Mitángo 4:1-49
4 Sikoyo Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete:
2 “Motángo mobimba ya bana mibali ya Kohate+ kati na bana mibali ya Levi ekozwama, engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango,
3 banda na mbula ntuku misato (30)+ kino mbula ntuku mitano (50),+ baoyo nyonso bazali kokɔta na etuluku ya mosala+ mpo na kosala mosala na hema ya kokutana.
4 “Talá mosala ya bana mibali ya Kohate na hema ya kokutana.+ Ezali eloko oyo eleki bosantu:
5 Mpe Arona ná bana na ye ya mibali basengeli kokɔta ntango kaa ezali kolongwa, mpe basengeli kokitisa rido oyo ezipaka+ mpe basengeli kozipa na yango sanduku+ ya litatoli.
6 Mpe basengeli kotya ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ+ likoló na yango mpe kotanda elamba mobimba ya bulé na likoló mpe kotya banzete ya komema yango.+
7 “Mpe bakotanda elamba ya bulé likoló ya mesa+ ya mampa ya kolakisa, mpe basengeli kotya likoló na yango basaani,+ bakɔpɔ, mabakuli+ ná bilokó ya likabo ya masanga; mpe mampa ya ntango nyonso+ ekokoba kozala likoló na yango.
8 Mpe basengeli kotanda elamba oyo epakolami langi ya motane makasi+ likoló na yango, mpe basengeli kozipa yango na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ+ mpe kotya banzete ya komema yango.+
9 Mpe basengeli kozwa elamba ya bulé mpe kozipa etɛlɛmiselo ya miinda+ ya engɛngiseli ná miinda+ na yango ná bapɛnsi na yango ya mike+ ná biloko na yango ya kotya mɔtɔ+ mpe bambɛki+ na yango nyonso mpo na mafuta oyo basalelaka ntango nyonso mpo na etɛlɛmiselo ya miinda.
10 Mpe basengeli kotya yango ná bisaleli na yango nyonso na kati ya ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ+ mpe kotya yango likoló ya nzete ya komema.
11 Mpe likoló ya etumbelo+ ya wolo bakotanda elamba ya bulé, mpe basengeli kozipa yango na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ+ mpe kotya banzete ya komema yango.+
12 Mpe basengeli kozwa bisaleli+ nyonso ya mosala oyo basalaka na yango mosala ntango nyonso na esika mosantu, mpe basengeli kotya yango na elamba ya bulé mpe kozipa yango na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ+ mpe kotya yango likoló ya nzete ya komema.
13 “Mpe basengeli kolongola putulu ya mɔtɔ oyo etondi na mafuta na etumbelo+ mpe kotanda elamba ya lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé likoló na yango.
14 Mpe basengeli kotya likoló na yango bisaleli na yango nyonso oyo basalaka na yango mosala ntango nyonso na esika yango, biloko ya kotya mɔtɔ, nkanya ná bapau mpe mabakuli, bisaleli nyonso ya etumbelo;+ mpe basengeli kotanda likoló na yango ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ mpe kotya banzete ya komema yango.+
15 “Mpe Arona ná bana na ye ya mibali basengeli kosilisa kozipa esika mosantu+ mpe bisaleli+ nyonso ya esika mosantu, wana kaa ezali kolongwa, mpe nsima na yango, bana mibali ya Kohate bakokɔta mpo na komema yango,+ kasi basengeli te kosimba+ esika mosantu noki bakokufa. Biloko wana ezali mokumba ya bana mibali ya Kohate na hema ya kokutana.+
16 “Mpe mokumba ya Eleazare mwana ya Arona nganga-nzambe ekozala ya kotalela+ mafuta+ ya engɛngiseli ná mpaka ya malasi+ ya nsolo kitoko ná likabo ya mbuma+ ya ntango nyonso mpe mafuta mosantu,+ mokumba ya tabernakle mobimba mpe nyonso oyo ezali na kati na yango, elingi koloba, esika mosantu ná bisaleli na yango.”
17 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize mpe na Arona ete:
18 “Bótika etuluka ya mabota ya Bakohate+ elongwa na Balevi te.
19 Kasi bósalela bango boye mpo bázala mpenza na bomoi mpe bákufa te wana bakobɛlɛma na biloko oyo eleki bosantu.+ Arona ná bana na ye ya mibali bakokɔta, mpe basengeli kopesa bango moto na moto mosala na ye mpe mokumba na ye.
20 Mpe basengeli kokɔta te mpo na komona biloko mosantu ata mpo na mwa ntango moke, mpo soki basali bongo, bakokufa mpenza.”+
21 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete:
22 “Motángo mobimba ya bana mibali ya Gereshone+ ekozwama, ɛɛ bango, na kolanda ndako ya batata na bango engebene mabota na bango.
23 Banda na mbula ntuku misato (30) kino mbula ntuku mitano (50) okokoma bango nkombo,+ baoyo nyonso bazali koya kokɔta na etuluku ya mosala mpo na kosala mosala na hema ya kokutana.
