Mitángo 31:1-54
31 Bongo Yehova alobaki na Moize ete:
2 “Zongiselá Bamidiane mabe+ mpo na bana ya Yisraele.+ Na nsima, okoyanganisama na bato na yo.”+
3 Bongo Moize alobaki na bato ete: “Bópesa mibali oyo bazali na kati na bino bibundeli oyo esengeli mpo na kokende etumba, mpo bábunda na Midiane mpo Yehova azongisela Midiane mabe.+
4 Na libota mokomoko na mabota nyonso ya Yisraele, bokotinda bato nkóto moko (1 000) na etumba.”
5 Na yango, na bato nkóto nkóto+ ya Yisraele, bato nkóto moko (1 000) baponamaki na libota mokomoko, bato nkóto zomi na mibale (12 000) bazwaki bibundeli mpo na kokende etumba.+
6 Bongo Moize atindaki bango, bato nkóto moko (1 000) na libota mokomoko, mpo na kokende etumba, bango ná Finehase+ mwana ya Eleazare nganga-nzambe mpo na kokende etumba, mpe bisaleli mosantu mpe bakelelo+ ndenge na ndenge ya koyula ezalaki na lobɔkɔ na ye.
7 Mpe bakendaki kobunda etumba ná Midiane, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo, mpe babomaki mobali nyonso.+
8 Mpe babomaki bakonzi ya Midiane elongo na bato mosusu oyo babomamaki, elingi koloba, Evi, Rekeme, Zure, Hure ná Reba, bakonzi mitano ya Midiane;+ mpe babomaki Balaama+ mwana ya Beore na mopanga.
9 Kasi bana ya Yisraele bamemaki basi ya Midiane ná bana na bango ya mike bakangami;+ mpe bapunzaki banyama na bango nyonso ya mboka ná bibwɛlɛ na bango nyonso mpe biloko na bango nyonso ya kobikela.
10 Mpe bazikisaki na mɔtɔ bingumba na bango nyonso epai bazalaki kofanda mpe bakaa na bango nyonso oyo ezingami na bifelo.+
11 Mpe bazwaki biloko nyonso oyo epunzamaki+ ná nyonso oyo bakangaki ezala bato, ezala banyama ya mboka.
12 Mpe bayaki na bakangami ná nyonso oyo bakangaki mpe biloko oyo bapunzaki epai ya Moize, Eleazare nganga-nzambe mpe liyangani ya bana ya Yisraele, na kaa, na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe,+ oyo ezali pene na Yordani, na Yeriko.
13 Bongo Moize ná Eleazare nganga-nzambe mpe bankumu nyonso ya liyangani babimaki kokutana na bango na libándá ya kaa.
14 Bongo Moize asilikelaki mibali oyo batyamaki na bituluku ya babundi,+ bakonzi ya bato nkóto nkóto mpe bakonzi ya bato nkama nkama oyo bautaki na etumba.
15 Bongo Moize alobaki na bango ete: “Botiki basi nyonso na bomoi?+
16 Talá! Bango nde bato oyo basalelamaki, na liloba ya Balaama, mpo na kobenda bana ya Yisraele mpo bázanga bosembo+ epai ya Yehova na likambo ya Peore,+ bongo bolɔzi ekwelaki liyangani ya Yehova.+
17 Sikoyo, na kati ya bana mike, bóboma mobali nyonso mpe bóboma mwasi nyonso oyo asangisá nzoto na mobali na kolaláká na mobali.+
18 Mpe na kati ya basi, bótika na bomoi, mpo na bino, bana mike nyonso oyo bayebi likambo ya kolala na mobali te.+
19 Nde bino, bófanda na libándá ya kaa mikolo nsambo. Moto nyonso oyo abomi molimo+ moko boye mpe moto nyonso oyo asimbi moto oyo abomami,+ bokomipɛtola+ na mokolo ya misato mpe na mokolo ya nsambo, bino ná bakangami na bino.
20 Mpe elamba nyonso ná eloko nyonso ya loposo ná eloko nyonso esalemi na nsuki ya ntaba mpe eloko nyonso ya libaya, bokopɛtola yango mpo na bino na lisumu.”+
21 Bongo Eleazare nganga-nzambe alobaki na mibali ya limpinga oyo bakendaki na etumba ete: “Talá eloko oyo esɛngami na mobeko oyo Yehova apesaki Moize:
22 ‘Kaka wolo, palata, motako, ebende, etini ná mondɔlu,
23 eloko nyonso oyo ezikaka na mɔtɔ te,+ bokolekisa yango na mɔtɔ, mpe esengeli kozala pɛto. Kasi esengeli kopɛtolama na mai ya kopɛtola.+ Mpe eloko nyonso oyo ezikaka na mɔtɔ, bokolekisa yango na mai.+
24 Mpe bosengeli kosukola bilamba na bino na mokolo ya nsambo mpe kozala pɛto, mpe na nsima, bokoki kokɔta na kaa.’”+
25 Mpe Yehova alobaki na Moize ete:
26 “Zwá, yo ná Eleazare nganga-nzambe mpe bankumu ya batata ya liyangani, motángo mobimba ya biloko nyonso oyo bapunzaki, ná bato ná banyama ya mboka oyo bakangami.
