasi mpo bandimaki te kosikolama na nzela ya lisiko moko boye, mpo bázwa lisekwa moko oyo eleki malamu.
36 Ɛɛ, bamosusu bazwaki oyo ya bango komekama na ndenge basɛkaki bango mpe babɛtaki bango fimbo, kutu koleka oyo wana, bakangamaki na minyɔlɔlɔ+ mpe na bolɔkɔ.+
37 Babambaki bango mabanga,+ bamekamaki,+ bakatamaki biteni mibale na sii, babomamaki+ na mopanga, bazalaki koyengayenga balati mposo ya bampate,+ mposo ya bantaba, bazalaki kokelela,+ kozwa bolɔzi,+ konyokwama;+
38 mpe mokili ebongaki na bango te. Bazalaki kotelengana na bisobe mpe na bangomba mpe na mibenga+ mpe na mabulu ya mabele.
39 Nzokande bango nyonso, atako litatoli epesamaki mpo na bango mpo na kondima na bango, bazwaki te eloko oyo elakamaki,+
40 mpo Nzambe azalaki komonela biso+ na mosika eloko moko ya malamu koleka,+ mpo bango+ bákóma bato ya kokoka te+ soki biso te.+
Maloba na nse
^ To, “ndenge makambo ebongisamá na molɔ́ngɔ́,” na Grɛki, aionas.