24 Oyo ezali mosala ya mabota ya Bagereshone na makambo oyo basengeli kosala mpe na biloko oyo basengeli komema.+
25 Basengeli komema bilamba ya hema+ ya tabernakle mpe hema ya kokutana,+ ezipeli+ na yango ná ezipeli+ oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ oyo ezali na likoló, likoló na yango, ná elamba ya kozipa+ monɔkɔ ya hema ya kokutana,
26 ná barido+ ya lopango ná elamba ya kozipa+ monɔkɔ ya lopango oyo ezali zingazinga ya tabernakle ná etumbelo, ná bansinga na yango ya hema ná bisaleli na yango ya mosala, mpe biloko nyonso oyo basalaka na yango mosala ntango nyonso. Basengeli kosala ndenge wana.
27 Mosala nyonso oyo bana mibali+ ya Bagereshone+ bakosala, mikumba nyonso na bango mpe mosala nyonso na bango, ekosalema na etinda ya Arona ná bana na ye ya mibali, mpe bosengeli kopesa bango mikumba nyonso na bango lokola likambo oyo esɛngami.
28 Wana ezali mosala ya mabota ya bana mibali ya Bagereshone+ na hema ya kokutana, mpe mosala oyo basɛngi bango na litambwisi ya Itamare+ mwana ya Arona nganga-nzambe.
29 “Mpo na bana mibali ya Merari,+ okokoma bango nkombo na kolanda mabota na bango na ndako ya batata na bango.
30 Banda na mbula ntuku misato (30) kino mbula ntuku mitano (50) okokoma bango nkombo, baoyo nyonso bazali kokɔta na etuluku ya mosala mpo na kosala mosala na hema ya kokutana.+
31 Mpe talá likambo basɛngi bango, mokumba na bango,+ na mosala nyonso oyo basengeli kosala na hema ya kokutana: bakadrɛ+ ya tabernakle, bikangiseli+ na yango, makonzí+ na yango, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu,+
32 ná makonzí+ ya lopango zingazinga, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu,+ bapike+ na yango ná bansinga na yango esika moko na bisaleli na yango nyonso mpe na mosala na yango nyonso. Mpe na kolanda nkombo na bango, bokopesa bango bisaleli oyo basɛngi bango, ezala mokumba na bango ya komema.+
33 Wana ezali mosala ya mabota ya bana mibali ya Merari,+ engebene mosala nyonso na bango na hema ya kokutana, na litambwisi ya Itamare mwana ya Arona nganga-nzambe.”+
34 Mpe Moize ná Arona mpe bankumu+ ya liyangani babandaki kokoma nkombo ya bana mibali ya Bakohate+ na kolanda mabota na bango mpe na kolanda ndako ya batata na bango,
35 banda na mbula ntuku misato (30)+ kino mbula ntuku mitano (50),+ baoyo nyonso bakɔtaki na etuluku ya mosala mpo na kosala mosala na hema ya kokutana.+
36 Mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango na kolanda mabota na bango bazalaki nkóto mibale na nkama nsambo na ntuku mitano (2 750).+
37 Wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo+ na kati ya mabota ya Bakohate, baoyo nyonso bazalaki kosala na hema ya kokutana, baoyo Moize ná Arona bakomaki nkombo na mitindo ya Yehova na nzela ya Moize.
38 Mpo na bato oyo bakomisamaki nkombo na kati ya bana mibali ya Gereshone+ na kolanda mabota na bango mpe na kolanda ndako ya batata na bango,
39 banda na mbula ntuku misato (30) kino mbula ntuku mitano (50), baoyo nyonso bakɔtaki na etuluku ya mosala mpo na kosala mosala na hema ya kokutana,+
40 bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango na kolanda mabota na bango, na kolanda ndako ya batata na bango, bazalaki nkóto mibale na nkama motoba na ntuku misato (2 630).+
41 Wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo na mabota ya bana mibali ya Gereshone, baoyo nyonso bazalaki kosala na hema ya kokutana, baoyo Moize ná Arona bakomaki nkombo na etinda ya Yehova.+
42 Mpo na bato oyo bakomisamaki nkombo kati na mabota ya bana mibali ya Merari na kolanda mabota na bango, na kolanda ndako ya batata na bango,
43 banda na mbula ntuku misato (30) kino mbula ntuku mitano (50), baoyo nyonso bazalaki kokɔta na etuluku ya mosala mpo na kosala mosala na hema ya kokutana,+
44 bato oyo bakomisamaki nkombo na kati na bango, na kolanda mabota na bango, bazalaki nkóto misato na nkama mibale (3 200).+
45 Wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo na mabota ya bana mibali ya Merari, baoyo Moize ná Arona bakomaki nkombo na etinda ya Yehova na nzela ya Moize.+
46 Balevi nyonso oyo bakomisamaki nkombo, oyo Moize ná Arona mpe bankumu ya Yisraele bakomaki nkombo na bango, na kolanda mabota na bango mpe na kolanda ndako ya batata na bango,
47 banda na mbula ntuku misato (30) kino mbula ntuku mitano (50),+ baoyo nyonso bayaki kosala mosala ya makasi mpe mosala ya komema mikumba na hema ya kokutana,+
48 bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki nkóto mwambe na nkama mitano na ntuku mwambe (8 580).+
49 Na etinda ya Yehova bakomisamaki nkombo na nzela ya Moize, mokomoko engebene mosala na ye mpe mokumba na ye; mpe bakomisamaki nkombo kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+