Mitángo 32:1-42

32  Sikoyo bana ya Rubene+ mpe bana ya Gade+ bazwaki bibwɛlɛ ebele, ɛɛ mingi mpenza. Mpe babandaki kotala mokili ya Yazere+ mpe mokili ya Gileade, mpe talá! esika yango ezalaki esika oyo ebongaki mpo na bibwɛlɛ.  Na yango, bana ya Gade mpe bana ya Rubene bayaki mpe balobaki boye na Moize mpe na Eleazare nganga-nzambe mpe na bankumu ya liyangani:  “Atarote,+ Dibone,+ Yazere, Nimira,+ Heshibone,+ Eleale,+ Sebame, Nebo+ ná Beone,+  mokili oyo Yehova alongaki+ liboso ya liyangani ya Yisraele, ezali mokili oyo ebongi mpo na bibwɛlɛ, mpe basaleli na yo bazali na bibwɛlɛ.”+  Mpe balobaki lisusu ete: “Soki tondimami na miso na yo, tiká mokili oyo epesama na basaleli na yo mpo ezala ya bango. Kokatisa biso Yordani+ te.”  Bongo Moize alobaki na bana ya Gade mpe na bana ya Rubene ete: “Bandeko na bino bákende na etumba, bongo bino bótikala kofanda awa?+  Mpe mpo na nini bokolɛmbisa bana ya Yisraele nzoto ete bákatisa te mpo na kokɔta na mokili oyo Yehova akopesa mpenza bango?  Ndenge wana nde batata na bino basalaki+ ntango natindaki bango longwa na Kadeshe-barnea+ mpo na kotala mokili.  Ntango bamataki na lobwaku ya mokɛli ya Eshikole+ mpe bamonaki mokili, balɛmbisaki bana ya Yisraele nzoto, mpo bákɔta te na mokili oyo Yehova alingaki mpenza kopesa bango.+ 10  Na yango, nkanda ya Yehova engalaki na mokolo yango, bongo alapaki ndai,+ alobi ete: 11  ‘Mibali oyo babimaki na Ezipito, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló,+ bakomona te mabele oyo nalapaki ndai epai ya Abrahama, Yisaka mpe Yakobo,+ mpo balandaki ngai te na makambo nyonso, 12  longola kaka Kalebe+ mwana ya Yefune Mokenize mpe Yosua+ mwana ya Nunu, mpo balandaki Yehova na makambo nyonso.’ 13  Bongo nkanda ya Yehova engalelaki Yisraele mpe asalaki ete bango báyengayenga na esobe mbula ntuku minei (40),+ kino bato nyonso ya ntango wana oyo bazalaki kosala mabe na miso ya Yehova basilaki.+ 14  Mpe talá bobimi na esika ya batata na bino lokola lisangá ya bato ya masumu mpo na kobakisela lisusu Yisraele nkanda ya kongala ya Yehova.+ 15  Soki bokopesa ye mokɔngɔ mpe bokotika kolanda ye,+ akotika mpenza bango lisusu báumela ntango molai koleka na esobe,+ mpe bokoyeisela bato oyo nyonso libebi.”+ 16  Na nsima, babɛlɛmaki na ye mpe balobaki ete: “Tiká tótonga awa mapango ya mabanga mpo na bitonga ya bibwɛlɛ na biso mpe bingumba mpo na bana na biso ya mike. 17  Kasi biso moko tokokende na bibundeli, tomibongisi na etuluku ya etumba+ liboso ya bana ya Yisraele tii ntango tokokómisa bango na esika na bango, wana bana na biso ya mike basengeli kofanda na bingumba oyo ezali na mapango ya makasi, mosika mpenza na miso ya bato oyo bafandi na mokili yango. 18  Tokozonga te na bandako na biso kino bana ya Yisraele bakozwa mabele, moto na moto libula na ye moko.+ 19  Mpo tokozwa te libula elongo na bango na ngámbo ya Yordani mpe koleka, mpamba te libula na biso ekweli biso na ngámbo ya Yordani epai moi ebimaka.”