Mitángo 23:1-30
23 Bongo Balaama alobaki na Balake ete: “Tongelá ngai na esika oyo bitumbelo+ nsambo mpe bongiselá ngai na esika oyo ngɔmbɛ-mibali nsambo mpe mpate-mibali nsambo.”
2 Na mbala moko Balake asalaki kaka ndenge Balaama alobaki. Nsima na yango, Balake ná Balaama bapesaki na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.+
3 Mpe Balaama alobaki lisusu na Balake ete: “Tɛlɛmá pembeni ya likabo na yo ya kotumba,+ mpe tiká ngai nakende. Mbala mosusu Yehova akobimela ngai mpe akokutana na ngai.+ Boye nyonso oyo akomonisa ngai, nakoyebisa mpenza yo.” Bongo akendaki na ngomba moko ya moke oyo ezali polele.
4 Ntango Nzambe abimelaki Balaama,+ alobaki na Ye ete: “Natɛlɛmisi bitumbelo nsambo na milɔngɔ, mpe napesi na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.”+
5 Na yango, Yehova atyaki liloba na monɔkɔ ya Balaama+ mpe alobaki ete: “Zongá epai ya Balake, mpe talá oyo okoloba.”+
6 Bongo azongaki epai na ye, mpe talá! ye ná bankumu nyonso ya Moabe batɛlɛmi pembeni ya likabo na ye ya kotumba.
7 Bongo abimisaki liloba na ye ya lisese+ mpe alobaki ete:“Longwa na Arame+ Balake mokonzi ya Moabe alukaki kokamba ngai,Longwa na bangomba ya ɛsti:‘Yaká, lakelá ngai Yakobo mabe.Ɛɛ, yaká, tɔndɔlá mabe ya Yisraele.’+
8 Ndenge nini nakolakela mabe baoyo Nzambe alakeli mabe te?+Mpe ndenge nini nakotɔndɔla mabe ya baoyo Yehova atɔndɔli mabe na bango te?+
9 Mpo longwa na nsɔngɛ ya mabanga, nazali komona bango,Mpe longwa na bangomba mike, nazali kotala bango.Kuna, bato yango bazali kofanda na bahema kaka bango moko,+Mpe kati na bikólo, bango bazali komitánga te.+
10 Nani atángi zɛlo ya Yakobo,+Mpe nani atángi moko ya bandambo minei ya Yisraele?Tiká molimo na ngai ekufa liwa ya bato ya makambo alima,+Mpe tiká nsuka na ngai ezala lokola ya bango.”+
11 Na yango, Balake alobaki na Balaama ete: “Eloko nini oyo osali ngai? Nazwaki yo mpo olakela banguna na ngai mabe, mpe talá yo opamboli bango koleka ndelo.”+
12 Mpe ye azongisaki maloba ete: “Oyo Yehova akotya na monɔkɔ na ngai, yango nde nasengeli koloba, boye te?”+
13 Bongo Balake alobaki na ye ete: “Nabondeli yo, yaká elongo na ngai na esika mosusu oyo okoki komona bango. Okomona kaka bato na bango oyo bazali na ebandeli,+ kasi okomona bango nyonso te. Mpe lakelá ngai bango mabe na esika yango.”+
14 Bongo amemaki ye na elanga ya Zofime, na nsɔngɛ ya Pisga,+ mpe abandaki kotonga bitumbelo nsambo mpe apesaki na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.+
15 Nsima na yango, alobaki na Balake ete: “Tɛlɛmá awa pembeni ya likabo na yo ya kotumba, bongo ngai nakende kokutana na ye kuna.”
16 Na nsima, Yehova abimelaki Balaama mpe atyaki liloba na monɔkɔ na ye mpe alobaki+ ete: “Zongá epai ya Balake,+ mpe talá oyo okoloba na ye.”
17 Bongo ayaki epai na ye, mpe talá! ye atɛlɛmi pembeni ya likabo na ye ya kotumba, mpe bankumu ya Moabe bazalaki elongo na ye. Bongo Balake alobaki na ye ete: “Yehova alobi nini?”
18 Na yango, abimisaki liloba na ye ya lisese mpe alobaki+ ete:“Tɛlɛmá, Balake, mpe yoká.Tyá litoi epai na ngai, Ee Mwana ya Zipore.+
19 Nzambe azali moto te mpo abuka lokuta,+Azali mpe mwana ya moto te mpo ayoka mawa na likambo oyo asali.+Ye moko ayebisi likambo mpe akosala yango te?Mpe alobi likambo mpe akokokisa yango te?+
20 Talá! nazwamaki mpo na kopambola,Mpe Ye apamboli,+ mpe ngai nakobongola yango te.+
21 Atali nguya ata moko te ya maji+ oyo ekoki kosala Yakobo mabe,Mpe amoni likambo ata moko te ya mabe oyo ekoki kokwela Yisraele.Yehova Nzambe na ye azali elongo na ye,+Mpe koganga ya kokumisa mokonzi ezali na kati na ye.
22 Nzambe azali kobimisa bango na Ezipito.+Mbangu na ye ezali lokola oyo ya ngɔmbɛ-mobali ya zamba.*+
23 Mpo maloba ya kolɔka oyo ekoki kosala Yakobo mabe ezali te,+Ezali mpe na mosala moko te ya kosakola makambo oyo ebombaná oyo ekoki kosala Yisraele mabe.+Na ntango oyo, ekoki kolobama mpo na Yakobo mpe Yisraele ete:‘Oyo Nzambe asali!’+
24 Talá, ekólo moko ekotɛlɛma lokola nkɔsi,Mpe lokola nkɔsi, ekotɛlɛma yango moko.+Ekolala te liboso elya nyama oyo yango ekangi,Mpe ekomɛla makila ya babomami.”+
25 Na yango, Balake alobaki na Balaama ete: “Soki okoki ata moke te kolakela ye mabe, osengeli mpe kopambola ye ata moke te.”
26 Mpe Balaama azongiselaki Balake maloba ete: “Nalobaki na yo te ete: ‘Nyonso oyo Yehova akoloba nde yango nakosala’?”+
27 Bongo Balake alobaki na Balaama ete: “Ee Yaká, nabondeli yo. Tiká namema yo lisusu na esika mosusu. Mbala mosusu ekozala malamu na miso ya Nzambe ya solo na ndenge okolakela mpenza ye mabe mpo na ngai na esika yango.”+
28 Na yango, Balake amemaki Balaama na nsɔngɛ ya Peore, oyo ezali kotala na ngámbo ya Yeshimone.*+
29 Bongo Balaama+ alobaki na Balake ete: “Tongelá ngai na esika oyo bitumbelo nsambo mpe bongiselá ngai na esika oyo ngɔmbɛ-mibali nsambo mpe mpate-mibali nsambo.”+
30 Bongo Balake asalaki kaka ndenge Balaama alobaki, mpe apesaki na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.+