Mitángo 26:1-65
26 Mpe esalemaki boye: nsima ya bolɔzi yango,+ Yehova alobaki lisusu na Moize mpe na Eleazare mwana ya Arona nganga-nzambe ete:
2 “Bózwa motángo ya liyangani mobimba ya Yisraele banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, engebene ndako ya batata na bango, bato nyonso na Yisraele oyo bakoki kokende etumba.”+
3 Mpe Moize ná Eleazare+ nganga-nzambe balobaki na bango na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe+ pene na Yordani na Yeriko+ ete:
4 “Zwá motángo na bango nyonso banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.”+
Sikoyo bana ya Yisraele oyo babimaki na mokili ya Ezipito bango oyo:
5 Rubene, mwana ya liboso ya Yisraele;+ bana mibali ya Rubene: Ya Hanoke+ na libota ya Bahanoke; ya Palu+ na libota ya Bapalu;
6 ya Hezerone+ na libota ya Bahezerone; ya Karami+ na libota ya Bakarami.
7 Wana nde mabota ya Barubene, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki nkóto ntuku minei na misato na nkama nsambo na ntuku misato (43 730).+
8 Mpe mwana ya Palu ezalaki Eliabe.
9 Mpe bana mibali ya Eliabe: Nemuele, Datane ná Abirame. Datane+ yango ná Abirame+ bazalaki bato oyo bazalaki kobengama na liyangani, bango nde babandaki kowelana na Moize mpe Arona na liyangani ya Kora,+ ntango babandaki kowelana na Yehova.
10 Bongo mabele efungolaki monɔkɔ na yango mpe emɛlaki+ bango. Kasi Kora akufaki ntango liyangani ekufaki, ntango mɔtɔ ezikisaki mibali nkama mibale na ntuku mitano (250).+ Mpe bakómaki elembo.+
11 Nzokande, bana mibali ya Kora bakufaki te.+
12 Bana mibali ya Simeone+ na kolanda mabota na bango: Ya Nemuele+ na libota ya Banemuele; ya Yamine+ na libota ya Bayamine; ya Yakine+ na libota ya Bayakine;
13 ya Zera na libota ya Bazera; ya Shaule+ na libota ya Bashaule.
14 Wana nde mabota ya Basimeone: nkóto ntuku mibale na mibale na nkama mibale (22 200).+
15 Bana mibali ya Gade+ na kolanda mabota na bango: Ya Zefone na libota ya Bazefone; ya Hagi na libota ya Bahagi; ya Shuni na libota ya Bashuni;
16 ya Ozni na libota ya Baozni; ya Eri na libota ya Baeri;
17 ya Arodi na libota ya Baarodi; ya Areli+ na libota ya Baareli.
18 Wana nde mabota ya bana mibali ya Gade, bato na bango oyo bakomisamaki nkombo: nkóto ntuku minei na nkama mitano (40 500).+
19 Bana mibali ya Yuda+ ezalaki Ere+ ná Onane.+ Nzokande, Ere ná Onane bakufaki na mokili ya Kanana.+
20 Mpe bana mibali ya Yuda bango oyo, na kolanda mabota na bango: Ya Shela+ na libota ya Bashela; ya Pereze+ na libota ya Bapereze; ya Zera+ na libota ya Bazera.
21 Mpe bana mibali ya Zera bango oyo: Ya Hezerone+ na libota ya Bahezerone; ya Hamule+ na libota ya Bahamule.
22 Wana nde mabota ya Yuda,+ bato na bango oyo bakomisamaki nkombo: nkóto ntuku nsambo na motoba na nkama mitano (76 500).+
23 Bana mibali ya Isakare+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Tola+ na libota ya Batola; ya Puva na libota ya Bapuni;
24 ya Yashube na libota ya Bayashube; ya Shimirone+ na libota ya Bashimirone.
25 Wana nde mabota ya Isakare, bato na bango oyo bakomisamaki nkombo: nkóto ntuku motoba na minei na nkama misato (64 300).+
26 Bana mibali ya Zebulone+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Serede na libota ya Baserede; ya Elone na libota ya Baelone; ya Yahaleele+ na libota ya Bayahaleele.
27 Wana nde mabota ya Zebulone, bato na bango oyo bakomisamaki nkombo: nkóto ntuku motoba na nkama mitano (60 500).+
28 Bana mibali ya Yozefe+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Manase ná Efraime.+
29 Bana mibali ya Manase+ bango oyo: Ya Makire+ na libota ya Bamakire. Mpe Makire abotaki Gileade.+ Ya Gileade na libota ya Bagileade.
30 Bana mibali ya Gileade bango oyo: Ya Iyezere+ na libota ya Baiyezere; ya Heleke na libota ya Baheleke;
31 ya Asiriele na libota ya Baasiriele; ya Shekeme na libota ya Bashekeme;
32 ya Shemida+ na libota ya Bashemida; ya Hefere+ na libota ya Bahefere.
33 Sikoyo Zelofehade mwana ya Hefere azalaki na bana mibali te, kaka bana basi,+ mpe nkombo ya bana basi ya Zelofehade ezalaki Mahala ná Noa, Hogla, Milika mpe Tireza.+
34 Wana nde mabota ya Manase, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki nkóto ntuku mitano na mibale na nkama nsambo (52 700).+
35 Bana mibali ya Efraime+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Shutela+ na libota ya Bashutela; ya Bekere na libota ya Babekere; ya Tahane+ na libota ya Batahane.
