Mitángo 6:1-27

6  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:  “Lobá na bana ya Yisraele mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Soki mobali moko to mwasi moko asali elako moko monene mpo na kozala Monaziri+ mpo na Yehova,  ye akoboya vinyo mpe masanga oyo elangwisaka. Akomɛla vinɛgrɛ ya vinyo te to ya masanga oyo elangwisaka,+ mpe akomɛla mai oyo esalemi na mbuma ya vinyo te mpe akolya mbuma ya vinyo te, ezala ya mobesu to ya kokauka.  Mikolo nyonso ya Bonaziri na ye, akolya eloko moko te oyo basali na nzete ya vinyo, ezala mbuma ya vinyo oyo eteli te, ezala mpe mposo.  “‘Mikolo nyonso ya elako ya Bonaziri na ye, razware ekoleka na motó na ye te;+ kino mikolo oyo asengeli kotyama pembeni mpo na Yehova ekokoka, akozala mosantu na kotikáká nsuki ya motó na ye oyo elíngamalíngamá+ ekola.  Mikolo nyonso oyo akotyama pembeni mpo na Yehova, akobɛlɛma te na molimo nyonso oyo akufi.+  Ezala ata tata na ye to mama na ye to ndeko na ye ya mobali to ndeko na ye ya mwasi, akomikómisa mbindo te ntango bango bakufi,+ mpamba te na motó na ye, azali na elembo ya Bonaziri na ye mpo na Nzambe na ye.  “‘Mikolo nyonso ya Bonaziri na ye, azali mosantu mpo na Yehova.  Kasi soki moto akufi na mbalakaka pene na ye,+ mpe akómisi motó ya Bonaziri na ye mbindo, asengeli kokokola+ motó na ye na mokolo ya kondimisa kopɛtolama na ye. Na mokolo ya nsambo, akokokola yango. 10  Mpe na mokolo ya mwambe, akomema bipopo mibale to bana mibale ya bibenga epai ya nganga-nzambe na monɔkɔ ya hema ya kokutana.+ 11  Mpe nganga-nzambe asengeli kosalela moko lokola likabo mpo na lisumu+ mpe mosusu lokola likabo ya kotumba+ mpe kozipa masumu na ye, mpo asali lisumu mpo na molimo oyo akufi. Na nsima asengeli kosantisa motó na ye na mokolo yango. 12  Mpe asengeli kozala Monaziri+ mpo na Yehova na boumeli ya mikolo ya Bonaziri na ye, mpe asengeli komema mwana-mpate ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo ezala likabo ya ngambo;+ mpe mikolo ya liboso ekotángama te mpo akómisaki Bonaziri na ye mbindo. 13  “‘Sikoyo talá mobeko oyo etali Monaziri: na mokolo oyo mikolo ya Bonaziri na ye ekokoka,+ akomemama na monɔkɔ ya hema ya kokutana. 14  Mpe asengeli kopesa Yehova likabo na ye: mwana-mpate moko ya mobali oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo ezala likabo ya kotumba+ mpe mwana-mpate moko ya mwasi oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo ezala likabo mpo na lisumu+ mpe mpate moko ya mobali oyo ezangi mbeba, mpo ezala mbeka ya boyokani,+ 15  ná kitunga ya bagato ya farini ya malamu oyo ezangi levire, oyo basali lokola lopɛtɛ,+ oyo emwangisami mafuta,+ mpe bagalɛti oyo ezangi levire, oyo epakolami mafuta,+ ná likabo na yango ya mbuma+ mpe makabo na yango ya masanga.+ 16  Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa yango liboso ya Yehova mpe kopesa likabo na ye mpo na lisumu ná likabo na ye ya kotumba.+ 17  Mpe akopesa Yehova mpate-mobali mpo ezala mbeka ya boyokani,+ nzela moko na kitunga ya bagato oyo ezangi levire; mpe nganga-nzambe asengeli kopesa likabo na yango ya mbuma+ ná likabo na yango ya masanga. 18  “‘Mpe Monaziri asengeli kokokola+ motó ya Bonaziri na ye na monɔkɔ ya hema ya kokutana, mpe asengeli kozwa nsuki ya motó ya Bonaziri na ye mpe kotya yango na mɔtɔ oyo ezali na nse ya mbeka ya boyokani. 19  Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa lipeka ya mpate-mobali oyo elambami+ mpe kozwa na kitunga gato moko oyo ezangi levire, oyo basali lokola lopɛtɛ, mpe galɛti+ moko oyo ezangi levire, mpe kotya yango na mabɔkɔ ya Monaziri nsima ya kokokola elembo ya Bonaziri na ye. 20  Mpe nganga-nzambe asengeli koningisa yango epai na epai lokola likabo ya koningisa liboso ya Yehova.+ Ezali eloko moko mosantu mpo na nganga-nzambe, elongo na ntolo+ ya likabo ya koningisa ná lokolo ya likabo.+ Mpe nsima na yango, Monaziri akoki komɛla vinyo.+ 21  “‘Wana ezali mobeko etali Monaziri+ oyo azali kosala elako, mobeko etali likabo oyo azali kopesa Yehova mpo na Bonaziri na ye, longola oyo akoki kopesa na kotalela makoki na ye. Engebene elako na ye oyo akosala, akosala kaka bongo mpo na mobeko ya Bonaziri na ye.’” 22  Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 23  “Lobá na Arona mpe na bana na ye ya mibali boye: ‘Talá ndenge bokopambola+ bana ya Yisraele, bokoloba na bango ete: 24  “Yehova apambola yo+ mpe abatela yo.+ 25  Yehova angɛngisa elongi na ye epai na yo,+ mpe tiká ye andima yo.+ 26  Yehova atombola elongi na ye epai na yo+ mpe apesa yo kimya.”’+ 27  Mpe basengeli kotángela bana ya Yisraele nkombo+ na ngai, mpo napambola bango.”+

Maloba na nse