+ 20  Na yango, Moize alobaki na bango ete: “Soki bokosala boye, soki bokozwa bibundeli liboso ya Yehova mpo na etumba,+ 21  mpe soki moto nyonso na kati na bino oyo azali na bibundeli akokatisa mpenza Yordani liboso ya Yehova, kino akobengana banguna na ye liboso na ye,+ 22  mpe soki mokili yango etyami mpenza na nse ya bokonzi ya Yehova,+ mpe nsima na yango bozongi,+ bokozala mpenza na ngambo te epai ya Yehova mpe epai ya Yisraele; mpe mokili oyo esengeli kokóma ya bino liboso ya Yehova.+ 23  Kasi soki bokosala ndenge wana te, bokosalela mpenza Yehova lisumu.+ Soki bongo, bóyeba ete lisumu na bino ekozwa bino.+ 24  Bótonga bingumba na bino mpo na bana na bino ya mike mpe mapango ya mabanga mpo na bitonga na bino, mpe oyo ebimi na monɔkɔ na bino, yango nde bosengeli kosala.”+ 25  Bongo bana ya Gade mpe bana ya Rubene balobaki na Moize ete: “Basaleli na yo bakosala kaka ndenge nkolo na ngai azali kopesa mitindo.+ 26  Bana na biso ya mike, basi na biso, bibwɛlɛ na biso mpe banyama na biso nyonso ya mboka bakotikala kuna na bingumba ya Gileade,+ 27  kasi basaleli na yo bakokatisa, moto na moto na bibundeli mpo na limpinga,+ liboso ya Yehova mpo na etumba, kaka ndenge nkolo na ngai alobi.” 28  Na yango, Moize apesaki Eleazare nganga-nzambe mpe Yosua mwana ya Nunu mpe bankumu ya batata ya mabota ya bana ya Yisraele mitindo mpo na bango. 29  Bongo Moize alobaki na bango ete: “Soki bana ya Gade mpe bana ya Rubene bakatisi Yordani elongo na bino, moto na moto na bibundeli mpo na etumba,+ liboso ya Yehova, mpe mokili etyami mpenza na nse ya bokonzi na bino, bosengeli kopesa bango mokili ya Gileade ezala ya bango.+ 30  Kasi soki bakatisi te elongo na bino na bibundeli, basengeli kofanda na kati na bino na mokili ya Kanana.”+ 31  Na yango, bana ya Gade mpe bana ya Rubene bazongisaki maloba ete: “Oyo Yehova alobi na basaleli na yo, ndenge yango nde tokosala.+ 32  Biso moko tokokatisa na bibundeli liboso ya Yehova kino na mokili ya Kanana,+ mpe biloko ya libula na biso ekozala na biso na ngámbo oyo ya Yordani.”+ 33  Na yango, Moize apesaki bango, elingi koloba, bana ya Gade+ mpe bana ya Rubene+ mpe ndambo ya libota ya Manase+ mwana ya Yozefe, bokonzi ya Sihone+ mokonzi ya Baamore mpe bokonzi ya Oge+ mokonzi ya Bashane, mokili ya bingumba na yango na bateritware, mpe bingumba ya mokili zingazinga. 34  Mpe bana ya Gade batongaki Dibone,+ Atarote+ ná Aroere,+ 35  Atrote-shofane, Yazere+ ná Yogebeha,+ 36  Bete-nimira+ ná Bete-harane,+ bingumba oyo ezali na mapango ya makasi,+ mpe na mapango ya mabanga mpo na bitonga.+ 37  Mpe bana ya Rubene batongaki Heshibone,+ Eleale+ ná Kiriataime,+ 38  Nebo,+ Baala-meone+—bankombo na yango ebongwanaki—ná Sibima; mpe babandaki kobenga bankombo ya bingumba oyo batongaki na bankombo na bango moko. 39  Mpe bana ya Makire+ mwana ya Manase bakendaki na Gileade mpe bazwaki yango mpe babenganaki Baamore oyo bazalaki kuna. 40  Bongo Moize apesaki Gileade epai ya Makire mwana ya Manase, mpe abandaki kofanda kuna.+ 41  Mpe Yaire mwana ya Manase akendaki mpe azwaki bamboka na bango ya hema, mpe abandaki kobenga yango Havote-yaire.+ 42  Mpe Noba akendaki mpe azwaki Kenate+ ná basité oyo esimbami na yango; mpe abandaki kobenga yango Noba, na nkombo na ye moko.

Maloba na nse