Mitángo 35:1-34
35 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani,+ na Yeriko ete:
2 “Pesá bana ya Yisraele mitindo ete, na mabele oyo ezali libula na bango, basengeli kopesa Balevi bingumba+ mpo na kofanda, mpe bakopesa Balevi esika ya koleisa banyama matiti oyo ezali zingazinga ya bingumba yango.+
3 Mpe bingumba esengeli kozala bisika ya kofanda mpo na bango, nzokande bisika ya koleisa banyama matiti ekozala mpo na banyama na bango ya mboka mpe biloko na bango mpe mpo na banyama nyonso na bango ya zamba.
4 Mpe bisika ya koleisa banyama matiti na bingumba oyo bokopesa Balevi ekozala mapeko nkóto moko (1 000), banda na efelo ya engumba tii na libándá zingazinga.
5 Mpe bosengeli kotánga mapeko nkóto mibale (2 000) na libándá ya engumba na ngámbo ya ɛsti mpe na ngámbo ya sudi mapeko nkóto mibale (2 000) mpe na ngámbo ya wɛsti mapeko nkóto mibale (2 000) mpe na ngámbo ya nɔrdi mapeko nkóto mibale (2 000), engumba ekozala na katikati. Ekozala bisika na bango ya koleisa banyama matiti na bingumba.
6 “Talá bingumba oyo bokopesa Balevi: bingumba motoba ya ekimelo,+ oyo bokopesa mpo mobomi-moto akima kuna,+ mpe longola yango, bokopesa bingumba mosusu ntuku minei na mibale (42).
7 Mpe bingumba nyonso oyo bokopesa Balevi ekozala bingumba ntuku minei na mwambe (48), yango ná bisika na yango ya koleisa banyama matiti.+
8 Bingumba oyo bokopesa ekouta na mabele ya bana ya Yisraele.+ Na baoyo bazali mingi bokozwa mingi, mpe na baoyo bazali moke bokozwa moke.+ Moto na moto, na kotalela libula na ye oyo akozwa mpo ezala ya ye, akopesa Balevi ndambo ya bingumba na ye.”
9 Mpe Yehova akobaki koloba na Moize ete:
10 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Bozali kokatisa Yordani mpo na kokɔta na mokili ya Kanana.+
11 Mpe bosengeli kopona bingumba oyo ebongi na bino. Ekozala mpo na bino bingumba ya ekimelo, mpe mobomi-moto, oyo abomi molimo na nko te, asengeli kokima kuna.+
12 Mpe bingumba yango esengeli kozala ekimelo mpo na bino liboso ya mozongisi mabe+ mpo na makila, mpo mobomi-moto akufa te tii akotɛlɛma liboso ya liyangani mpo na kosambisama.+
13 Mpe bingumba oyo bokopesa, bingumba motoba ya ekimelo, ekozala mpo na bino.
14 Bokopesa bingumba misato na ngámbo oyo ya Yordani,+ mpe bokopesa bingumba misato na mokili ya Kanana.+ Ekozala bingumba ya ekimelo.
15 Mpo na bana ya Yisraele mpe mpo na moto oyo afandi mopaya+ mpe mpo na moto oyo autá na mboka mosusu, oyo azali kati na bango, bingumba motoba wana ekozala ekimelo, mpo moto nyonso, oyo abomi molimo na nko te akima kuna.+
16 “‘Sikoyo soki abɛtaki ye na esaleli ya ebende, bongo akufi, azali mobomi-moto.+ Mobomi-moto asengeli mpenza kobomama.+
17 Mpe soki abɛtaki ye libanga moko ya moke oyo akoki kokufa na yango, bongo akufi, azali mobomi-moto. Mobomi-moto asengeli mpenza kobomama.
18 Mpe soki abɛtaki ye mwa esaleli ya nzete, oyo akoki kokufa na yango, bongo akufi, azali mobomi-moto. Mobomi-moto asengeli mpenza kobomama.
19 “‘Mozongisi mabe+ mpo na makila ye nde akoboma mobomi-moto. Soki azwi libaku ya kokutana na mobomi-moto yango, ye moko akoboma ye.
20 Mpe soki ezali na koyina nde atindikaki ye+ to abwakelaki ye eloko mpo akufa, wana abatami mpo na kozela+ ye,
21 to soki ezali mpo azalaki monguna na ye nde abɛtaki ye na lobɔkɔ na ye mpo akufa, moto oyo abɛti ye asengeli mpenza kobomama. Azali mobomi-moto. Mozongisi mabe mpo na makila akoboma mobomi-moto yango soki azwi libaku ya kokutana na ye.+
22 “‘Kasi soki ezalaki kaka boye, azalaki monguna na ye te mpe atindikaki ye to abwakelaki ye eloko moko, mpe abatamaki te mpo na kozela+ ye,
23 to soki, kozanga komona ye, abwakelaki ye libanga moko oyo akoki kokufa na yango, to soki akweiselaki ye yango, bongo akufi, nzokande azalaki na ye na bonguna te mpe azalaki koluka kosala ye mabe te,
24 liyangani esengeli kokata likambo kati na moto oyo abɛti ná mozongisi mabe mpo na makila, engebene bikateli oyo wana.+
25 Mpe liyangani+ esengeli kobikisa mobomi-moto na lobɔkɔ ya mozongisi mabe mpo na makila, mpe liyangani esengeli kozongisa ye na engumba na ye ya ekimelo epai akimaki, mpe asengeli kofanda kati na yango tii na liwa ya nganga-nzambe monene, oyo atyamaki mafuta mosantu.+
26 “‘Kasi soki mobomi-moto abimi mpenza na ndelo ya engumba na ye ya ekimelo epai akimaki,
27 mpe soki mozongisi mabe+ mpo na makila azwi mpenza ye na libándá ya ndelo ya engumba na ye ya ekimelo, mpe soki mozongisi mabe mpo na makila abomi mpenza mobomi-moto yango, ye azali na ngambo ya makila te.
28 Mpo asengelaki kofanda na kati ya engumba na ye ya ekimelo tii na liwa ya nganga-nzambe monene,+ mpe nsima ya liwa ya nganga-nzambe monene nde mobomi-moto akoki kozonga na mokili ya mabele na ye.
29 Mpe yango esengeli kozala mpo na bino mobeko ya lisambisi na boumeli ya mabota na bino nyonso na bisika nyonso na bino ya kofanda.
30 “‘Moto nyonso oyo abomi molimo akobomama lokola mobomi-moto+ na maloba ya monɔkɔ ya batatoli,+ mpe motatoli kaka moko akoki kotatola te mpo na kofunda molimo moko mpo akufa.
31 Mpe bosengeli te kozwa lisiko mpo na molimo ya mobomi-moto oyo abongi kokufa,+ mpo ye asengeli mpenza kobomama.+
32 Mpe bosengeli te kozwa lisiko mpo na moto oyo akimi na engumba na ye ya ekimelo, mpo azonga kofanda na mokili liboso ya liwa ya nganga-nzambe monene.
33 “‘Mpe bosengeli te kobebisa mokili epai bozali; mpamba te ezali makila nde ebebisaka mokili,+ mpe kozipama ya masumu ya mokili ekozala te mpo na makila oyo esopami likoló na yango, longola kaka na makila ya moto oyo asopi yango.+
34 Mpe osengeli te kokómisa mbindo mokili epai bozali kofanda, mokili epai nazali kofanda; mpo ngai Yehova nazali kofanda na kati ya bana ya Yisraele.’”+