Mitángo 25:1-18

25  Sikoyo Yisraele azalaki kofanda na Shitime.+ Bongo bato babandaki kosala pite ná bana basi ya Moabe.+  Mpe basi bayaki kobenga bato bákende na bambeka ya banzambe na bango,+ mpe bato babandaki kolya mpe kogumbamela banzambe na bango.+  Bongo Yisraele akanganaki na Baala ya Peore;+ mpe nkanda ya Yehova ebandaki kongalela Yisraele.+  Na yango, Yehova alobaki na Moize ete: “Zwá bankumu nyonso na kati ya bato mpe tandá bango liboso ya Yehova+ epai na moi, mpo nkanda ya kongala ya Yehova elongwa na Yisraele.”  Bongo Moize alobaki na basambisi ya Yisraele+ ete: “Mokomoko na bino aboma+ bato na ye oyo bakanganaki na Baala ya Peore.”  Kasi talá! mobali+ moko na kati ya bana ya Yisraele ayaki, mpe azalaki koya na mwasi moko Momidiane+ epai ya bandeko na ye na miso ya Moize mpe na miso ya liyangani mobimba ya bana ya Yisraele, wana bazalaki kolela na monɔkɔ ya hema ya kokutana.  Ntango Finehase+ mwana ya Eleazare mwana ya Arona nganga-nzambe amonaki yango, na mbala moko atɛlɛmaki, alongwe na kati ya liyangani mpe azwaki likɔnga na lobɔkɔ na ye.  Bongo alandaki mobali yango ya Yisraele na kati ya hema oyo egumbamá na likoló mpe atɔbɔlaki bango mibale, mobali Moyisraele ná mwasi yango na nzoto na ye ya basi. Na yango, bolɔzi ekatanaki epai ya bana ya Yisraele.+  Mpe baoyo bakufaki na bolɔzi bazalaki nkóto ntuku mibale na minei (24 000).+ 10  Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 11  “Finehase+ mwana ya Eleazare mwana ya Arona nganga-nzambe alongoli nkɛlɛ+ na ngai likoló ya bana ya Yisraele na ndenge atiki nzela ata moke te básalela ngai bombanda na kati na bango,+ yango wana nasilisi bana ya Yisraele nyɛɛ te mpo ngai nasɛngaka bato bákangama kaka na ngai.+ 12  Mpo na yango, lobá ete: ‘Talá nazali kopesa ye kondimana na ngai ya kimya. 13  Mpe esengeli kozala kondimana ya bonganga-nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na ye mpe mpo na bana na ye nsima na ye,+ mpo atikaki nzela te básalela Nzambe+ na ye bombanda mpe azipaki masumu ya bana ya Yisraele.’”+ 14  Nzokande, nkombo ya mobali yango Moyisraele oyo abomamaki, oyo abomamaki elongo na mwasi Momidiane, ezali Zimiri mwana ya Salu, nkumu+ ya ndako ya batata ya Basimeone. 15  Mpe nkombo ya mwasi Momidiane oyo abomamaki ezali Kozibi mwana ya Zure;+ ye azalaki nkumu ya bituluka ya ndako ya batata na Midiane.+ 16  Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 17  “Bamidiane bátungisama, mpe bosengeli kobɛta bango,+ 18  mpamba te bazali kotungisa bino na misala na bango ya mayele mabe+ oyo basalelaki bino na mayele mabe na likambo ya Peore+ mpe na likambo ya Kozibi+ mwana mwasi ya nkumu ya Midiane, ndeko na bango oyo abomamaki+ na mokolo ya bolɔzi mpo na likambo ya Peore.”+

Maloba na nse