Mitángo 33:1-56
33 Talá mibembo ya bana ya Yisraele oyo babimaki na mokili ya Ezipito,+ engebene mampinga+ na bango, na lobɔkɔ ya Moize ná Arona.+
2 Mpe Moize azalaki kokoma bisika oyo bazalaki kolongwa, mobembo na mobembo, na kolanda etinda ya Yehova; mpe talá mibembo oyo basalaki, longwa na esika moko tii na esika mosusu:+
3 Mpe balongwaki na Ramesese+ na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na mitano ya sanza+ ya liboso. Kaka na mokolo oyo elandaki elekeli,+ bana ya Yisraele babimaki mabɔkɔ likoló, na miso ya Baezipito nyonso.+
4 Na ntango nyonso wana, Baezipito bazalaki kokunda baoyo Yehova abomaki na kati na bango, elingi koloba, bana nyonso ya liboso;+ mpe Yehova apesaki banzambe na bango bitumbu.+
5 Bongo bana ya Yisraele balongwaki na Ramesese+ mpe bakendaki kotya kaa na Sukote.+
6 Na nsima, balongwaki na Sukote mpe bakendaki kotya kaa na Etame,+ oyo ezali na ndelo ya esobe.
7 Na nsima, balongwaki na Etame mpe bazongaki nsima epai ya Pihahirote,+ oyo etalani na Baala-zefone,+ mpe bakendaki kotya kaa liboso ya Migidole.+
8 Nsima na yango, balongwaki na Pihahirote mpe balekaki na kati ya mbu+ tii na esobe+ mpe batambolaki mobembo ya mikolo misato na esobe ya Etame+ mpe bakendaki kotya kaa na Mara.+
9 Na nsima, balongwaki na Mara mpe bakómaki na Elime.+ Nzokande na Elime ezalaki na maziba zomi na mibale ya mai mpe nzete ya mbila ntuku nsambo (70). Bongo bakendaki kotya kaa wana.
10 Na nsima, balongwaki na Elime mpe bakendaki kotya kaa pene na Mbu Motane.
11 Nsima na yango, balongwaki na Mbu Motane mpe bakendaki kotya kaa na esobe ya Sine.+
12 Na nsima, balongwaki na esobe ya Sine mpe bakendaki kotya kaa na Dofeka.
13 Na nsima, balongwaki na Dofeka mpe bakendaki kotya kaa na Alushe.
14 Na nsima, balongwaki na Alushe mpe bakendaki kotya kaa na Refidime.+ Mpe mai ya komɛla ezalaki kuna te mpo bato bámɛla.
