Amose 5:1-27
5 “Bóyoka liloba oyo nazali kobimisela bino lokola loyembo ya mawa,+ Ee ndako ya Yisraele:
2 “Ngɔndɔ,+ Yisraele, akwei;+Ye akoki kotɛlɛma lisusu te.+
Basundoli ye na mabele na ye moko;Moto ya kotɛlɛmisa ye azali te.+
3 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Engumba oyo mpenza ezalaki kobima na nkóto moko (1 000) ekotikala na nkama moko (100); mpe oyo ezalaki kobima na nkama moko ekotikala na zomi, mpo na ndako ya Yisraele.’+
4 “Mpo talá oyo Yehova alobi na ndako ya Yisraele, ‘Bóluka ngai,+ mpe bótikala na bomoi.+
5 Mpe bóluka Betele+ te, mpe na Gilgale+ bosengeli koya te, mpe na Beere-sheba bosengeli koleka te;+ mpamba te Gilgale yango moko ekomemama mpenza na mboka mopaya;+ mpe Betele, ekokóma eloko moko ya kokamwisa.+
6 Bóluka Yehova, mpe bótikala na bomoi,+ mpo ye asala te lokola mɔtɔ,+ Ee ndako ya Yozefe,+ mpe mpo yango ezikisa te, wana moto azali te na Betele mpo na koboma mɔtɔ+ yango,
7 Ee bino baoyo bozali kobalola bosembo ekóma mbondo,+ mpe bino bato oyo bobwaká boyengebene na mabele.+
8 Mosali ya minzoto ya Kima+ mpe ya minzoto+ ya Kesile,+ mpe Ye oyo abongolaka elili makasi+ ekóma ntɔngɔ mpenza, Ye oyo asalaki ete moi ekóma molili mpenza lokola butu,+ Ye oyo abengaka mai ya mbu mpo asopa yango na etando ya mabele+—Yehova nde nkombo na ye;+
9 ye oyo azali koyeisela moto ya makasi libebi na pwasa lokola mokalikali, mpo ete libebi ekwela ata esika oyo ebatelami makasi.
10 “‘Na porte, bayiná moto oyo apamelaka,+ mpe bayiná makasi moto oyo alobaka makambo na bosolo.+
11 Na yango, lokola bozali kofutisa mbongo ya bilanga na moto oyo azangá, mpe bozali se kozwa epai na ye mpako ya mbuma;+ botongá bandako ya mabanga oyo ekatami malamu,+ kasi bokokoba kofanda na yango te; mpe boloná banzete kitoko ya vinyo, kasi bokokoba komɛla vinyo na yango te.+
12 Mpo nayebi ete botomboki na bino ezali mingi+ mpe masumu na bino ezali na nguya,+ Ee bino baoyo bozali banguna ya moyengebene,+ bino baoyo bozali kozwa mbongo ya kokangisa bino monɔkɔ,+ mpe bato oyo bazali koboya babola+ ata na porte.+
13 Yango wana moto oyo azali na mayele ya kososola akofanda nyɛɛ na ntango yango, mpo ekozala ntango moko ya mpasi.+
14 “‘Bóluka oyo ezali malamu, kasi oyo ezali mabe te,+ mpo bótikala na bomoi;+ mpe bongo Yehova Nzambe ya mampinga akozala elongo na bino, kaka ndenge bolobi.+
15 Bóyina oyo ezali mabe, mpe bólinga oyo ezali malamu,+ mpe bósala ete bosembo ezala na porte.+ Mbala mosusu Yehova Nzambe ya mampinga akomonisa boboto+ epai ya bato ya Yozefe oyo batikali.’+
16 “Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya mampinga, Yehova, alobi: ‘Koganga ekozala na bisika minene nyonso ya bato nyonso,+ mpe na babalabala nyonso bato bakoloba ete: “Aa! Aa!” Mpe ekosengela na bango bábenga moloni-bilanga mpo na kolela,+ mpe baoyo bayebi kolela mpo na koganga.’+
17 ‘Mpe kati na bilanga nyonso ya vinyo koganga ekozala;+ mpo nakoleka katikati na yo,’+ Yehova alobi bongo.
18 “‘Mawa na baoyo bazali na mposa ya mokolo ya Yehova!+ Boye, mokolo ya Yehova ekolimbola nini epai na bino?+ Ekozala molili, kasi pole te,+
19 ekozala lokola ntango moto azali kokima nkɔsi, mpe urse ekutani na ye; mpe lokola ntango akɔti na ndako mpe atye lobɔkɔ na ye na efelo, mpe nyoka eswi ye.+
20 Mokolo ya Yehova ekozala molili, kasi pole te; mpe ekozala na molili tuu, kasi na kongɛnga te, boye te?+
21 Nayiná, naboyá bafɛti na bino,+ mpe nakosepela te na nsolo ya mayangani na bino ya minene.+
22 Ata soki bopesi ngai bambeka mibimba ya kotumba,+ ɛɛ, ezala makabo na bino nakosepela na yango te,+ mpe nakotala te bambeka na bino ya boyokani ya bana ya nyama ya mafutamafuta.+
23 Longolá liboso na ngai makɛlɛlɛ ya nzembo na yo mpe nakoyoka te lokito kitoko ya bibɛtɛlo na yo ya bansinga.+
24 Mpe bosembo etíyola lokola mai,+ mpe boyengebene lokola mokɛli oyo ezali kotíyola ntango nyonso.+
25 Bomemelaki nde ngai bambeka mpe makabo na esobe na boumeli ya mbula ntuku minei (40), Ee ndako ya Yisraele?+
26 Mpe bokomema Sakute mokonzi na bino+ mpe Kaiwane, bikeko na bino, monzoto ya nzambe na bino, oyo bomisalelaki.+
27 Mpe nakotinda bino na mboka mopaya koleka Damasi,’+ ye oyo nkombo na ye ezali Yehova Nzambe ya mampinga alobi bongo.”+