27 Mpe osengeli kokabola na biteni mibale biloko nyonso oyo bapunzaki, kati na baoyo bakendaki na etumba, oyo babimaki kobunda, mpe bato mosusu nyonso ya liyangani oyo batikalaki.+
28 Mpe mpo na mpako+ ya Yehova, osengeli kozwa epai ya mibali ya etumba oyo babimaki kobunda, molimo moko na milimo nkama mitano (500): na bato mpe na bangɔmbɛ mpe na bampunda mpe na bampate.
29 Na ndambo na bango nde bokozwa yango mpe osengeli kopesa yango Eleazare nganga-nzambe mpo ezala likabo ya Yehova.+
30 Mpe na ndambo ya bana ya Yisraele, na biloko ntuku mitano (50) okozwa moko: na bato, na bangɔmbɛ, na bampunda mpe na bampate, na lolenge nyonso ya nyama ya mboka, mpe osengeli kopesa yango Balevi,+ bato oyo bakokisaka mokumba ya tabernakle ya Yehova.”+
31 Mpe Moize ná Eleazare nganga-nzambe basalaki kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
32 Mpe biloko nyonso oyo bapunzaki, biloko oyo etikalaki na biloko oyo ebɔtɔlamaki, oyo bato bakendaki na etumba bazwaki lokola biloko oyo ebɔtɔlami, ezalaki bampate nkóto nkama motoba na ntuku nsambo na mitano (675 000),
33 bangɔmbɛ nkóto ntuku nsambo na mibale (72 000),
34 bampunda nkóto ntuku motoba na moko (61 000).
35 Kasi milimo ya bato,+ na basi oyo bayebaki likambo ya kolala na mobali te,+ milimo yango nyonso ezalaki nkóto ntuku misato na mibale (32 000).
36 Mpe ndambo oyo ezalaki likabo ya baoyo bakendaki na etumba ezalaki na motángo ya bampate nkóto nkama misato na ntuku misato na nsambo na nkama mitano (337 500).
37 Mpe mpako+ mpo na Yehova oyo euti na bampate ezalaki nkama motoba na ntuku nsambo na mitano (675).
38 Mpe na bangɔmbɛ ezalaki nkóto ntuku misato na motoba (36 000), mpe mpako na yango mpo na Yehova ezalaki ntuku nsambo na mibale (72).
39 Mpe bampunda ezalaki nkóto ntuku misato na nkama mitano (30 500), mpe mpako na yango mpo na Yehova ezalaki ntuku motoba na moko (61).
40 Mpe milimo ya bato ezalaki nkóto zomi na motoba (16 000), mpe mpako na yango mpo na Yehova ezalaki milimo ntuku misato na mibale (32).
41 Bongo Moize apesaki mpako na Eleazare nganga-nzambe mpo ezala likabo ya Yehova,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+
42 Mpe ndambo oyo ezalaki ya bana ya Yisraele, oyo Moize alongolaki na oyo ezalaki ya mibali oyo babundaki etumba yango oyo:
43 Nzokande ndambo oyo ezalaki ya liyangani euti na bampate ezalaki nkóto nkama misato na ntuku misato na nsambo na nkama mitano (337 500),
44 mpe na bangɔmbɛ, nkóto ntuku misato na motoba (36 000),
45 mpe bampunda, nkóto ntuku misato na nkama mitano (30 500),
46 mpe milimo ya bato, nkóto zomi na motoba (16 000).
47 Bongo Moize azwaki, na ndambo oyo ezalaki ya bana ya Yisraele, molimo moko oyo esengelaki kozwama na milimo ntuku mitano (50), na bato mpe na banyama ya mboka, mpe apesaki yango Balevi,+ bato oyo bakokisaka mokumba+ ya tabernakle ya Yehova, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
48 Mpe mibali oyo batyamaki, oyo bazalaki na kati ya bato nkóto nkóto ya limpinga,+ bakonzi ya bato nkóto nkóto mpe bakonzi ya bato nkama nkama,+ babɛlɛmaki na Moize,
49 mpe balobaki na Moize ete: “Basaleli na yo bazwi motángo mobimba ya mibali ya etumba oyo bazali na mabɔkɔ na biso mpe bayebisi ete moko te kati na biso azangi.+
50 Bongo tiká tópesa lokola likabo ya Yehova, oyo moto na moto azwaki:+ biloko ya wolo, mwa minyɔlɔlɔ ya makɛsɛ, mpe bikɔmɔ, mpɛtɛ ya kotya bilembo,+ biloko ya matoi, biloko ya kobongisa nzoto mpo na basi,+ mpo na kozipa masumu ya milimo na biso liboso ya Yehova.”
51 Na yango, Moize ná Eleazare nganga-nzambe bandimaki kozwa wolo oyo euti na bango,+ babiju nyonso.
52 Mpe wolo nyonso ya likabo oyo bapesaki Yehova ezalaki shekele nkóto zomi na motoba na nkama nsambo na ntuku mitano (16 750), euti na bakonzi ya bato nkóto nkóto mpe bakonzi ya bato nkama nkama.
53 Mibali ya limpinga bazwaki moto na moto biloko oyo bapunzaki.+
54 Bongo Moize ná Eleazare nganga-nzambe bandimaki wolo oyo euti na bakonzi ya bato nkóto nkóto mpe ya bato nkama nkama mpe bamemaki yango na kati ya hema ya kokutana mpo ezala ekaniseli+ mpo na bana ya Yisraele liboso ya Yehova.