15 Nsima na yango, balongwaki na Refidime mpe bakendaki kotya kaa na esobe ya Sinai.+
16 Nsima na yango, balongwaki na esobe ya Sinai mpe bakendaki kotya kaa na Kibrote-hataava.+
17 Na nsima, balongwaki na Kibrote-hataava mpe bakendaki kotya kaa na Hazerote.+
18 Nsima na yango, balongwaki na Hazerote mpe bakendaki kotya kaa na Ritima.
19 Na nsima, balongwaki na Ritima mpe bakendaki kotya kaa na Rimone-pereze.
20 Na nsima, balongwaki na Rimone-pereze mpe bakendaki kotya kaa na Libina.
21 Na nsima, balongwaki na Libina mpe bakendaki kotya kaa na Risa.
22 Na nsima, balongwaki na Risa mpe bakendaki kotya kaa na Kehelata.
23 Na nsima, balongwaki na Kehelata mpe bakendaki kotya kaa na Ngomba Shefere.
24 Nsima na yango, balongwaki na Ngomba Shefere mpe bakendaki kotya kaa+ na Harada.
25 Na nsima, balongwaki na Harada mpe bakendaki kotya kaa na Makelote.
26 Na nsima, balongwaki+ na Makelote mpe bakendaki kotya kaa na Tahate.
27 Nsima na yango, balongwaki na Tahate mpe bakendaki kotya kaa na Tera.
28 Na nsima, balongwaki na Tera mpe bakendaki kotya kaa na Mitika.
29 Na nsima, balongwaki na Mitika mpe bakendaki kotya kaa na Hashimona.
30 Na nsima, balongwaki na Hashimona mpe bakendaki kotya kaa na Moserote.
31 Na nsima, balongwaki na Moserote mpe bakendaki kotya kaa na Bene-yaakane.+
32 Nsima na yango, balongwaki na Bene-yaakane mpe bakendaki kotya kaa na Hore-hagidigade.
33 Na nsima, balongwaki na Hore-hagidigade mpe bakendaki kotya kaa na Yotebata.+
34 Na nsima, balongwaki na Yotebata mpe bakendaki kotya kaa na Abrona.
35 Na nsima, balongwaki na Abrona mpe bakendaki kotya kaa na Ezione-gebere.+
36 Nsima na yango, balongwaki na Ezione-gebere mpe bakendaki kotya kaa na esobe ya Zine,+ elingi koloba, Kadeshe.
37 Na nsima, balongwaki na Kadeshe mpe bakendaki kotya kaa na Ngomba Hore,+ na ndelo ya mokili ya Edome.
38 Mpe Arona nganga-nzambe amataki na Ngomba Hore na etinda ya Yehova mpe akufaki kuna na mbula ya ntuku minei (40) ya kobima ya bana ya Yisraele na mokili ya Ezipito, na sanza ya mitano, na mokolo ya liboso ya sanza yango.+
39 Mpe Arona azalaki na mbula nkama moko na ntuku mibale na misato (123) na ntango akufaki na Ngomba Hore.
40 Sikoyo Mokanana, mokonzi ya Arade,+ wana azalaki kofanda na Negebe,+ na mokili ya Kanana, ayokaki nsango ya koya ya bana ya Yisraele.
41 Na nsima, balongwaki na Ngomba Hore+ mpe bakendaki kotya kaa na Zalmona.
42 Nsima na yango, balongwaki na Zalmona mpe bakendaki kotya kaa na Punone.
43 Na nsima, balongwaki na Punone mpe bakendaki kotya kaa na Obote.+
44 Na nsima, balongwaki na Obote mpe bakendaki kotya kaa na Iye-abarime na ndelo ya Moabe.+
45 Na nsima, balongwaki na Iyime mpe bakendaki kotya kaa na Dibone-gade.+
46 Nsima na yango, balongwaki na Dibone-gade mpe bakendaki kotya kaa na Almone-diblataime.
47 Na nsima, balongwaki na Almone-diblataime+ mpe bakendaki kotya kaa na bangomba ya Abarime+ liboso ya Nebo.+
48 Nsukansuka, balongwaki na bangomba ya Abarime mpe bakendaki kotya kaa na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe+ pene na Yordani, na Yeriko.
49 Mpe bakobaki kofanda na bakaa pene na Yordani banda na Bete-yeshimote+ tii na Abele-shitime+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe.
50 Mpe Yehova alobaki na Moize na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani, na Yeriko,+ ete:
51 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Bozali kokatisa Yordani mpo na kokɔta na mokili ya Kanana.+
52 Mpe bosengeli kobengana bato nyonso oyo bafandi na mokili liboso na bino mpe kobebisa bililingi+ nyonso na bango ya mabanga, mpe bokobebisa bikeko nyonso na bango ya ebende oyo enyangwisami,+ mpe bokosilisa nyɛɛ bisika nyonso na bango oyo etombwaná ya losambo.+
53 Mpe bosengeli kozwa mokili yango mpe kofanda kuna, mpamba te nakopesa mpenza bino mokili yango mpo bózwa yango.+
54 Mpe bino bosengeli kokabola mokili yango ezala ya bino na kobwakáká mbɛsɛ,+ engebene mabota na bino.+ Moto oyo azali na bato mingi, bokobakisa libula na ye, mpe moto oyo azali na bato moke, bokokitisa libula na ye.+ Esika oyo mbɛsɛ ekobimisa mpo na ye, esika yango ekozala ya ye.+ Bokozwa mabele na kolanda mabota ya batata na bino.+
55 “‘Kasi, soki bokobengana bato oyo bafandi na mokili yango liboso na bino te,+ bato na bango oyo bokotika, bakokóma mpenza lokola biloko oyo ezali kotuba na miso na bino mpe lokola banzubɛ na mipanzi na bino, mpe bakotungisa mpenza bino na mokili epai bokofanda.+
56 Mpe ekosalema mpenza boye: kaka ndenge nakanisaki kosala bango, nakosala bino bongo.’”+