Mitángo 9:1-23
9 Mpe Yehova alobaki na Moize na esobe ya Sinai na mbula ya mibale ya kobima na bango na mokili ya Ezipito, na sanza ya liboso,+ ete:
2 “Sikoyo bana ya Yisraele basengeli kobongisa mbeka ya elekeli+ na ntango na yango oyo etyamá.+
3 Na mokolo ya zomi na minei ya sanza oyo, na mpokwa, liboso molili ekɔta,*+ bosengeli kobongisa yango na ntango na yango oyo etyamá. Bosengeli kobongisa yango na kolanda mibeko na yango nyonso mpe ndenge nyonso oyo basalaka yango.”+
4 Bongo Moize alobaki na bana ya Yisraele ete bábongisa mbeka ya elekeli.
5 Bongo babongisaki mbeka ya elekeli na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango, na mpokwa, liboso molili ekɔta,* na esobe ya Sinai. Na kolandáká mitindo nyonso oyo Yehova apesaki Moize, bana ya Yisraele basalaki kaka bongo.+
6 Sikoyo ezalaki na bato oyo bakómaki mbindo na molimo+ ya moto, yango wana bakokaki te kobongisa mbeka ya elekeli na mokolo yango. Na yango, bayaki liboso ya Moize ná Arona na mokolo yango.+
7 Na nsima, bato yango balobaki na ye ete: “Tokómi mbindo na molimo ya moto. Mpo na nini tópekisama kopesa Yehova likabo+ na ntango na yango oyo etyamá na kati ya bana ya Yisraele?”
8 Na yango, Moize alobaki na bango ete: “Bótɛlɛma wana, mpe bótika ngai nayoka mitindo oyo Yehova akopesa mpo na bino.”+
9 Bongo Yehova alobaki na Moize ete:
10 “Lobá na bana ya Yisraele boye: ‘Soki moto moko na kati na bino to na kati ya mabota na bino oyo ekoya akómi mbindo na molimo+ moko to azali na mobembo mosika, ye mpe asengeli kobongisa mbeka ya elekeli mpo na Yehova.
11 Na sanza ya mibale,+ na mokolo ya zomi na minei, na mpokwa, liboso molili ekɔta,* bakobongisa yango. Bakolya yango elongo na mampa oyo ezangi levire mpe na ndunda ya bololo.+
12 Basengeli kotika ndambo na yango te tii na ntɔngɔ,+ mpe bakobuka mokuwa na yango ata moko te.+ Bakobongisa yango na kolanda mobeko mobimba ya elekeli.+
13 Kasi soki moto azalaki pɛto to azalaki na mobembo te mpe amonisaki bopɔtu mpo na kobongisa mbeka ya elekeli, molimo yango asengeli kolongolama na kati ya bato na ye,+ mpo apesaki likabo ya Yehova te na ntango na yango oyo etyamá. Moto yango akozongisa monɔkɔ mpo na lisumu na ye.+
14 “‘Mpe soki mopaya afandi mopaya elongo na bino, ye mpe asengeli kobongisa mbeka ya elekeli mpo na Yehova.+ Na kolanda mobeko ya elekeli mpe na kolanda ndenge oyo basalaka yango, ndenge wana nde akosala.+ Mobeko ekozala kaka moko mpo na bino, mpo na moto oyo afandi mopaya mpe mpo na mwana-mboka ya mokili yango.’”+
15 Sikoyo na mokolo oyo tabernakle+ etɛlɛmisamaki, lipata ezipaki tabernakle ya hema ya Litatoli,+ kasi na mpokwa, eloko oyo emonanaki lokola mɔtɔ+ ezalaki kaka likoló ya tabernakle tii na ntɔngɔ.
16 Ntango nyonso ezalaki kosalema ndenge wana: Lipata ezalaki kozipa yango na moi, mpe ezalaki komonana lokola mɔtɔ na butu.+
17 Mpe ntango nyonso oyo lipata ezalaki komata, elongwe likoló ya hema, na mbala moko bana ya Yisraele bazalaki kolongwa mpe kolanda na nsima,+ mpe na esika oyo lipata ezalaki kokende kofanda, esika wana nde bana ya Yisraele bazalaki kotya kaa.+
18 Na etinda ya Yehova, bana ya Yisraele bazalaki kolongwa, mpe na etinda ya Yehova, bazalaki kotya kaa.+ Mikolo nyonso oyo lipata ezalaki kofanda likoló ya tabernakle, bazalaki kotikala kaka na kaa.
19 Mpe ntango lipata ezalaki koumela mikolo mingi likoló ya tabernakle, bana ya Yisraele mpe bazalaki kokokisa mokumba na bango epai ya Yehova, bazalaki kolongwa te.+
20 Mpe ntango mosusu, lipata ezalaki koumela kaka mikolo moke likoló ya tabernakle. Na etinda+ ya Yehova, bazalaki kotikala na kaa, mpe na etinda ya Yehova, bazalaki kolongwa.
21 Mpe ntango mosusu, lipata+ ezalaki kotikala banda na mpokwa tii na ntɔngɔ; mpe lipata ezalaki komata na ntɔngɔ, mpe bango bazalaki kolongwa. Ezala na moi to na butu, soki lipata emati, bango mpe bazalaki kolongwa.+
22 Ezala lipata eumeli likoló ya tabernakle, efandi likoló na yango mikolo mibale to sanza moko to mikolo mingi koleka, bana ya Yisraele bazalaki kotikala kaka na kaa mpe bazalaki kolongwa te, kasi ntango emati, bazalaki kolongwa.+
23 Na etinda ya Yehova, bazalaki kotya kaa, mpe na etinda ya Yehova, bazalaki kolongwa. Bazalaki kokokisa mokumba+ na bango epai ya Yehova na kolanda etinda oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize.+