Mitángo 7:1-89
7 Sikoyo esalemaki boye: na mokolo oyo Moize asilisaki kotɛlɛmisa tabernakle,+ abandaki kotya yango mafuta+ mpe kosantisa yango ná biloko na yango nyonso ná etumbelo mpe bisaleli na yango nyonso. Bongo atyaki yango mafuta mpe asantisaki yango.+
2 Na nsima, bankumu ya Yisraele,+ bankumu ya ndako ya batata na bango, bapesaki likabo,+ bango bazalaki bankumu ya mabota mpe bazalaki kokamba bato oyo bakomisamaki nkombo,
3 mpe bamemaki likabo na bango liboso ya Yehova: bapusu motoba oyo ezipami mpe bangɔmbɛ zomi na mibale, pusu moko mpo na bankumu mibale mpe ngɔmbɛ moko mpo na mokomoko; mpe bapesaki yango liboso ya tabernakle.
4 Na yango, Yehova alobaki na Moize ete:
5 “Ndimá kozwa yango na mabɔkɔ na bango, mpamba te esengeli kosalisa mpo na kosala mosala ya hema ya kokutana, mpe osengeli kopesa yango Balevi, moto na moto na kotalela mosala na ye mpenza.”
6 Bongo Moize andimaki kozwa bapusu yango ná bangɔmbɛ mpe apesaki yango Balevi.
7 Apesaki bana mibali ya Gereshone bapusu mibale mpe ngɔmbɛ minei na kotalela mosala na bango,+
8 mpe apesaki bana mibali ya Merari bapusu minei mpe ngɔmbɛ mwambe na kotalela mosala na bango,+ na litambwisi ya Itamare mwana ya Arona nganga-nzambe.+
9 Kasi apesaki bana mibali ya Kohate eloko te, mpo mosala ya esika mosantu ezalaki mokumba na bango.+ Bango bazalaki komema na mapeka.+
10 Sikoyo bankumu bapesaki likabo na bango na ntango ya bofungoli+ etumbelo na mokolo oyo yango etyamaki mafuta, mpe bankumu babandaki kopesa likabo na bango liboso ya etumbelo.
11 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Nkumu moko na mokolo moko mpe nkumu mosusu na mokolo mosusu, ndenge wana nde bakopesa likabo na bango mpo na bofungoli etumbelo.”+
12 Sikoyo moto oyo apesaki likabo na ye na mokolo ya liboso ezalaki Nahashone+ mwana ya Aminadabe na libota ya Yuda.
13 Mpe likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
14 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;+
15 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
16 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
17 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Nahashone mwana ya Aminadabe.+
18 Na mokolo ya mibale, Netanele+ mwana ya Zuare, nkumu ya Isakare, apesaki likabo.
19 Apesaki likabo na ye: saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
20 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;
21 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
22 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
23 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Netanele mwana ya Zuare.
24 Na mokolo ya misato ezalaki nkumu ya bana mibali ya Zebulone, Eliabe+ mwana ya Helone.
25 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;
26 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;
27 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
28 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
29 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Eliabe mwana ya Helone.+
30 Na mokolo ya minei ezalaki nkumu ya bana mibali ya Rubene, Elizure+ mwana ya Shedeure.
31 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
32 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;
33 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
34 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
35 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Elizure mwana ya Shedeure.+
36 Na mokolo ya mitano ezalaki nkumu ya bana mibali ya Simeone, Shelumiele+ mwana ya Zurishadai.
37 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
38 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;
39 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
40 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
41 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Shelumiele mwana ya Zurishadai.+
42 Na mokolo ya motoba ezalaki nkumu ya bana mibali ya Gade, Eliasafe+ mwana ya Duele.
43 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
44 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;+
45 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
46 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
47 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Eliasafe mwana ya Duele.+
48 Na mokolo ya nsambo ezalaki nkumu ya bana mibali ya Efraime, Elishama+ mwana ya Amihude.
49 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
50 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;
51 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
52 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
53 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Elishama mwana ya Amihude.+
54 Na mokolo ya mwambe ezalaki nkumu ya bana mibali ya Manase, Gamaliele+ mwana ya Pedazure.
55 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
56 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;+
57 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
58 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
59 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Gamaliele mwana ya Pedazure.+
60 Na mokolo ya libwa ezalaki nkumu+ ya bana mibali ya Benyamina, Abidane+ mwana ya Gideoni.
61 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
62 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;
63 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
64 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
65 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Abidane mwana ya Gideoni.+
66 Na mokolo ya zomi ezalaki nkumu ya bana mibali ya Dani, Ahiezere+ mwana ya Amishadai.
67 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
68 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;
69 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
70 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
71 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Ahiezere mwana ya Amishadai.+
72 Na mokolo ya zomi na moko ezalaki nkumu ya bana mibali ya Ashere, Pagiele+ mwana ya Okrane.
73 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
74 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;+
75 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
76 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
77 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Pagiele mwana ya Okrane.+
78 Na mokolo ya zomi na mibale ezalaki nkumu ya bana mibali ya Nafatali, Ahira+ mwana ya Enane.
79 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele nkama moko na ntuku misato (130), kibakuli moko ya palata ya shekele ntuku nsambo (70), na kolanda shekele ya esika mosantu, nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo emwangisami mafuta mpo na likabo ya mbuma;+
80 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele zomi, etondi na mpaka ya malasi;+
81 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+
82 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+
83 mpe mpo na mbeka ya boyokani:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Ahira mwana ya Enane.+
84 Wana ezalaki likabo+ ya bofungoli etumbelo, na mokolo oyo yango etyamaki mafuta, likabo oyo bankumu+ ya Yisraele bapesaki: basaani zomi na mibale ya palata, mabakuli+ zomi na mibale ya palata, bakɔpɔ zomi na mibale ya wolo;
85 shekele nkama moko na ntuku misato (130) mpo na saani mokomoko ya palata, mpe ntuku nsambo (70) mpo na kibakuli mokomoko, palata nyonso ya bambɛki ezalaki shekele nkóto mibale na nkama minei (2 400), na kolanda shekele ya esika mosantu;+
86 kɔpɔ+ zomi na mibale ya wolo oyo etondi na mpaka ya malasi, kɔpɔ mokomoko ezalaki na shekele zomi, na kolanda shekele ya esika mosantu, wolo nyonso ya bakɔpɔ ezalaki shekele nkama moko na ntuku mibale (120);
87 bibwɛlɛ nyonso mpo na likabo ya kotumba+ ezalaki ngɔmbɛ-mibali zomi na mibale, mpate-mibali zomi na mibale, bana-mpate zomi na mibale ya mibali, mokomoko ezalaki na mbula moko, ná makabo na yango ya mbuma,+ mpe bana-ntaba zomi na mibale mpo na likabo mpo na lisumu;+
88 mpe bibwɛlɛ nyonso ya mbeka ya boyokani+ ezalaki ngɔmbɛ-mibali ntuku mibale na minei (24), mpate-mibali ntuku motoba (60), ntaba-mibali ntuku motoba, bana-mpate ntuku motoba ya mibali, mokomoko ezalaki na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya bofungoli+ etumbelo nsima ya kotya yango mafuta.+
89 Sikoyo ntango nyonso oyo Moize azalaki kokɔta na hema ya kokutana mpo na kosolola na ye,+ azalaki koyoka mongongo ezali kosolola na ye longwa na likoló ya ezipeli+ oyo ezalaki likoló ya sanduku ya litatoli, longwa na katikati ya bakeruba+ mibale; mpe azalaki koloba na ye.