36 Mpe bana mibali ya Shutela bango oyo: Ya Erane na libota ya Baerane.
37 Wana nde mabota ya bana mibali ya Efraime,+ bato na bango oyo bakomisamaki nkombo: nkóto ntuku misato na mibale na nkama mitano (32 500). Wana nde bana mibali ya Yozefe na kolanda mabota na bango.+
38 Bana mibali ya Benyamina+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Bela+ na libota ya Babela; ya Ashebele+ na libota ya Baashebele; ya Ahirame na libota ya Baahirame;
39 ya Shefufame na libota ya Bashufame; ya Hufame+ na libota ya Bahufame.
40 Bana mibali ya Bela ezalaki Arde ná Naamane:+ Ya Arde na libota ya Baarde; ya Naamane na libota ya Banaamane.
41 Wana nde bana mibali ya Benyamina+ na kolanda mabota na bango, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki nkóto ntuku minei na mitano na nkama motoba (45 600).+
42 Bana mibali ya Dani+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Shuhame na libota ya Bashuhame. Wana nde mabota ya Dani+ na kolanda mabota na bango.
43 Mabota nyonso ya Bashuhame, na bato na bango oyo bakomisamaki nkombo, bazalaki nkóto ntuku motoba na minei na nkama minei (64 400).+
44 Bana mibali ya Ashere+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Yimena+ na libota ya Bayimena; Ya Yishivi+ na libota ya Bayishivi; ya Beria na libota ya Baberia;
45 na bana mibali ya Beria: Ya Hebere na libota ya Bahebere; ya Malikiele+ na libota ya Bamalikiele.
46 Mpe nkombo ya mwana mwasi ya Ashere ezalaki Sera.+
47 Wana nde mabota ya bana mibali ya Ashere,+ bato na bango oyo bakomisami nkombo: nkóto ntuku mitano na misato na nkama minei (53 400).+
48 Bana mibali ya Nafatali+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Yahazeele+ na libota ya Bayahazeele; ya Guni+ na libota ya Baguni;
49 ya Yezere+ na libota ya Bayezere; ya Shileme+ na libota ya Bashileme.
50 Wana nde mabota ya Nafatali+ na kolanda mabota na bango, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki nkóto ntuku minei na mitano na nkama minei (45 400).+
51 Baoyo wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo na kati ya bana ya Yisraele: nkóto nkama motoba na moko na nkama nsambo na ntuku misato (601 730).+
52 Nsima na yango, Yehova alobaki na Moize ete:
53 “Bakokabolela baoyo wana mokili lokola libula na kolanda motángo ya bankombo.+
54 Okobakisa libula ya moto soki bato na ye bazali ebele, mpe okokitisa libula ya moto soki bato na ye bazali moke.+ Libula ya moto na moto ekopesama na kotalela motángo ya bato na ye oyo bakomisamaki nkombo.
55 Mokili ekokabolama kaka na kobwakáká mbɛsɛ.+ Bakozwa libula na kolanda bankombo ya mabota ya batata na bango.
56 Libula ekokabolama na bato ebele mpe bato moke na kolandáká ndenge mbɛsɛ ekokata.”
57 Sikoyo bato oyo bakomisamaki nkombo na kati ya Balevi,+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: Ya Gereshone+ na libota na Bagereshone; ya Kohate+ na libota ya Bakohate; ya Merari+ na libota ya Bamerari.
58 Mabota ya Balevi yango oyo: libota ya Balibini,+ libota ya Bahebrone,+ libota ya Bamaheli,+ libota ya Bamushi,+ libota ya Bakora.+
Mpe Kohate+ abotaki Amirame.+
59 Mpe nkombo ya mwasi ya Amirame ezalaki Yokebede,+ mwana ya Levi, oyo mwasi ya Levi abotelaki ye na Ezipito. Na nsima, Yokebede abotelaki Amirame Arona ná Moize mpe Miriame ndeko na bango ya mwasi.+
60 Na nsima, Arona abotaki Nadabe ná Abihu,+ Eleazare mpe Itamare.+
61 Kasi Nadabe ná Abihu bakufaki mpo bapesaki liboso ya Yehova mɔtɔ oyo endimami na mobeko te.+
62 Mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki nkóto ntuku mibale na misato (23 000), mibali nyonso banda na sanza moko tii na likoló.+ Mpo bakomisamaki nkombo te na kati ya bana ya Yisraele,+ mpamba te basengelaki kopesa bango ata libula moko te na kati ya bana ya Yisraele.+
63 Wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo na Moize mpe na Eleazare nganga-nzambe ntango bakomisaki bana ya Yisraele nkombo na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pembeni na Yordani, na Yeriko.+
64 Kasi na kati na bango, moto moko azalaki te na kati ya baoyo bakomisamaki nkombo na Moize mpe na Arona nganga-nzambe ntango bakomisaki bana ya Yisraele nkombo na esobe ya Sinai.+
65 Mpo Yehova alobaki na ntina na bango ete: “Bakokufa mpenza na esobe.”+ Bongo moto moko te na kati na bango atikalaki, longola kaka Kalebe mwana ya Yefune mpe Yosua mwana ya Nunu.+