Mitángo 27:1-23
27 Bongo bana basi ya Zelofehade+ mwana ya Hefere mwana ya Gileade mwana ya Makire mwana ya Manase,+ na mabota ya Manase mwana ya Yozefe, babɛlɛmaki. Mpe nkombo ya bana na ye ya basi yango oyo: Mahala, Noa, Hogla, Milika ná Tireza.+
2 Mpe batɛlɛmaki liboso ya Moize mpe liboso ya Eleazare nganga-nzambe+ mpe liboso ya bankumu mpe ya liyangani mobimba, na monɔkɔ ya hema ya kokutana, balobaki ete:
3 “Tata na biso akufaki na esobe,+ mpe azalaki na kati ya liyangani te, elingi koloba, baoyo basanganaki mpo na kotombokela Yehova na liyangani ya Kora,+ kasi akufaki mpo na lisumu na ye moko;+ mpe azalaki na bana mibali te.
4 Mpo na nini nkombo ya tata na biso elongwa na libota na ye mpo azalaki na mwana mobali te?+ Boye, pesá biso mabele na kati ya bandeko ya tata na biso.”+
5 Na yango, Moize amemaki likambo na bango liboso ya Yehova.+
6 Bongo Yehova alobaki na Moize ete:
7 “Bana basi ya Zelofehade balobi malamu. Okopesa mpenza bango mabele ya libula na kati ya bandeko ya tata na bango, mpe osengeli kolekisa libula ya tata na bango epai na bango.+
8 Mpe okoloba na bana ya Yisraele ete: ‘Soki mobali moko akufi, azali na mwana mobali te, bosengeli kolekisa libula na ye epai ya bana na ye ya basi.
9 Mpe soki azali na mwana mwasi te, bosengeli kopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali.
10 Mpe soki azali na bandeko mibali te, bosengeli kopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye.
11 Mpe soki tata na ye azali na bandeko mibali te, bosengeli kopesa libula na ye epai ya ndeko na ye ya makila,+ oyo azali ndeko na ye mpenza na libota na ye, mpe asengeli kozwa yango. Mpe esengeli kozala likambo oyo ekateli ya lisambisi esɛngi mpo na bana ya Yisraele, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.’”
12 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Matá na ngomba oyo ya Abarime+ mpe talá mokili oyo nakopesa mpenza bana ya Yisraele.+
13 Nsima ya kotala yango, osengeli koyanganisama na bato na yo,+ ɛɛ yo, kaka ndenge Arona ndeko na yo ayanganisamaki na bato na ye,+
14 mpo botombokelaki etinda na ngai na esobe ya Zine na ntango liyangani+ ebimisaki koswana, na likambo etali kosantisa+ ngai na mai, na miso na bango. Mai yango nde mai ya Meriba+ na Kadeshe,+ na esobe ya Zine.”+
15 Bongo Moize alobaki na Yehova ete:
16 “Tiká Yehova Nzambe ya bilimo+ ya bikelamu nyonso ya mosuni+ atya moto oyo akokamba liyangani,+
17 oyo akobima liboso na bango mpe oyo akokɔta liboso na bango mpe oyo akobimisa bango mpe oyo akokɔtisa bango,+ mpo liyangani ya Yehova ekóma te lokola bampate oyo ezangi mobateli.”+
18 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Zwá Yosua mwana ya Nunu, moto oyo elimo ezali na kati na ye,+ mpe osengeli kotya lobɔkɔ na yo likoló na ye;+
19 mpe osengeli kotɛlɛmisa ye liboso ya Eleazare nganga-nzambe mpe liboso ya liyangani mobimba, mpe osengeli kopesa ye mokumba na miso na bango.+
20 Mpe osengeli kotya ndambo ya lokumu na yo likoló na ye,+ mpo liyangani mobimba ya bana ya Yisraele eyoka ye.+
21 Mpe liboso ya Eleazare nde akotɛlɛma, mpe asengeli kotunela+ ye ndenge Urime+ ekokata likambo liboso ya Yehova. Na etinda na ye bakobima mpe na etinda na ye bakokɔta, ye ná bana nyonso ya Yisraele elongo na ye mpe liyangani mobimba.”
22 Mpe Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo. Na yango, azwaki Yosua mpe atɛlɛmisaki ye liboso ya Eleazare+ nganga-nzambe mpe liboso ya liyangani mobimba
23 mpe atyaki mabɔkɔ na ye likoló na ye mpe apesaki ye mokumba,+ kaka ndenge Yehova alobaki na nzela ya Moize.+