Mitángo 29:1-40
29 “‘Mpe na sanza ya nsambo, na mokolo ya liboso ya sanza yango, bokosala liyangani moko mosantu.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te.+ Ekozala mpo na bino mokolo ya kobɛtama ya kelelo.+
2 Mpe bosengeli kopesa likabo ya kotumba mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema: mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, bana-mpate mibali nsambo, mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
3 mpe likabo na yango ya mbuma ya farini ya malamu oyo emwangisami mafuta: misato ya bandambo zomi mpo na ngɔmbɛ-mobali, mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali,+
4 mpe moko ya bandambo zomi mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali na bana-mpate mibali nsambo yango;+
5 mpe mwana-ntaba moko ya mobali lokola likabo mpo na lisumu mpo na kozipa masumu na bino;+
6 longola likabo ya kotumba+ ya sanza na sanza mpe likabo na yango ya mbuma+ ná likabo ya kotumba ya ntango nyonso+ mpe likabo na yango ya mbuma,+ nzela moko na makabo na yango ya masanga,+ ndenge basalaka yango, mpo ezala nsolo moko ya kokitisa motema, likabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ.+
7 “‘Mpe na mokolo ya zomi ya sanza yango ya nsambo, bokosala liyangani moko mosantu,+ mpe bosengeli koyokisa milimo na bino mpasi.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te.+
8 Mpe bosengeli kopesa Yehova likabo ya kotumba, mpo ezala nsolo moko ya kokitisa motema: mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, bana-mpate mibali nsambo, mokomoko ezali na mbula moko.+ Ekozala banyama oyo bomoni ete ezangi mbeba.+
9 Mpe likabo na yango ya farini ya malamu oyo emwangisami mafuta: misato ya bandambo zomi mpo na ngɔmbɛ-mobali, mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali yango moko,+
10 moko ya bandambo zomi mbala nyonso mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali na bana-mpate mibali yango nsambo;+
11 mwana-ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo mpo na lisumu mpo na kozipa masumu+ mpe likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma, nzela moko na makabo na yango ya masanga.+
12 “‘Mpe na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya nsambo,+ bokosala liyangani moko mosantu.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te,+ mpe bosengeli kosala fɛti mpo na Yehova mikolo nsambo.+
13 Mpe bosengeli kopesa likabo ya kotumba,+ likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema: bana-ngɔmbɛ mibali zomi na misato, mpate-mibali mibale, bana-mpate mibali zomi na minei, mokomoko ezali na mbula moko. Ekozala banyama oyo ezangi mbeba.+
14 Mpe likabo na yango ya mbuma ya farini ya malamu oyo emwangisami mafuta: misato ya bandambo zomi mpo na ngɔmbɛ-mobali mokomoko na ngɔmbɛ-mibali zomi na misato yango, mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali mokomoko na mpate-mibali yango mibale,+
15 mpe moko ya bandambo zomi mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali na bana-mpate mibali zomi na minei yango;+
16 mpe mwana-ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso, likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
17 “‘Mpe na mokolo ya mibale: bana-ngɔmbɛ mibali zomi na mibale, mpate-mibali mibale, bana-mpate mibali zomi na minei, mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
18 ná likabo na yango ya mbuma+ mpe likabo na yango ya masanga+ mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka;+
19 mpe mwana-ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu,+ longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma, nzela moko na makabo na yango ya masanga.+
20 “‘Mpe na mokolo ya misato: ngɔmbɛ-mibali zomi na moko, mpate-mibali mibale, bana-mpate mibali zomi na minei , mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
21 ná likabo na yango ya mbuma+ mpe makabo na yango ya masanga+ mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka;
22 mpe ntaba-mobali moko lokola likabo mpo na lisumu,+ longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.
23 “‘Mpe na mokolo ya minei: ngɔmbɛ-mibali zomi, mpate-mibali mibale, bana-mpate mibali zomi na minei, mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
24 likabo na yango ya mbuma+ mpe makabo na yango ya masanga+ mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka;+
25 mpe mwana-ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu,+ longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso,+ likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
26 “‘Mpe na mokolo ya mitano: ngɔmbɛ-mibali libwa, mpate-mibali mibale, bana-mpate mibali zomi na minei, mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
27 ná likabo na yango ya mbuma+ mpe makabo na yango ya masanga+ mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka;+
28 mpe ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu,+ longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
29 “‘Mpe na mokolo ya motoba: ngɔmbɛ-mibali mwambe, mpate-mibali mibale, bana-mpate mibali zomi na minei, mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
30 ná likabo na yango ya mbuma+ mpe makabo na yango ya masanga+ mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka;+
31 mpe ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu,+ longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso, likabo na yango ya mbuma mpe makabo na yango ya masanga.+
32 “‘Mpe na mokolo ya nsambo: ngɔmbɛ-mibali nsambo, mpate-mibali mibale, bana-mpate mibali zomi na minei, mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
33 ná likabo na yango ya mbuma+ mpe makabo na yango ya masanga+ mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka yango;+
34 mpe ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu,+ longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso, likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
35 “‘Mpe na mokolo ya mwambe bokosala liyangani moko monene.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te.+
36 Mpe bosengeli kopesa likabo ya kotumba, likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema: ngɔmbɛ-mobali moko, mpate-mobali moko, bana-mpate mibali nsambo, mokomoko ezali na mbula moko, ezangi mbeba;+
37 ná likabo na yango ya mbuma+ mpe makabo na yango ya masanga+ mpo na ngɔmbɛ-mobali, mpate-mobali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka;+
38 mpe ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu,+ longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
39 “‘Yango nde bokopesa Yehova na bafɛti+ na bino na bileko oyo etyamá, longola makabo na bino ya elako+ mpe makabo na bino ya bolingo+ mpo ezala makabo na bino ya kotumba+ mpe makabo na bino ya mbuma+ mpe makabo na bino ya masanga+ mpe bambeka na bino ya boyokani.’”+
40 Mpe Moize asololaki na bana ya Yisraele na kolanda mitindo nyonso oyo Yehova apesaki Moize.+