Mitángo 36:1-13

36  Mpe bankumu ya batata ya libota ya bana ya Gileade mwana ya Makire+ mwana ya Manase na mabota ya bana ya Yozefe babɛlɛmaki mpe balobaki liboso ya Moize mpe bankumu, bankumu ya batata ya bana ya Yisraele,  mpe balobaki ete: “Yehova apesaki nkolo na ngai mitindo ya kopesa bana ya Yisraele mokili lokola libula na kobwakáká mbɛsɛ;+ mpe nkolo na ngai azwaki mitindo epai ya Yehova ya kopesa libula ya Zelofehade ndeko na biso ya mobali epai ya bana na ye ya basi.+  Soki bamosusu na kati na bana mibali ya mabota mosusu ya bana ya Yisraele bazwi bango mpo bázala basi na bango, libula ya basi yango esengeli kolongolama na libula ya batata na biso mpe esengeli kobakisama na libula ya libota oyo bango bakómi basangani na yango, ekolongolama na mabele ya libula na biso.+  Sikoyo soki Yubile+ ekómi mpo na bana ya Yisraele, libula ya basi yango esengeli mpe kobakisama na libula ya libota oyo bakómi basangani na yango; libula na bango ekolongolama na libula ya libota ya batata na biso.”  Bongo, na etinda ya Yehova, Moize apesaki bana ya Yisraele mitindo ete: “Libota ya bana ya Yozefe ezali koloba malamu.  Talá mitindo oyo Yehova apesi mpo na bana basi ya Zelofehade,+ alobi: ‘Bakoki kokóma basi ya bato oyo bango bakomona malamu na miso na bango. Nde bakokóma basi kaka ya bato ya libota ya etuluka ya batata na bango.+  Mpe libula ya bana ya Yisraele ekolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu te, mpamba te bana ya Yisraele basengeli kokangama moto na moto na libula ya libota ya bankɔkɔ na ye.  Mpe mwana mwasi nyonso oyo azwi libula kati na mabota ya bana ya Yisraele akokóma mwasi ya moto ya libota ya etuluka ya tata na ye,+ mpo bana ya Yisraele bázwa moto na moto libula ya bankɔkɔ na ye.  Mpe libula moko te ekolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, mpamba te mabota ya bana ya Yisraele ekokangama mokomoko na libula na yango moko.’” 10  Kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo, ndenge wana nde bana basi ya Zelofehade basalaki.+ 11  Na yango, Mahala, Tireza, Hogla, Milika ná Noa, bana ya Zelofehade,+ bakómaki basi ya bana mibali ya bandeko mibali ya tata na bango. 12  Bakómaki basi kati na mabota mosusu ya bana ya Manase mwana ya Yozefe, mpo libula na bango ekoba kozala na etuluka ya libota ya tata na bango. 13  Wana nde mitindo+ mpe bikateli ya lisambisi oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize epai ya bana ya Yisraele na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani, na Yeriko.+

Maloba na nse